Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Bakonzi

      • Ahaba aluli elanga ya vinyo ya Nabote (1-4)

      • Yezabele abomisi Nabote (5-16)

      • Eliya ayebisi nsango ya etumbu mpo na Ahaba (17-26)

      • Ahaba amikitisi (27-29)

1 Bakonzi 21:1

Mitindami

  • +Yos 19:17, 18

1 Bakonzi 21:3

Mitindami

  • +Le 25:23; Mit 36:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 24

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 13

    1/8/1997, lok. 13

1 Bakonzi 21:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elimo na yo ezali.”

Mitindami

  • +1Ba 16:31; 18:4; 19:2; 21:25

1 Bakonzi 21:7

Mitindami

  • +Mik 2:1; 7:3

1 Bakonzi 21:8

Mitindami

  • +Ne 9:38; Est 8:8
  • +Mib 16:18

1 Bakonzi 21:10

Mitindami

  • +Kob 20:16; Mib 17:6
  • +Kob 22:28
  • +Le 24:16; Yn 10:33

1 Bakonzi 21:13

Mitindami

  • +Am 5:12; Hab 1:4
  • +2Ba 9:25, 26; Mos 4:1

1 Bakonzi 21:14

Mitindami

  • +Mos 5:8; 8:14; Hab 1:13

1 Bakonzi 21:15

Mitindami

  • +1Ba 21:7

1 Bakonzi 21:17

Mitindami

  • +1Ba 17:1

1 Bakonzi 21:18

Mitindami

  • +1Ba 16:29

1 Bakonzi 21:19

Mitindami

  • +Eb 4:8, 10
  • +Mib 5:21; Hab 2:9
  • +1Ba 22:37, 38; 2Ba 9:25, 26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 15

1 Bakonzi 21:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “omitɛki.”

Mitindami

  • +1Ba 18:17; Am 5:10
  • +1Ba 16:30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, nk. 14-15

1 Bakonzi 21:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “moto nyonso oyo asubaka na efelo.” Ezali maloba ya Ebre oyo esalemaka mpo na kotyola mibali.”

Mitindami

  • +2Ba 10:7, 17
  • +2Ba 9:7-9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 15

1 Bakonzi 21:22

Mitindami

  • +1Ba 15:25-29
  • +1Ba 16:3, 11

1 Bakonzi 21:23

Mitindami

  • +2Ba 9:10, 35

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Yirimia, nk. 120-121

1 Bakonzi 21:24

Mitindami

  • +1Ba 14:11; 16:4

1 Bakonzi 21:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “amitɛkaki mpo na kosala.”

Mitindami

  • +1Ba 16:30
  • +1Ba 16:31; 2Nt 22:2, 3; Em 2:20

1 Bakonzi 21:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo basaleli awa ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela “nyɛi.” Basalelaka mpe liloba yango mpo na kotyola.

Mitindami

  • +Kob 23:28; Mib 9:5

1 Bakonzi 21:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 15

1 Bakonzi 21:29

Mitindami

  • +Nz 78:34
  • +2Ba 9:25, 26; 10:7, 11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    10/2021, lok. 3

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Bak. 21:1Yos 19:17, 18
1 Bak. 21:3Le 25:23; Mit 36:7
1 Bak. 21:51Ba 16:31; 18:4; 19:2; 21:25
1 Bak. 21:7Mik 2:1; 7:3
1 Bak. 21:8Ne 9:38; Est 8:8
1 Bak. 21:8Mib 16:18
1 Bak. 21:10Kob 20:16; Mib 17:6
1 Bak. 21:10Kob 22:28
1 Bak. 21:10Le 24:16; Yn 10:33
1 Bak. 21:13Am 5:12; Hab 1:4
1 Bak. 21:132Ba 9:25, 26; Mos 4:1
1 Bak. 21:14Mos 5:8; 8:14; Hab 1:13
1 Bak. 21:151Ba 21:7
1 Bak. 21:171Ba 17:1
1 Bak. 21:181Ba 16:29
1 Bak. 21:19Eb 4:8, 10
1 Bak. 21:19Mib 5:21; Hab 2:9
1 Bak. 21:191Ba 22:37, 38; 2Ba 9:25, 26
1 Bak. 21:201Ba 18:17; Am 5:10
1 Bak. 21:201Ba 16:30
1 Bak. 21:212Ba 10:7, 17
1 Bak. 21:212Ba 9:7-9
1 Bak. 21:221Ba 15:25-29
1 Bak. 21:221Ba 16:3, 11
1 Bak. 21:232Ba 9:10, 35
1 Bak. 21:241Ba 14:11; 16:4
1 Bak. 21:251Ba 16:30
1 Bak. 21:251Ba 16:31; 2Nt 22:2, 3; Em 2:20
1 Bak. 21:26Kob 23:28; Mib 9:5
1 Bak. 21:29Nz 78:34
1 Bak. 21:292Ba 9:25, 26; 10:7, 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Bakonzi 21:1-29

Mokanda ya liboso ya Bakonzi

21 Nsima ya makambo wana, likambo moko ebimaki mpo na elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele. Elanga yango ezalaki na Yizireele,+ pembeni ya ndako ya Ahaba, mokonzi ya Samaria. 2 Ahaba alobaki na Nabote: “Pesá ngai elanga na yo ya vinyo, nakómisa yango elanga ya ndunda, mpo ezali pene na ndako na ngai. Mpe na esika na yango, nakopesa yo elanga mosusu ya vinyo ya malamu koleka. To soki olingi, nakopesa yo mbongo oyo ekokani na motuya na yango.” 3 Kasi Nabote ayanolaki Ahaba ete: “Nakoki kokanisa ata moke te kopesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai, mpo Yehova apekisá kosala bongo.”+ 4 Bongo Ahaba akɔtaki na ndako na ye, akangi elongi mpe alɛmbi nzoto, mpo Nabote Moyizireele alobaki na ye: “Nakopesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai te.” Na nsima alalaki na mbeto na ye, abalolaki elongi na ye mpo atala bato te, mpe aboyaki kolya.

5 Mwasi na ye Yezabele+ akɔtaki mpo na kotala ye mpe atunaki ye: “Mpo na nini ozali* mawamawa mpe oboyi kolya?” 6 Azongisaki: “Ezali mpo nalobaki na Nabote Moyizireele ete: ‘Tɛkelá ngai elanga na yo ya vinyo. To soki olingi, tiká napesa yo elanga mosusu ya vinyo na esika na yango.’ Kasi ye alobaki na ngai: ‘Nakopesa yo elanga na ngai ya vinyo te.’” 7 Mwasi na ye Yezabele alobaki na ye: “Yo ozali mokonzi ya Yisraele te? Tɛlɛmá, lyá mwa eloko, mpe kitisá motema. Ngai moko nakopesa yo elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele.”+ 8 Na yango Yezabele akomaki mikanda na nkombo ya Ahaba, atyaki yango kashɛ ya Ahaba,+ mpe atindaki mikanda yango epai ya bankulutu+ mpe bankumu oyo bazalaki kofanda engumba moko ná Nabote. 9 Na mikanda yango, akomaki: “Bóyebisa bato bákila bilei, mpe bófandisa Nabote liboso ya bato nyonso. 10 Bófandisa mibali mibale oyo bazali bato ya mpambampamba, mpe báfunda Nabote+ mpe báloba: ‘Olakeli Nzambe mabe mpe olakeli mokonzi mabe!’+ Na nsima, bóbimisa ye libándá ya engumba mpe bóbamba ye mabanga tii akokufa.”+

11 Na yango mibali ya engumba, elingi koloba bankulutu mpe bankumu oyo bazalaki kofanda na engumba moko na Nabote, basalaki kaka ndenge Yezabele akomaki na mikanda oyo atindelaki bango. 12 Bayebisaki bato bákila bilei mpe bafandisaki Nabote liboso ya bato nyonso. 13 Na nsima mibali mibale oyo bazalaki bato ya mpambampamba bakɔtaki mpe bafandaki liboso ya Nabote. Babandaki kopesa litatoli mpo na kofunda Nabote na miso ya bato, ete: “Nabote alakeli Nzambe mabe mpe alakeli mokonzi mabe!”+ Nsima na yango, babimisaki Nabote libándá ya engumba mpe babambaki ye mabanga tii akufaki.+ 14 Bongo batindelaki Yezabele maloba oyo: “Babambi Nabote mabanga mpe akufi.”+

15 Ntango kaka Yezabele ayokaki ete babambi Nabote mabanga mpe akufi, alobaki na Ahaba boye: “Kende kozwa elanga ya vinyo ya Nabote moto ya Yizireele;+ elanga oyo aboyaki kotɛkela yo, mpo Nabote azali lisusu na bomoi te; akufi.” 16 Ntango kaka Ahaba ayokaki ete Nabote akufi, akendaki na elanga ya vinyo ya Nabote Moyizireele mpo na kozwa yango.

17 Kasi Yehova alobaki na Eliya+ Motishebe ete: 18 “Kende na Samaria kokutana na Ahaba mokonzi ya Yisraele.+ Azali na elanga ya vinyo ya Nabote, akei kuna mpo na kozwa yango. 19 Osengeli koloba na ye boye, ‘Talá oyo Yehova alobi: “Obomi moto+ mpe lisusu ozwi mabele na ye?”’+ Na nsima, lobá na ye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Na esika oyo bambwa elɛmbɔlaki makila ya Nabote, bambwa ekolɛmbɔla mpe makila na yo.”’”+

20 Ahaba alobaki na Eliya: “Aa monguna na ngai, ozwi ngai mpenza!”+ Eliya ayanolaki: “Ɛɛ, nazwi yo. Nzambe alobi: ‘Mpo otingami* na kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ 21 talá, nazali komemela yo mpasi; nakokɔmbola yo mpenza mpe nakosilisa na libota na yo mobali nyonso,*+ ezala oyo azangi makoki mpe azangi ntina na Yisraele.+ 22 Mpe nakosala libota na yo kaka ndenge nasalaki libota ya Yeroboame+ mwana ya Nebate mpe libota ya Baasha+ mwana ya Ahiya, mpo olamwisi nkanda na ngai mpe osalisi Yisraele lisumu.’ 23 Mpe mpo na Yezabele, Yehova alobi: ‘Bambwa ekolya Yezabele na eteni ya mabele ya Yizireele.+ 24 Moto nyonso ya libota ya Ahaba oyo akokufa na engumba, bambwa ekolya ye; mpe moto nyonso oyo akokufa na esobe, bandɛkɛ ya likoló ekolya ye.+ 25 Ya solo, moto moko te azalaki mabe lokola Ahaba,+ oyo azalaki kolinga kaka kosala* makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo mwasi na ye Yezabele+ azalaki kotinda ye asala mabe yango. 26 Asalaki mabe na ndenge ya nsɔmɔ mpenza mpo azalaki kosambela bikeko ya bosɔtɔ,* kaka lokola Baamore, bato oyo Yehova abenganaki liboso ya Bayisraele.’”+

27 Ntango kaka Ahaba ayokaki maloba wana, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ* na nzoto na ye; akilaki bilei mpe azalaki se kolala na ngɔtɔ* mpe azalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na mawa. 28 Bongo Yehova alobaki na Eliya Motishebe ete: 29 “Omoni ndenge Ahaba amikitisi ntango ayoki etumbu oyo nakateli ye?+ Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa mpasi yango te ntango azali naino na bomoi. Nakoyeisa mpasi na libota na ye na mikolo ya mwana na ye.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto