Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Bafilistia bazongisi Sanduku na Yisraele (1-21)

1 Samwele 6:1

Mitindami

  • +1Sa 4:11; 5:1; Nz 78:61

1 Samwele 6:2

Mitindami

  • +Mib 18:9, 10; Yis 2:6

1 Samwele 6:3

Mitindami

  • +1Sa 6:4, 17

1 Samwele 6:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na bisika mosusu babengaka yango “bampuku.”

Mitindami

  • +Yos 13:2, 3; 1Sa 6:16

1 Samwele 6:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na bisika mosusu babengaka yango “bampuku.”

Mitindami

  • +1Sa 6:18
  • +1Sa 5:6, 11

1 Samwele 6:6

Mitindami

  • +Kob 7:13; 8:15; 14:17
  • +Kob 9:14, 16; Ro 9:17, 18
  • +Kob 6:1; 11:1; 12:33

1 Samwele 6:8

Mitindami

  • +1Sa 6:3, 4

1 Samwele 6:9

Mitindami

  • +Yos 15:10, 12; 21:8, 16; 2Nt 28:18

1 Samwele 6:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na bisika mosusu babengaka yango “bampuku.”

1 Samwele 6:12

Mitindami

  • +1Sa 6:8, 9

1 Samwele 6:14

Mitindami

  • +1Sa 6:7

1 Samwele 6:15

Mitindami

  • +Mit 3:30, 31
  • +Yos 21:8, 16

1 Samwele 6:17

Mitindami

  • +1Sa 6:4
  • +1Sa 5:1
  • +1Sa 5:8
  • +Bas 1:18; 1Sa 5:10

1 Samwele 6:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Na bisika mosusu babengaka yango “bampuku.”

1 Samwele 6:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mibali 70, mibali 50 000.”

Mitindami

  • +Mit 4:15, 20; 1Nt 13:10

1 Samwele 6:20

Mitindami

  • +Le 11:45
  • +Mit 17:12, 13; 2Sa 6:8, 9; Nz 76:7

1 Samwele 6:21

Mitindami

  • +Yos 18:14; 1Nt 13:5, 6
  • +1Nt 16:1; 2Nt 1:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 6:11Sa 4:11; 5:1; Nz 78:61
1 Sa. 6:2Mib 18:9, 10; Yis 2:6
1 Sa. 6:31Sa 6:4, 17
1 Sa. 6:4Yos 13:2, 3; 1Sa 6:16
1 Sa. 6:51Sa 6:18
1 Sa. 6:51Sa 5:6, 11
1 Sa. 6:6Kob 7:13; 8:15; 14:17
1 Sa. 6:6Kob 9:14, 16; Ro 9:17, 18
1 Sa. 6:6Kob 6:1; 11:1; 12:33
1 Sa. 6:81Sa 6:3, 4
1 Sa. 6:9Yos 15:10, 12; 21:8, 16; 2Nt 28:18
1 Sa. 6:121Sa 6:8, 9
1 Sa. 6:141Sa 6:7
1 Sa. 6:15Mit 3:30, 31
1 Sa. 6:15Yos 21:8, 16
1 Sa. 6:171Sa 6:4
1 Sa. 6:171Sa 5:1
1 Sa. 6:171Sa 5:8
1 Sa. 6:17Bas 1:18; 1Sa 5:10
1 Sa. 6:19Mit 4:15, 20; 1Nt 13:10
1 Sa. 6:20Le 11:45
1 Sa. 6:20Mit 17:12, 13; 2Sa 6:8, 9; Nz 76:7
1 Sa. 6:21Yos 18:14; 1Nt 13:5, 6
1 Sa. 6:211Nt 16:1; 2Nt 1:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 6:1-21

Mokanda ya liboso ya Samwele

6 Sanduku+ ya Yehova esalaki sanza nsambo na teritware ya Bafilistia. 2 Bafilistia babengaki banganga-nzambe ná basakoli ya makambo oyo ebombaná,+ mpe batunaki bango boye: “Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yehova? Bóyebisa biso ndenge oyo tosengeli kozongisa yango na esika na yango.” 3 Bayanolaki boye: “Soki bozongisi sanduku ya Yehova Nzambe ya Yisraele, bózongisa yango kozanga likabo te. Bosengeli kosala nyonso ete bózongisela ye ná likabo ya ngambo.+ Kaka soki bosali bongo nde bokobika, mpe bokoyeba mpenza mpo na nini lobɔkɔ na ye ezali kolongwa likoló na bino te.” 4 Bongo batunaki: “Likabo nini ya ngambo tosengeli kotindela ye?” Bayanolaki: “Na kolanda motángo ya bankolo ya Bafilistia,+ bótindela ye misomba mitano ya wolo mpe bampóko* mitano ya wolo, mpo kaka mpasi moko wana nde ezali konyokola mokomoko na bino mpe bankolo na bino. 5 Bosengeli kosala bikeko ya misomba na bino mpe bikeko ya bampóko*+ na bino oyo ezali kobebisa mokili na bino, mpe bosengeli kokumisa Nzambe ya Yisraele. Mbala mosusu akolongola mpasi oyo lobɔkɔ na ye ememeli bino, ná nzambe na bino, mpe mokili na bino.+ 6 Mpo na nini bolingi kokómisa mitema na bino makasi ndenge bato ya Ezipito mpe Farao bakómisaki mitema na bango makasi?+ Ntango Nzambe apesaki bango bitumbu ya makasi+ nde batikaki Bayisraele bákende, mpe bakendaki.+ 7 Sikoyo bósala pusupusu ya sika mpe bózwa bangɔmbɛ mibale oyo ezali na bana mpe oyo batyá naino ekanganeli likoló na yango te. Bókangisa bangɔmbɛ yango na pusu wana, kasi bózongisa bana na yango na lopango na yango. 8 Bózwa Sanduku ya Yehova mpe bótya yango na pusu, mpe bótya biloko ya wolo oyo bolingi kotindela ye lokola likabo ya ngambo na kɛsi moko pembeni na yango.+ Na nsima, bótika bangɔmbɛ yango ekende 9 mpe bótala: Soki emati na nzela oyo ekei tii na Bete-shemeshe,+ na teritware na yango moko, yango ekomonisa ete ye nde amemeli biso mpasi monene oyo. Kasi soki esalemi bongo te, tokoyeba ete ezalaki lobɔkɔ na ye te nde ebɛtaki biso; kasi likambo yango ekómelaki biso kaka mpamba boye.”

10 Mibali yango basalaki kaka bongo. Bazwaki bangɔmbɛ mibale oyo ezali na bana mpe bakangisaki yango na pusu, mpe bakangaki bana na yango na lopango. 11 Na nsima, batyaki Sanduku ya Yehova na pusu yango, bakisa mpe kɛsi oyo ezalaki na bampóko* ya wolo mpe bikeko ya misomba na bango. 12 Mpe bangɔmbɛ yango ekendaki kaka liboso, na nzela oyo ekei tii na Bete-shemeshe.+ Ekobaki kotambola kaka na balabala ya monene, mpe ezalaki kolela nzelanzela. Ebalukaki na lobɔkɔ ya mobali te, na lobɔkɔ ya mwasi mpe te. Mpe na ntango wana nyonso, bankolo ya Bafilistia bazalaki kolanda yango nsimansima tii na ndelo ya Bete-shemeshe. 13 Bato ya Bete-shemeshe bazalaki kobuka mbuma ya blé na lobwaku patatalu. Ntango batombolaki miso na bango mpe bamonaki Sanduku, basepelaki mingi komona yango. 14 Pusu yango ekɔtaki na elanga ya Yosua, moto ya Bete-shemeshe, mpe etɛlɛmaki wana, pene na libanga moko monene. Bongo bapasolaki mabaya ya pusu yango, mpe bapesaki bangɔmbɛ yango+ lokola likabo ya kotumba epai ya Yehova.

15 Balevi+ bakitisaki Sanduku ya Yehova mpe kɛsi oyo ezalaki na biloko ya wolo, mpe batyaki yango likoló ya libanga wana monene. Na mokolo yango, bato ya Bete-shemeshe+ bapesaki Yehova makabo ya kotumba mpe bambeka.

16 Ntango bankolo mitano ya Bafilistia bamonaki bongo, bazongaki na Ekrone mokolo yango. 17 Oyo nde misomba ya wolo, oyo Bafilistia batindelaki Yehova lokola likabo ya ngambo:+ moko mpo na Ashedode,+ moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashekelone, moko mpo na Gate,+ moko mpo na Ekrone.+ 18 Mpe motángo ya bampóko* ya wolo ekokanaki na motángo ya bingumba nyonso ya bankolo mitano ya Bafilistia, ezala bingumba na bango oyo ebatelami makasi mpe bamboka na bilanga.

Mpe libanga monene esika bakitisaki Sanduku ya Yehova ezali litatoli tii lelo oyo na kati ya elanga ya Yosua, moto ya Bete-shemeshe. 19 Kasi Nzambe abomaki mibali ya Bete-shemeshe, mpo batalaki Sanduku ya Yehova. Abomaki bato 50 070,* mpe bato babandaki kolela mpo Yehova abomaki bato ebele mpenza.+ 20 Bongo, bato ya Bete-shemeshe batunaki boye: “Nani akokoka kotɛlɛma liboso ya Yehova, Nzambe mosantu+ oyo? Soki alongwe epai na biso, akokende epai ya nani?”+ 21 Na yango, batindaki bamemi-nsango epai ya bato oyo bafandi na Kiriate-yearime,+ balobi: “Bafilistia bazongisi Sanduku ya Yehova. Bókita, bózwa yango mpe bómata na yango epai na bino.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto