Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Abiyame, mokonzi ya Yuda (1-8)

      • Asa, mokonzi ya Yuda (9-24)

      • Nadabe, mokonzi ya Yisraele (25-32)

      • Baasha, mokonzi ya Yisraele (33, 34)

1 Bakonzi 15:1

Mitindami

  • +1Ba 12:20
  • +2Nt 13:1, 2

1 Bakonzi 15:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Abishalome.” Oyo ezali ndenge mosusu ya kokoma nkombo yango.

Mitindami

  • +2Nt 11:20-22

1 Bakonzi 15:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “emipesaki.”

1 Bakonzi 15:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mokitani.”

Mitindami

  • +1Ba 11:36; 2Nt 21:7; Nz 132:13, 17
  • +2Sa 7:8, 12; Nz 89:33-37; Yis 37:35; Yir 33:20, 21

1 Bakonzi 15:5

Mitindami

  • +2Sa 11:4, 15; Nz 51:maloba ya ebandeli ya loyembo

1 Bakonzi 15:6

Mitindami

  • +1Ba 14:30; 2Nt 12:15

1 Bakonzi 15:7

Mitindami

  • +2Nt 13:22
  • +2Nt 13:3

1 Bakonzi 15:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +1Nt 3:10; Mt 1:7
  • +2Nt 14:1

1 Bakonzi 15:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Abishalome.” Oyo ezali ndenge mosusu ya kokoma nkombo yango.

Mitindami

  • +2Nt 11:21, 22

1 Bakonzi 15:11

Mitindami

  • +2Nt 14:2-5, 11; 15:17

1 Bakonzi 15:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo basaleli awa ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela “nyɛi.” Basalelaka mpe liloba yango mpo na kotyola.

Mitindami

  • +Mib 23:17, 18; 1Ba 14:24; 22:45, 46
  • +1Ba 11:7; 14:22, 23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2012, lok. 8

1 Bakonzi 15:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mwasi ya lokumu.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +2Nt 11:18, 20
  • +Mib 7:5; 2Ba 18:1, 4; 2Nt 34:1, 4
  • +2Sa 15:23; 2Nt 15:16-18; Yn 18:1

1 Bakonzi 15:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “emipesaki mobimba.”

  • *

    Lil., “mikolo nyonso.”

Mitindami

  • +Mit 33:52; Mib 12:2; 1Ba 22:41, 43

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    3/2017, lok. 19

1 Bakonzi 15:15

Mitindami

  • +1Nt 26:26, 27

1 Bakonzi 15:16

Mitindami

  • +1Ba 16:3, 12

1 Bakonzi 15:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akómisaki makasi.”

Mitindami

  • +Yos 18:21, 25
  • +2Nt 16:1-6

1 Bakonzi 15:18

Mitindami

  • +2Nt 16:7

1 Bakonzi 15:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kondimana.”

  • *

    To, “kondimana.”

1 Bakonzi 15:20

Mitindami

  • +2Ba 15:29
  • +Bas 18:29; 1Ba 12:28, 29

1 Bakonzi 15:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kokómisa makasi.”

Mitindami

  • +1Ba 14:17; Loy 6:4

1 Bakonzi 15:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akómisaki makasi.”

Mitindami

  • +Yos 21:8, 17
  • +Yos 18:21, 26; Bas 20:1; 1Sa 7:5; Yir 40:6

1 Bakonzi 15:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akómisaki makasi.”

Mitindami

  • +2Nt 16:11-14

1 Bakonzi 15:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +1Ba 22:42; 2Nt 17:3, 4; 18:1; 19:4; Mt 1:8

1 Bakonzi 15:25

Mitindami

  • +1Ba 14:20

1 Bakonzi 15:26

Mitindami

  • +1Ba 14:7, 9
  • +1Ba 12:28-30; 13:33

1 Bakonzi 15:27

Mitindami

  • +Yos 19:44, 48; 21:20, 23; 1Ba 16:15

1 Bakonzi 15:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ata moto moko te ya libota ya Yeroboame oyo azali na mpema.”

Mitindami

  • +1Ba 14:9, 10

1 Bakonzi 15:32

Mitindami

  • +2Nt 12:15

1 Bakonzi 15:33

Mitindami

  • +1Ba 16:8

1 Bakonzi 15:34

Mitindami

  • +1Ba 16:7
  • +1Ba 12:28-30; 13:33

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 15:11Ba 12:20
1 Bak. 15:12Nt 13:1, 2
1 Bak. 15:22Nt 11:20-22
1 Bak. 15:41Ba 11:36; 2Nt 21:7; Nz 132:13, 17
1 Bak. 15:42Sa 7:8, 12; Nz 89:33-37; Yis 37:35; Yir 33:20, 21
1 Bak. 15:52Sa 11:4, 15; Nz 51:maloba ya ebandeli ya loyembo
1 Bak. 15:61Ba 14:30; 2Nt 12:15
1 Bak. 15:72Nt 13:22
1 Bak. 15:72Nt 13:3
1 Bak. 15:81Nt 3:10; Mt 1:7
1 Bak. 15:82Nt 14:1
1 Bak. 15:102Nt 11:21, 22
1 Bak. 15:112Nt 14:2-5, 11; 15:17
1 Bak. 15:12Mib 23:17, 18; 1Ba 14:24; 22:45, 46
1 Bak. 15:121Ba 11:7; 14:22, 23
1 Bak. 15:132Nt 11:18, 20
1 Bak. 15:13Mib 7:5; 2Ba 18:1, 4; 2Nt 34:1, 4
1 Bak. 15:132Sa 15:23; 2Nt 15:16-18; Yn 18:1
1 Bak. 15:14Mit 33:52; Mib 12:2; 1Ba 22:41, 43
1 Bak. 15:151Nt 26:26, 27
1 Bak. 15:161Ba 16:3, 12
1 Bak. 15:17Yos 18:21, 25
1 Bak. 15:172Nt 16:1-6
1 Bak. 15:182Nt 16:7
1 Bak. 15:202Ba 15:29
1 Bak. 15:20Bas 18:29; 1Ba 12:28, 29
1 Bak. 15:211Ba 14:17; Loy 6:4
1 Bak. 15:22Yos 21:8, 17
1 Bak. 15:22Yos 18:21, 26; Bas 20:1; 1Sa 7:5; Yir 40:6
1 Bak. 15:232Nt 16:11-14
1 Bak. 15:241Ba 22:42; 2Nt 17:3, 4; 18:1; 19:4; Mt 1:8
1 Bak. 15:251Ba 14:20
1 Bak. 15:261Ba 14:7, 9
1 Bak. 15:261Ba 12:28-30; 13:33
1 Bak. 15:27Yos 19:44, 48; 21:20, 23; 1Ba 16:15
1 Bak. 15:291Ba 14:9, 10
1 Bak. 15:322Nt 12:15
1 Bak. 15:331Ba 16:8
1 Bak. 15:341Ba 16:7
1 Bak. 15:341Ba 12:28-30; 13:33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 15:1-34

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

15 Na mbula ya 18 ya boyangeli ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, Abiyame akómaki mokonzi ya Yuda.+ 2 Ayangelaki mbula misato na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Maaka,+ mwana ya mwana ya Abisalome.* 3 Abiyame asalaki kaka masumu oyo tata na ye asalaki, mpe motema na ye ezalaki* mobimba te epai ya Yehova Nzambe na ye, na bokeseni na motema ya nkɔkɔ na ye Davidi. 4 Kasi Yehova Nzambe ya Davidi apesaki Abiyame mwinda* na Yerusaleme+ na ndenge aponaki mwana na ye azala mokonzi nsima na ye, mpe na ndenge atikaki Yerusaleme ezala kaka engumba-mokonzi. Asalaki bongo mpo na elaka oyo apesaki Davidi.+ 5 Mpo Davidi asalaki makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Mikolo nyonso ya bomoi na ye, atosaki makambo nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo, longola kaka na likambo ya Uriya Mohiti.+ 6 Etumba ezalaki kati na Rehoboame ná Yeroboame, mikolo nyonso ya bomoi ya Rehoboame.+

7 Makambo mosusu ya lisolo ya Abiyame, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda.+ Etumba ezalaki mpe kati na Abiyame ná Yeroboame.+ 8 Na nsima, Abiyame akufaki* mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi. Mwana na ye Asa+ akómaki mokonzi na esika na ye.+

9 Na mbula ya 20 ya boyangeli ya Yeroboame mokonzi ya Yisraele, Asa akómaki koyangela na Yuda. 10 Ayangelaki mbula 41 na Yerusaleme. Nkombo ya nkɔkɔ na ye ya mwasi ezalaki Maaka,+ mwana ya mwana ya Abisalome.* 11 Asa asalaki makambo oyo ezali sembo na miso ya Yehova,+ lokola nkɔkɔ na ye Davidi. 12 Alongolaki mibali oyo bazalaki kosala bondumba na tempelo na mokili ya Yuda+ mpe alongolaki bikeko nyonso ya bosɔtɔ* oyo bankɔkɔ na ye basalaki.+ 13 Alongolaki ata nkɔkɔ na ye Maaka+ na ebonga na ye ya mama-mokonzi* mpo asalaki ekeko moko ya mbindo mpo na losambo oyo ezalaki kosalema na nzete ya losambo.* Asa abukaki ekeko yango ya mbindo+ mpe atumbaki yango na Lobwaku ya Kidrone.+ 14 Kasi bisika oyo etombwaná elongwaki te na ekólo.+ Atako bongo, motema ya Asa ezalaki mobimba* epai ya Yehova bomoi na ye mobimba.* 15 Mpe Asa akɔtisaki na ndako ya Yehova biloko oyo ye ná tata na ye basantisaki: palata, wolo mpe bisaleli ndenge na ndenge.+

16 Etumba ezalaki ntango nyonso kati na Asa mpe Baasha+ mokonzi ya Yisraele. 17 Mokolo moko Baasha mokonzi ya Yisraele akendaki kobundisa Yuda mpe na nsima atongaki lisusu* engumba,+ mpo moto moko te azala na likoki ya kobima to ya kokɔta na teritware ya Asa mokonzi ya Yuda.+ 18 Na yango, Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya tempelo ya Yehova mpe ya ndako ya mokonzi mpe apesaki yango basaleli na ye. Na nsima, Mokonzi Asa atindaki yango epai ya Bene-hadade mwana ya Tabrimone mwana ya Hezione, mokonzi ya Siri,+ oyo azalaki kofanda na Damasi, alobi: 19 “Boyokani* ezali kati na ngai ná yo, mpe kati na tata na ngai ná tata na yo. Natindeli yo likabo ya palata mpe ya wolo. Nabondeli yo, katá boyokani* na yo ná Baasha mokonzi ya Yisraele, mpo alongwa epai na ngai.” 20 Bene-hadade ayokelaki Mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya mampinga ya basoda na ye mpo bábundisa bingumba ya Yisraele. Bazwaki Iyone,+ Dani,+ Abele-bete-maaka, ná Kinerete mobimba, mpe mokili mobimba ya Nafatali. 21 Ntango Baasha ayokaki bongo, na mbala moko atikaki kotonga* Rama mpe akobaki kofanda na Tireza.+ 22 Na nsima, Mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, ata moto moko te azangaki, mpo bámemela ye mabanga mpe mabaya oyo Baasha azalaki kosalela mpo na kotonga Rama. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kotonga lisusu* Geba+ ya Benyamina, mpe Mizipa.+

23 Makambo mosusu ya lisolo ya Asa, ná nguya na ye nyonso mpe nyonso oyo asalaki, bakisa mpe bingumba oyo atongaki lisusu,* ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda. Kasi ntango Asa akómaki mobange abɛlaki maladi na makolo.+ 24 Na nsima, Asa akufaki* mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi, esika oyo bakundaki bankɔkɔ na ye. Mpe mwana na ye Yehoshafate+ akómaki mokonzi na esika na ye.

25 Nadabe+ mwana ya Yeroboame akómaki mokonzi ya Yisraele na mbula ya mibale ya Asa mokonzi ya Yuda. Ayangelaki Yisraele mbula mibale. 26 Mpe akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Alandaki ndakisa mabe ya tata na ye+ mpe asalaki kaka lisumu oyo tata na ye asalisaki Yisraele.+ 27 Baasha mwana ya Ahiya ya libota ya Isakare asalelaki Nadabe likita. Baasha abomaki Nadabe na Gibetone+ ya Bafilistia, na ntango oyo Nadabe mpe Yisraele mobimba bazingaki Gibetone. 28 Na ndenge wana nde Baasha abomaki ye mpe akómaki mokonzi na esika na ye. Ezalaki na mbula ya misato ya Asa mokonzi ya Yuda. 29 Ntango kaka Baasha akómaki mokonzi, abomaki libota mobimba ya Yeroboame. Atikaki ata moto moko te na bomoi.* Asilisaki bango nyonso, kaka ndenge Yehova alobaki na nzela ya mosaleli na ye Ahiya moto ya engumba Shilo.+ 30 Esalemaki bongo mpo na masumu oyo Yeroboame asalaki, mpo na masumu oyo asalisaki Yisraele, mpe mpo asilikisaki mpenza Yehova Nzambe ya Yisraele. 31 Makambo mosusu ya lisolo ya Nadabe, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yisraele. 32 Mpe etumba ezalaki ntango nyonso kati na Asa mpe Baasha mokonzi ya Yisraele.+

33 Na mbula ya misato ya Asa mokonzi ya Yuda, Baasha mwana ya Ahiya akómaki mokonzi ya Yisraele mobimba na Tireza, mpe ayangelaki mbula 24.+ 34 Kasi akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+ Alandaki ndakisa mabe ya Yeroboame mpe asalaki kaka lisumu oyo Yeroboame asalisaki Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto