Mokanda ya liboso ya Samwele
5 Ntango Bafilistia babɔtɔlaki Sanduku ya Nzambe ya solo,+ bamemaki yango longwa na Ebenezere tii na Ashedode. 2 Bafilistia bazwaki Sanduku ya Nzambe ya solo, bamemaki yango na tempelo* ya nzambe na bango Dagone, mpe batyaki yango pembeni ya Dagone.+ 3 Na mokolo oyo elandaki, ntango bato ya Ashedode balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, bakutaki Dagone akwei elongi na nse liboso ya Sanduku ya Yehova.+ Na yango, bazwaki Dagone mpe bazongisaki ye na esika na ye.+ 4 Ntango balamukaki lobi na ntɔngɔntɔngɔ, bakutaki Dagone akwei lisusu elongi na nse liboso ya Sanduku ya Yehova. Motó ya Dagone mpe mabɔkɔ na ye nyonso ekatani, elali na nse ya ekɔtelo ya tempelo. Kaka eteni na ye oyo ezalaki lokola mbisi* nde ekatanaki te. 5 Yango wana tii na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagone mpe baoyo nyonso bakɔtaka na tempelo ya Dagone na Ashedode banyataka nse ya ekɔtelo ya tempelo ya Dagone te.
6 Lobɔkɔ ya Yehova efinaki bato ya Ashedode: abɛtaki Ashedode ná bateritware na yango na ndenge abɛlisaki bato maladi ya mosomba.+ 7 Ntango mibali ya Ashedode bamonaki likambo oyo esalamaki, balobaki: “Bótika te ete Sanduku ya Nzambe ya Yisraele efanda kati na biso, mpo lobɔkɔ na ye ezali kofina biso ná nzambe na biso Dagone.” 8 Na yango, batindaki bato mpe bayanganisaki bankolo nyonso ya Bafilistia mpe batunaki bango boye: “Tosengeli kosala nini mpo na Sanduku ya Nzambe ya Yisraele?” Bazongisaki boye: “Bókende na Sanduku ya Nzambe ya Yisraele na Gate.”+ Bongo bakendaki na Sanduku ya Nzambe ya Yisraele kuna.
9 Nsima ya komema yango kuna, lobɔkɔ ya Yehova ebɛtaki engumba yango, etyaki yikiyiki monene mpenza. Abɛtaki mibali nyonso ya engumba yango, banda na oyo ya moke tii na oyo ya monene, mpe misomba ebandaki kobima bango.+ 10 Na yango, batindaki Sanduku ya Nzambe ya solo na Ekrone.+ Kasi ntango kaka Sanduku ya Nzambe ya solo ekómaki kuna, bato ya Ekrone babandaki koganga boye: “Bayei na Sanduku ya Nzambe ya Yisraele epai na biso mpo eboma biso ná bato na biso!”+ 11 Na nsima, batindaki bato mpe bayanganisaki bankolo nyonso ya Bafilistia mpe balobaki: “Bótika Sanduku ya Nzambe ya Yisraele ekende; bótika yango ezonga na esika na yango mpo biso ná bato na biso tókufa te.” Mpo nsɔmɔ ya liwa epalanganaki na engumba mobimba; lobɔkɔ ya Nzambe ya solo efinaki bango makasi kuna,+ 12 mpe bato oyo bakufaki te babɛlaki maladi ya mosomba. Mpe kolela ya engumba yango mpo na kosɛnga lisalisi emataki tii na likoló.