Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Anzelu ayei epai ya Manoa ná mwasi na ye (1-23)

      • Samsone abotami (24, 25)

Basambisi 13:1

Mitindami

  • +Bas 2:11, 19; 10:6
  • +Yos 13:1-3; Bas 10:7

Basambisi 13:2

Mitindami

  • +Yos 15:20, 33; 19:41, 48
  • +Eb 49:16
  • +Bas 16:31
  • +Eb 30:22, 23

Basambisi 13:3

Mitindami

  • +Eb 18:10; 1Sa 1:20; Lk 1:11, 13

Basambisi 13:4

Mitindami

  • +Mit 6:2, 3; Lk 1:15
  • +Le 11:26, 27

Basambisi 13:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “oyo apesami; oyo atyami pembeni.”

  • *

    Lil., “ntango akobima na libumu.”

Mitindami

  • +Mit 6:2, 5
  • +Bas 2:16; 13:1; Ne 9:27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 25

Basambisi 13:6

Mitindami

  • +Bas 13:17, 18

Basambisi 13:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ ntango akobima na libumu.”

Basambisi 13:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2015, lok. 3

    15/8/2013, lok. 16

Basambisi 13:10

Mitindami

  • +Bas 13:3

Basambisi 13:12

Mitindami

  • +Bas 13:8

Basambisi 13:13

Mitindami

  • +Bas 13:4

Basambisi 13:14

Mitindami

  • +Mit 6:2, 3
  • +Le 11:26, 27

Basambisi 13:15

Mitindami

  • +Eb 18:5, 7; Bas 6:18, 19; Ebr 13:2

Basambisi 13:17

Mitindami

  • +Eb 32:29; Bas 13:6

Basambisi 13:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2013, lok. 10

Basambisi 13:21

Mitindami

  • +Bas 6:22, 23

Basambisi 13:22

Mitindami

  • +Kob 33:20; Yn 1:18

Basambisi 13:23

Mitindami

  • +Bas 13:16

Basambisi 13:24

Mitindami

  • +Ebr 11:32

Basambisi 13:25

Mitindami

  • +Bas 3:9, 10; 6:34; 11:29; 1Sa 11:6
  • +Bas 18:11, 12
  • +Yos 15:20, 33

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 13:1Bas 2:11, 19; 10:6
Bas. 13:1Yos 13:1-3; Bas 10:7
Bas. 13:2Yos 15:20, 33; 19:41, 48
Bas. 13:2Eb 49:16
Bas. 13:2Bas 16:31
Bas. 13:2Eb 30:22, 23
Bas. 13:3Eb 18:10; 1Sa 1:20; Lk 1:11, 13
Bas. 13:4Mit 6:2, 3; Lk 1:15
Bas. 13:4Le 11:26, 27
Bas. 13:5Mit 6:2, 5
Bas. 13:5Bas 2:16; 13:1; Ne 9:27
Bas. 13:6Bas 13:17, 18
Bas. 13:10Bas 13:3
Bas. 13:12Bas 13:8
Bas. 13:13Bas 13:4
Bas. 13:14Mit 6:2, 3
Bas. 13:14Le 11:26, 27
Bas. 13:15Eb 18:5, 7; Bas 6:18, 19; Ebr 13:2
Bas. 13:17Eb 32:29; Bas 13:6
Bas. 13:21Bas 6:22, 23
Bas. 13:22Kob 33:20; Yn 1:18
Bas. 13:23Bas 13:16
Bas. 13:24Ebr 11:32
Bas. 13:25Bas 3:9, 10; 6:34; 11:29; 1Sa 11:6
Bas. 13:25Bas 18:11, 12
Bas. 13:25Yos 15:20, 33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 13:1-25

Basambisi

13 Bayisraele basalaki lisusu makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ mpe Yehova apesaki bango na lobɔkɔ ya Bafilistia+ mbula 40.

2 Na ntango yango, ezalaki na mobali moko ya engumba Zora,+ ya libota ya Badani,+ oyo nkombo na ye ezalaki Manoa.+ Mwasi na ye azalaki ekomba mpe azalaki na bana te.+ 3 Mokolo moko, anzelu ya Yehova abimelaki mwasi yango mpe alobaki na ye: “Talá, ozali ekomba mpe ozali na bana te. Kasi okozwa zemi mpe okobota mwana mobali.+ 4 Sikoyo kebá ete omɛla vinyo te to masanga mosusu nyonso oyo elangwisaka,+ mpe kolya ata eloko moko te ya mbindo.+ 5 Talá! Okozwa zemi, mpe okobota mwana mobali, mpe razware esengeli koleka na motó na ye te,+ mpo mwana yango akozala Monaziri* ya Nzambe banda ntango akobotama,* mpe akosala mpo na kobikisa Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+

6 Na nsima, mwasi yango akendaki mpe alobaki na mobali na ye boye: “Moto moko ya Nzambe ya solo ayaki epai na ngai, mpe azalaki komonana lokola anzelu ya Nzambe ya solo, nsɔmɔ mpenza. Natunaki ye te soki autaki wapi, mpe ayebisaki ngai nkombo na ye te.+ 7 Kasi alobaki na ngai: ‘Talá! Okozwa zemi, mpe okobota mwana mobali. Kasi komɛla vinyo te to masanga mosusu oyo elangwisaka, mpe kolya eloko moko te ya mbindo, mpo mwana yango akozala Monaziri ya Nzambe, banda mokolo oyo akobotama* tii mokolo oyo akokufa.’”

8 Bongo Manoa abondelaki Yehova mpe alobaki: “Limbisá ngai, Yehova. Nabondeli yo, tiká moto ya Nzambe ya solo oyo outi kotinda aya lisusu mpo ayebisa biso ndenge oyo tokobɔkɔla mwana oyo akobotama.” 9 Nzambe ya solo ayokaki Manoa, mpe anzelu ya Nzambe ya solo ayaki lisusu epai ya mwasi yango ntango afandaki na elanga, kasi mobali na ye Manoa azalaki elongo na ye te. 10 Na mbala moko mwasi yango apotaki mbangu mpe ayebisaki mobali na ye: “Talá! Mobali oyo ayaki epai na ngai mokolo wana abimeli ngai lisusu.”+

11 Bongo Manoa atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na mwasi na ye. Ntango akómaki epai ya mobali yango, atunaki ye boye: “Yo nde mobali oyo asololaki na mwasi na ngai?” Ayanolaki: “Ɛɛ, ezali ngai.” 12 Bongo Manoa alobaki: “Tiká maloba na yo ekokisama! Kasi bomoi ya mwana yango ekozala ndenge nini, mpe mosala na ye ekozala nini?”+ 13 Bongo anzelu ya Yehova alobaki na Manoa boye: “Mwasi na yo akeba na makambo nyonso oyo nalobaki na ye.+ 14 Asengeli te kolya eloko nyonso oyo euti na nzete ya vinyo, asengeli te komɛla vinyo to masanga oyo elangwisaka,+ mpe asengeli te kolya eloko ya mbindo, ata ya ndenge nini.+ Makambo nyonso oyo napesaki ye mitindo, atosa yango.”

15 Bongo Manoa alobaki na anzelu ya Yehova: “Nabondeli yo, fandá naino mwa moke mpo tólambela yo mwana-ntaba.”+ 16 Kasi anzelu ya Yehova alobaki na Manoa: “Ata soki nafandi, nakolya biloko na yo te. Kasi soki olingi kopesa Yehova likabo ya kotumba, okoki kopesa yango.” Manoa ayebaki te ete ezalaki anzelu ya Yehova. 17 Na nsima Manoa alobaki na anzelu ya Yehova boye: “Nkombo na yo nani,+ mpo tókumisa yo ntango liloba na yo ekokokisama?” 18 Kasi anzelu ya Yehova alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kotuna nkombo na ngai? Yango ezali nkombo ya kokamwa.”

19 Na nsima Manoa azwaki mwana-ntaba ná likabo ya mbuma mpe apesaki yango mbeka epai ya Yehova likoló ya libanga. Mpe Nzambe azalaki kosala likambo moko ya kokamwa wana, Manoa ná mwasi na ye bazalaki kotala. 20 Wana mɔtɔ oyo ezalaki kopela na etumbelo emataki likoló, anzelu ya Yehova amataki na likoló na kati ya mɔtɔ yango, mpe Manoa ná mwasi na ye bazalaki kotala. Na mbala moko, bakweaki na mabele, bilongi na nse. 21 Bongo Manoa ayaki koyeba ete ezalaki anzelu ya Yehova.+ Anzelu ya Yehova abimelaki lisusu Manoa ná mwasi na ye te. 22 Na yango, Manoa alobaki na mwasi na ye: “Tokokufa mpenza, mpo tomoni nde Nzambe.”+ 23 Kasi mwasi na ye alobaki na ye: “Soki Yehova azalaki na mposa ya koboma biso, alingaki te kondima likabo ya kotumba+ mpe likabo ya mbuma oyo euti na lobɔkɔ na biso. Alingaki mpe te kolakisa biso makambo oyo nyonso, mpe koyebisa biso makambo ya boye.”

24 Na nsima, mwasi yango abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Samsone.+ Wana mwana yango azalaki kokola, Yehova azalaki ntango nyonso kopambola ye. 25 Na nsima elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na ye+ na Mahane-dani,+ kati na Zora mpe Eshetaole.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto