Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Yehova abimeli lisusu Salomo (1-9)

      • Likabo oyo Salomo apesi Mokonzi Hirame (10-14)

      • Biloko ndenge na ndenge oyo Salomo atongaki (15-28)

1 Bakonzi 9:1

Mitindami

  • +2Nt 8:1; Mos 2:4
  • +2Nt 7:11

1 Bakonzi 9:2

Mitindami

  • +1Ba 3:5

1 Bakonzi 9:3

Mitindami

  • +Mib 12:5, 6; 1Ba 8:28, 29
  • +2Nt 6:40; 16:9; Nz 132:13

1 Bakonzi 9:4

Mitindami

  • +Nz 78:70, 72
  • +1Nt 29:17
  • +1Ba 3:6
  • +Mos 12:13
  • +2Nt 7:17, 18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2012, lok. 7

    15/8/2007, lok. 12

    1/5/1997, lok. 5

1 Bakonzi 9:5

Mitindami

  • +2Sa 7:16, 17; 1Ba 2:4; Nz 89:20, 29

1 Bakonzi 9:6

Mitindami

  • +1Ba 11:4; 2Nt 7:19-22

1 Bakonzi 9:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Yisraele ekokóma liloba ya lisese mpe ya kosɛka.”

Mitindami

  • +Le 18:28; Mib 4:26; 2Sa 7:14; 2Ba 17:22, 23; Nz 89:30-32
  • +2Ba 25:9, 10; 2Nt 15:2
  • +Mib 28:37; Nz 44:14

1 Bakonzi 9:8

Mitindami

  • +2Nt 36:19; Yis 64:11
  • +Mib 29:24, 25; Yir 22:8, 9

1 Bakonzi 9:9

Mitindami

  • +Mib 28:64; Yir 5:19; 12:7

1 Bakonzi 9:10

Mitindami

  • +1Ba 6:37-7:1; 2Nt 8:1, 2

1 Bakonzi 9:11

Mitindami

  • +1Ba 5:1, 7
  • +1Ba 5:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2005, lok. 29

1 Bakonzi 9:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ezalaki malamu te na miso na ye.”

1 Bakonzi 9:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mokili oyo ezali na eloko ya malonga te.”

1 Bakonzi 9:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +1Ba 10:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2008, lok. 22

1 Bakonzi 9:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

  • *

    To, “Milo.” Liloba ya Ebre oyo elimboli “kotondisa.”

Mitindami

  • +1Ba 4:6; 5:13
  • +1Ba 6:37
  • +2Sa 5:9; 1Ba 11:27; 2Ba 12:20
  • +Yos 19:32, 36
  • +Yos 17:11; Bas 5:19; 2Ba 9:27
  • +Bas 1:29

1 Bakonzi 9:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “likabo ya libala; mbongo ya libala.”

Mitindami

  • +Yos 16:10
  • +1Ba 3:1

1 Bakonzi 9:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akómisaki lisusu makasi.”

Mitindami

  • +Yos 16:1, 3; 2Nt 8:4-6

1 Bakonzi 9:18

Mitindami

  • +Yos 19:44, 48

1 Bakonzi 9:19

Mitindami

  • +1Ba 4:26

1 Bakonzi 9:20

Mitindami

  • +Mit 13:29; Mib 7:1; Bas 1:21
  • +2Nt 8:7-10

1 Bakonzi 9:21

Mitindami

  • +Eb 9:25

1 Bakonzi 9:22

Mitindami

  • +Le 25:39

1 Bakonzi 9:23

Mitindami

  • +1Ba 5:16; 2Nt 2:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 19

1 Bakonzi 9:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Milo.” Liloba ya Ebre oyo elimboli “kotondisa.”

Mitindami

  • +1Ba 3:1; 7:8; 2Nt 8:11
  • +2Sa 5:9
  • +1Ba 9:15

1 Bakonzi 9:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 23:14
  • +2Nt 8:12, 13
  • +2Nt 8:16

1 Bakonzi 9:26

Mitindami

  • +Mib 2:8
  • +2Nt 8:17, 18

1 Bakonzi 9:27

Mitindami

  • +1Ba 5:12

1 Bakonzi 9:28

Mitindami

  • +Eb 10:29; 1Nt 29:3, 4; Nz 45:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2008, lok. 22

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 9:12Nt 8:1; Mos 2:4
1 Bak. 9:12Nt 7:11
1 Bak. 9:21Ba 3:5
1 Bak. 9:3Mib 12:5, 6; 1Ba 8:28, 29
1 Bak. 9:32Nt 6:40; 16:9; Nz 132:13
1 Bak. 9:4Nz 78:70, 72
1 Bak. 9:41Nt 29:17
1 Bak. 9:41Ba 3:6
1 Bak. 9:4Mos 12:13
1 Bak. 9:42Nt 7:17, 18
1 Bak. 9:52Sa 7:16, 17; 1Ba 2:4; Nz 89:20, 29
1 Bak. 9:61Ba 11:4; 2Nt 7:19-22
1 Bak. 9:7Le 18:28; Mib 4:26; 2Sa 7:14; 2Ba 17:22, 23; Nz 89:30-32
1 Bak. 9:72Ba 25:9, 10; 2Nt 15:2
1 Bak. 9:7Mib 28:37; Nz 44:14
1 Bak. 9:82Nt 36:19; Yis 64:11
1 Bak. 9:8Mib 29:24, 25; Yir 22:8, 9
1 Bak. 9:9Mib 28:64; Yir 5:19; 12:7
1 Bak. 9:101Ba 6:37-7:1; 2Nt 8:1, 2
1 Bak. 9:111Ba 5:1, 7
1 Bak. 9:111Ba 5:8
1 Bak. 9:141Ba 10:21
1 Bak. 9:151Ba 4:6; 5:13
1 Bak. 9:151Ba 6:37
1 Bak. 9:152Sa 5:9; 1Ba 11:27; 2Ba 12:20
1 Bak. 9:15Yos 19:32, 36
1 Bak. 9:15Yos 17:11; Bas 5:19; 2Ba 9:27
1 Bak. 9:15Bas 1:29
1 Bak. 9:16Yos 16:10
1 Bak. 9:161Ba 3:1
1 Bak. 9:17Yos 16:1, 3; 2Nt 8:4-6
1 Bak. 9:18Yos 19:44, 48
1 Bak. 9:191Ba 4:26
1 Bak. 9:20Mit 13:29; Mib 7:1; Bas 1:21
1 Bak. 9:202Nt 8:7-10
1 Bak. 9:21Eb 9:25
1 Bak. 9:22Le 25:39
1 Bak. 9:231Ba 5:16; 2Nt 2:18
1 Bak. 9:241Ba 3:1; 7:8; 2Nt 8:11
1 Bak. 9:242Sa 5:9
1 Bak. 9:241Ba 9:15
1 Bak. 9:25Kob 23:14
1 Bak. 9:252Nt 8:12, 13
1 Bak. 9:252Nt 8:16
1 Bak. 9:26Mib 2:8
1 Bak. 9:262Nt 8:17, 18
1 Bak. 9:271Ba 5:12
1 Bak. 9:28Eb 10:29; 1Nt 29:3, 4; Nz 45:9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 9:1-28

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

9 Ntango kaka Salomo asilisaki kotonga ndako ya Yehova, ndako ya mokonzi,+ mpe eloko nyonso oyo asepelaki kosala,+ 2 Yehova abimelaki Salomo mpo na mbala ya mibale, kaka ndenge abimelaki ye na Gibeone.+ 3 Yehova alobaki na ye: “Nayoki libondeli na yo mpe lilɔmbɔ oyo osali liboso na ngai mpo na koluka kondimama. Nasantisi ndako oyo otongi mpe nkombo na ngai ekozala wana mpo na libela.+ Miso na ngai mpe motema na ngai ekozala wana ntango nyonso.+ 4 Mpe yo, soki otamboli liboso na ngai na motema mobimba+ mpe na bosembo+ lokola tata na yo Davidi atambolaki,+ soki osali makambo nyonso oyo napesi yo mitindo,+ mpe otosi malako na ngai mpe bikateli na ngai ya lisambisi,+ 5 boye nakofandisa kiti ya bokonzi na yo likoló ya Yisraele mpo na libela, kaka ndenge nalakaki tata na yo Davidi ete: ‘Ekozala ntango nyonso na moto moko ya libota na yo oyo akofanda na kiti ya bokonzi ya Yisraele.’+ 6 Kasi soki bino ná bana na bino bopesi ngai mokɔngɔ mpe botiki kolanda ngai, botosi te mitindo na ngai mpe mibeko na ngai oyo napesi bino, mpe bokei kosalela banzambe mosusu mpe kogumbamela bango,+ 7 nakolongola Yisraele na mokili oyo napesá bango,+ mpe ndako oyo nasantisi mpo na nkombo na ngai, nakolongola yango liboso ya miso na ngai.+ Bato ya bikólo nyonso bakobanda kotyola mpe kosɛka Yisraele.*+ 8 Mpe ndako oyo ekotikala esika oyo ebebabebá.+ Moto nyonso oyo akoleka pene na yango akotikala monɔkɔ polele, akobɛta piololo mpe akotuna: ‘Mpo na nini Yehova asali mokili oyo mpe ndako oyo boye?’+ 9 Bongo bakoyanola ye: ‘Ezali mpo basundolaki Yehova Nzambe na bango oyo abimisaki bankɔkɔ na bango na mokili ya Ezipito, mpe mpo bakangamaki na banzambe mosusu, bagumbamelaki bango mpe basalelaki bango. Yango wana Yehova amemeli bango mpasi oyo nyonso.’”+

10 Salomo asalaki mbula 20 mpo na kotonga bandako mibale oyo: ndako ya Yehova mpe ndako ya mokonzi.+ 11 Hirame+ mokonzi ya Tire atindelaki Salomo banzete ya sɛdrɛ mpe banzete ya jenevriye mpe wolo mingi kaka ndenge asɛngaki ye.+ Na yango, Mokonzi Salomo apesaki Hirame bingumba 20 na mokili ya Galile. 12 Bongo Hirame alongwaki na Tire mpo na kokende kotala bingumba oyo Salomo apesaki ye, kasi asepelaki na yango te.* 13 Alobaki: “Ndeko na ngai, oyo bingumba ya ndenge nini opesi ngai?” Yango wana bakómá kobenga yango Mokili ya Kabule* tii na mokolo ya lelo. 14 Hirame atindelaki mokonzi talanta* 120 ya wolo.+

15 Talá lisolo ya bato oyo Mokonzi Salomo atindaki na misala ya makasi+ mpo na kotonga ndako ya Yehova,+ ndako na ye moko,* mwa ngomba ya Milo,*+ efelo ya Yerusaleme, Hazore,+ Megido,+ mpe Gezere.+ 16 (Na etumba moko, Farao mokonzi ya Ezipito amataki kobundisa Gezere, azwaki yango mpe atumbaki yango na mɔtɔ. Abomaki mpe Bakanana+ oyo bazalaki kofanda na engumba yango. Bongo apesaki yango mpo ezala likabo ya bokabwani* epai ya mwana na ye,+ mwasi ya Salomo.) 17 Salomo atongaki lisusu* Gezere, Bete-horone ya Nse,+ 18 Baalate,+ mpe Tamara na esobe, na kati ya mokili, 19 atongaki mpe bingumba mpo na kobomba biloko ya Salomo, bingumba mpo na kobomba makalo na ye,+ bingumba mpo na bato oyo batambolaka na mpunda. Atongaki mpe eloko nyonso oyo azalaki na mposa ya kotonga na Yerusaleme, na Liban, mpe na esika nyonso ya boyangeli na ye. 20 Mpe mpo na bato nyonso oyo batikalaki kati na Baamore, Bahiti, Baperizi, Bahivi, mpe Bayebusi,+ oyo bazalaki bato ya Yisraele te,+ 21 bakitani na bango oyo batikalaki na mokili yango, baoyo Bayisraele bakokaki te kosilisa nyɛɛ, Salomo akómisaki bango baombo mpo básalaka misala ya makasi tii na mokolo ya lelo.+ 22 Kasi Salomo akómisaki ata Moyisraele moko te moombo,+ mpo bazalaki basoda na ye, basaleli na ye, bankumu, bakomanda-basungi, mpe bakonzi ya batambwisi-makalo na ye mpe ya bato na ye oyo batambolaka na mpunda. 23 Bakonzi ya bakambi oyo Mokonzi Salomo atyaki oyo bazalaki kosala mosala, oyo bazalaki kokamba bato, bazalaki 550, oyo bazalaki kosala mosala.+

24 Kasi mwana mwasi ya Farao+ alongwaki na Sité ya Davidi+ mpe akendaki na ndako oyo Salomo atongelaki ye. Na nsima Salomo atongaki mwa ngomba ya Milo.*+

25 Mbala misato na mbula,+ Salomo azalaki kopesa bambeka ya kotumba mpe bambeka ya kimya* likoló ya etumbelo oyo atongelaki Yehova.+ Azalaki mpe kobimisa milinga ya mbeka na etumbelo yango, oyo ezalaki liboso ya Yehova. Bongo Salomo asilisaki kotonga Tempelo.+

26 Mokonzi Salomo asalaki mpe bamasuwa na Ezione-gebere,+ oyo ezali pene na Elote, na bokula ya Mbu Motane, na mokili ya Edome.+ 27 Hirame atindaki basaleli na ye na bamasuwa yango.+ Bazalaki bamatelo oyo bayebi mpenza makambo ya mbu. Atindaki bango mpo básala elongo na basaleli ya Salomo. 28 Bakendaki na Ofire+ mpe kuna bazwaki talanta 420 ya wolo, mpe bamemelaki yango Mokonzi Salomo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto