Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Davidi ayoki nsango ya liwa ya Saulo (1-16)

      • Davidi asali loyembo mpo na kolela Saulo ná Yonatane (17-27)

2 Samwele 1:1

Mitindami

  • +1Sa 27:5, 6

2 Samwele 1:4

Mitindami

  • +1Sa 31:1, 6; 1Nt 10:4, 6

2 Samwele 1:6

Mitindami

  • +1Sa 28:4; 1Nt 10:1
  • +1Sa 31:3; 1Nt 10:3

2 Samwele 1:8

Mitindami

  • +Kob 17:16; Mib 25:19; 1Sa 15:20; 30:1

2 Samwele 1:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “motole.”

  • *

    To, “ekɔmɔ.”

Mitindami

  • +1Sa 31:4

2 Samwele 1:12

Mitindami

  • +1Sa 31:11, 13
  • +1Sa 31:1

2 Samwele 1:14

Mitindami

  • +Mit 12:8; 1Sa 24:6; 26:9; 31:4

2 Samwele 1:15

Mitindami

  • +2Sa 4:10

2 Samwele 1:16

Mitindami

  • +2Sa 1:6, 10

2 Samwele 1:17

Mitindami

  • +1Sa 31:6

2 Samwele 1:18

Mitindami

  • +Yos 10:13

2 Samwele 1:19

Mitindami

  • +1Sa 31:8

2 Samwele 1:20

Mitindami

  • +1Sa 31:9

2 Samwele 1:21

Mitindami

  • +1Sa 31:1; 1Nt 10:1
  • +Le 27:16

2 Samwele 1:22

Mitindami

  • +1Sa 18:4; 20:20
  • +1Sa 14:47

2 Samwele 1:23

Mitindami

  • +1Sa 18:1
  • +1Sa 31:6; 1Nt 10:6
  • +Yb 9:26
  • +Mas 30:30

2 Samwele 1:25

Mitindami

  • +1Sa 31:8

2 Samwele 1:26

Mitindami

  • +1Sa 18:1, 3
  • +1Sa 19:2; 20:17, 41; 23:16-18; Mas 17:17; 18:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/1990, lok. 11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 1:11Sa 27:5, 6
2 Sa. 1:41Sa 31:1, 6; 1Nt 10:4, 6
2 Sa. 1:61Sa 28:4; 1Nt 10:1
2 Sa. 1:61Sa 31:3; 1Nt 10:3
2 Sa. 1:8Kob 17:16; Mib 25:19; 1Sa 15:20; 30:1
2 Sa. 1:101Sa 31:4
2 Sa. 1:121Sa 31:11, 13
2 Sa. 1:121Sa 31:1
2 Sa. 1:14Mit 12:8; 1Sa 24:6; 26:9; 31:4
2 Sa. 1:152Sa 4:10
2 Sa. 1:162Sa 1:6, 10
2 Sa. 1:171Sa 31:6
2 Sa. 1:18Yos 10:13
2 Sa. 1:191Sa 31:8
2 Sa. 1:201Sa 31:9
2 Sa. 1:211Sa 31:1; 1Nt 10:1
2 Sa. 1:21Le 27:16
2 Sa. 1:221Sa 18:4; 20:20
2 Sa. 1:221Sa 14:47
2 Sa. 1:231Sa 18:1
2 Sa. 1:231Sa 31:6; 1Nt 10:6
2 Sa. 1:23Yb 9:26
2 Sa. 1:23Mas 30:30
2 Sa. 1:251Sa 31:8
2 Sa. 1:261Sa 18:1, 3
2 Sa. 1:261Sa 19:2; 20:17, 41; 23:16-18; Mas 17:17; 18:24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 1:1-27

Mokanda ya mibale ya Samwele

1 Davidi autaki koboma Baamaleke mpe afandaki na Ziklage+ mikolo mibale. Na ntango yango, Saulo asilaki kokufa. 2 Na mokolo ya misato, mobali moko autaki na kaa ya Saulo, ná bilamba epasukapasuká mpe mabele na motó na ye. Ntango akómaki pene na Davidi, akweaki na mabele mpe afukamaki elongi na nse.

3 Davidi atunaki ye: “Outi wapi?” Ayanolaki: “Nauti na kaa ya Yisraele, nakimi.” 4 Davidi atunaki ye: “Makambo eleki ndenge nini kuna? Yebisá ngai, nabondeli yo.” Bongo ye alobaki: “Bato ebele mpenza bakufi na etumba, mpe basusu bakimi. Ata mpe Saulo ná mwana na ye Yonatane bakufi.”+ 5 Bongo Davidi atunaki elenge mobali yango oyo amemelaki ye nsango ete: “Ndenge nini oyebi ete Saulo ná mwana na ye Yonatane bakufi?” 6 Elenge mobali yango ayanolaki: “Kozanga kokana, nazalaki na Ngomba Gilboa,+ mpe kuna namonaki Saulo ayekameli likɔnga na ye, mpe makalo ná batambwisi-mpunda bazalaki se kopusana penepene na ye.+ 7 Ntango abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai mpe nalobaki ete: ‘Ngai oyo!’ 8 Atunaki ngai: ‘Yo nani?’ Nayanolaki: ‘Nazali Moamaleke.’+ 9 Na nsima, alobaki boye: ‘Nabondeli yo, pusaná pene na ngai mpe bomá ngai. Nazali naino na bomoi, kasi nazali na mpasi makasi.’ 10 Bongo napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye,+ mpo nayebaki ete lokola azokaki makasi mpe akweaki, akobika te. Na nsima, nazwaki ekɔti ya bokonzi* oyo ezalaki na motó na ye mpe eloko* oyo alataki na lobɔkɔ na ye, mpe namemi yango awa epai ya nkolo na ngai.”

11 Bongo, Davidi apasolaki bilamba na ye. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye basalaki mpe bongo. 12 Bagangaki, balelaki mpe bakilaki bilei+ tii na mpokwa mpo na Saulo ná mwana na ye Yonatane, mpo na bato ya Yehova, mpe mpo na ndako ya Yisraele,+ mpamba te babomamaki na mopanga.

13 Davidi atunaki elenge mobali oyo amemelaki ye nsango ete: “Ozali moto ya wapi?” Ayanolaki boye: “Nazali mwana ya Moamaleke moko oyo afandi mopaya.” 14 Bongo Davidi alobaki na ye: “Mpo na nini obangaki te koboma moto oyo Yehova atye mafuta?”+ 15 Na yango, Davidi abengaki moko ya bilenge mibali mpe alobaki ete: “Pusaná awa mpe bomá ye.” Bongo abomaki ye na mopanga.+ 16 Davidi alobaki: “Makila na yo ezali na motó na yo moko, mpo yo moko omifundi na ndenge olobi: ‘Ngai nde nabomaki moto oyo Yehova atye mafuta.’”+

17 Na nsima, Davidi ayembelaki Saulo ná mwana na ye Yonatane+ loyembo ya mawa 18 mpe alobaki ete esengeli kolakisa bato ya Yuda loyembo yango oyo ebengami “Litimbo,” mpe ekomami na buku ya Yashare:+

19 “Ee Yisraele, bonzenga na yo elali na bisika na yo

oyo etombwaná.+

Mibali ya nguya bakwei!

20 Bólobela yango na Gate+ te;

Bósakola yango na babalabala ya Ashekelone te,

Noki bana basi ya Bafilistia básepela,

Noki bana basi ya bato oyo bazali bisutu bázala na esengo mingi.

21 Bino bangomba ya Gilboa,+

Tiká mamwɛ to mbula ekwea likoló na bino te,

Tiká bilanga na bino ebota te biloko mpo na makabo mosantu,+

Mpo kuna nde nguba ya mibali ya nguya ekómaki mbindo,

Nguba ya Saulo ekotyama lisusu mafuta te.

22 Liboso ya makila ya bato oyo babomami, liboso ya mafuta ya bilombe,

Litimbo ya Yonatane ezongaki nsima te,+

Mpe mopanga ya Saulo ezongaki te kozanga elonga.+

23 Saulo ná Yonatane,+ oyo bato bazalaki kolinga mpe kosepela na bango mingi,

Bakabwani te ata na liwa.+

Bazalaki na mbangu koleka bampongo,+

Bazalaki makasi koleka bankɔsi.+

24 Ee, bino bana basi ya Yisraele, bólela Saulo,

Ye oyo alatisaki bino bilamba ya motane makasi oyo etondi na biloko ya motuya,

Ye oyo atyaki babiju ya wolo likoló ya bilamba na bino.

25 Talá ndenge bilombe bakwei na etumba!

Ebembe ya Yonatane elali na bisika na bino oyo etombwaná!+

26 Nayoki mpasi mingi mpo na yo, ndeko na ngai Yonatane;

Nazalaki kolinga yo mingi mpenza.+

Bolingo oyo ozalaki na yango mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo oyo basi bamoniselaka ngai.+

27 Talá ndenge bilombe bakwei

Talá ndenge bibundeli ya etumba ebebi!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto