Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Mosambisi Tola mpe Yaire (1-5)

      • Bayisraele batomboki mpe babongoli motema (6-16)

      • Baamone balingi kobundisa Yisraele (17, 18)

Basambisi 10:1

Mitindami

  • +Bas 2:16

Basambisi 10:4

Mitindami

  • +Mib 3:14

Basambisi 10:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Siri.”

Mitindami

  • +Bas 2:19; 4:1; 6:1; Ne 9:28
  • +Bas 3:7; Nz 106:36-38
  • +Mit 25:1, 2
  • +1Ba 11:5; 2Ba 23:13
  • +Bas 16:23; 1Sa 5:4; 2Ba 1:2

Basambisi 10:7

Mitindami

  • +Mib 28:15, 48; 31:17; Bas 2:14; 4:2

Basambisi 10:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2007, lok. 8

Basambisi 10:10

Mitindami

  • +Mib 4:30
  • +Bas 2:13; 3:7; 1Sa 12:9, 10

Basambisi 10:11

Mitindami

  • +Kob 14:30
  • +Mit 21:23-25
  • +Bas 3:31

Basambisi 10:13

Mitindami

  • +Bas 2:12
  • +2Nt 15:2; Mik 3:4

Basambisi 10:14

Mitindami

  • +1Ba 18:27
  • +Yir 2:28

Basambisi 10:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ye etikaki lisusu nzela te ete Bayisraele bámona mpasi.”

Mitindami

  • +Mib 7:26
  • +2Nt 7:14; 33:13, 15; Nz 106:44; Yis 63:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, nk. 254, 259

Basambisi 10:17

Mitindami

  • +Eb 19:36, 38; Bas 3:13

Basambisi 10:18

Mitindami

  • +Bas 11:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 10:1Bas 2:16
Bas. 10:4Mib 3:14
Bas. 10:6Bas 2:19; 4:1; 6:1; Ne 9:28
Bas. 10:6Bas 3:7; Nz 106:36-38
Bas. 10:6Mit 25:1, 2
Bas. 10:61Ba 11:5; 2Ba 23:13
Bas. 10:6Bas 16:23; 1Sa 5:4; 2Ba 1:2
Bas. 10:7Mib 28:15, 48; 31:17; Bas 2:14; 4:2
Bas. 10:10Mib 4:30
Bas. 10:10Bas 2:13; 3:7; 1Sa 12:9, 10
Bas. 10:11Kob 14:30
Bas. 10:11Mit 21:23-25
Bas. 10:11Bas 3:31
Bas. 10:13Bas 2:12
Bas. 10:132Nt 15:2; Mik 3:4
Bas. 10:141Ba 18:27
Bas. 10:14Yir 2:28
Bas. 10:16Mib 7:26
Bas. 10:162Nt 7:14; 33:13, 15; Nz 106:44; Yis 63:9
Bas. 10:17Eb 19:36, 38; Bas 3:13
Bas. 10:18Bas 11:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 10:1-18

Basambisi

10 Nsima ya Abimeleke, Tola mwana ya Pua, mwana ya Dodo, mobali moko ya libota ya Isakare, atɛlɛmaki mpo na kobikisa Yisraele.+ Azalaki kofanda na Shamire, na etúká ya ngombangomba ya Efraime. 2 Asambisaki Yisraele mbula 23. Na nsima, akufaki mpe bakundaki ye na Shamire.

3 Nsima na ye, Yaire moto ya Gileade atɛlɛmaki mpe asambisaki Yisraele mbula 22. 4 Azalaki na bana mibali 30 oyo bazalaki kotambola na bampunda 30, mpe bazalaki na bingumba 30. Babengaka bingumba yango Havote-yaire+ tii na mokolo ya lelo; ezali na mokili ya Gileade. 5 Nsima na yango, Yaire akufaki mpe bakundaki ye na Kamone.

6 Bayisraele basalaki lisusu makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ mpe bakómaki kosalela Babaala+ mpe bikeko ya Ashitorete, banzambe ya Arame,* banzambe ya Sidone, banzambe ya Moabe,+ banzambe ya Baamone,+ mpe banzambe ya Bafilistia.+ Bapesaki Yehova mokɔngɔ mpe batikaki kosalela ye. 7 Na yango nkanda ya Yehova engalelaki Yisraele, mpe akabaki bango na mabɔkɔ ya Bafilistia mpe ya Baamone.+ 8 Bongo bamonisaki Bayisraele bwale mpe banyokolaki bango makasi mpenza kobanda mbula wana. Mpe na boumeli ya mbula 18, banyokolaki Bayisraele nyonso oyo bazalaki na Gileade, na ngámbo ya Yordani oyo ezalaki liboso mokili ya Baamore. 9 Lisusu, Baamone bazalaki kokatisa Yordani mpo na kobundisa Yuda, Benyamina mpe ndako ya Efraime; mpe Yisraele emonaki bwale mpenza. 10 Bongo Bayisraele babelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi,+ balobi: “Tosaleli yo lisumu, mpo totikaki Nzambe na biso mpe tosalelaki Babaala.”+

11 Kasi Yehova alobaki na Bayisraele boye: “Ntango Baezipito,+ Baamore,+ Baamone, Bafilistia,+ 12 Basidone, Baamaleke, mpe Bamidiane, bazalaki konyokola bino, ngai nde nabikisaki bino, boye te? Ntango bobelelaki ngai, nabikisaki bino na lobɔkɔ na bango. 13 Kasi, bosundolaki ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu.+ Yango wana, nakobikisa bino lisusu te.+ 14 Bókende epai ya banzambe oyo boponi mpe bóbelela bango mpo na kosɛnga lisalisi.+ Bábikisa bino na ntango oyo bozali na mpasi.”+ 15 Kasi Bayisraele balobaki na Yehova boye: “Tosali lisumu. Salá biso nyonso oyo ezali malamu na miso na yo. Kasi tobondeli yo, bikisá biso lelo.” 16 Na nsima balongolaki banzambe ya bapaya na kati na bango mpe basalelaki Yehova,+ bongo akokaki lisusu te kokanga motema mpo na mpasi ya Yisraele.*+

17 Na nsima, Baamone+ bayanganaki mpo na etumba mpe batyaki kaa na Gileade. Bongo Bayisraele bayanganaki mpe batyaki kaa na Mizipa. 18 Bato mpe bankumu ya Gileade balobanaki bango na bango ete: “Nani akokamba biso na etumba mpo na kobunda na Baamone?+ Tiká akóma mokonzi ya bato nyonso oyo bafandi na Gileade.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto