Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 47
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Mokɛli oyo ezali kouta na tempelo (1-12)

        • Mai ezali kokóma mozindo mokemoke (2-5)

        • Mai ya Mbu Ekufá ekobika (8-10)

        • Bisika ya pɔtɔpɔtɔ ekobika te (11)

        • Banzete mpo na bilei mpe kobikisa (12)

      • Bandelo ya mokili (13-23)

Ezekiele 47:1

Mitindami

  • +Ezk 41:2
  • +Zek 13:1; 14:8; Em 22:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    1/3/1999, nk. 10-11, 18-20

Ezekiele 47:2

Mitindami

  • +Ezk 40:20
  • +Ezk 40:6; 44:1, 2

Ezekiele 47:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Ezk 40:3; Em 21:15

Ezekiele 47:7

Mitindami

  • +Em 22:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, nk. 10-11

Ezekiele 47:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mokili patatalu oyo ekauká.”

Mitindami

  • +Mib 4:47, 49
  • +Zek 14:8

Ezekiele 47:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

  • *

    Lil., “mikɛli mibale.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    1/3/1999, nk. 10-11, 18-19, 21-22

Ezekiele 47:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Mediterane.”

Mitindami

  • +Yos 15:20, 62; 2Nt 20:2
  • +Mit 34:2, 6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 21

Ezekiele 47:11

Mitindami

  • +Mib 29:22, 23; Nz 107:33, 34; Yir 17:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    1/3/1999, nk. 21-22

Ezekiele 47:12

Mitindami

  • +Ezk 47:1
  • +Em 22:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    1/3/1999, nk. 21-22

Ezekiele 47:13

Mitindami

  • +Eb 48:5; 1Nt 5:1; Ezk 48:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, nk. 18, 22-23

Ezekiele 47:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bokozwa yango libula, moto na moto ndenge moko na ndeko na ye.”

  • *

    Lil., “ekweyeli bino.”

Mitindami

  • +Eb 26:3; 28:13

Ezekiele 47:15

Mitindami

  • +Ezk 48:1
  • +Mit 34:2, 8

Ezekiele 47:16

Mitindami

  • +Mit 13:21
  • +2Sa 8:8
  • +Ezk 47:18

Ezekiele 47:17

Mitindami

  • +Mit 34:2, 9
  • +Ezk 48:1

Ezekiele 47:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Mbu Ekufá.”

Mitindami

  • +Mit 32:1

Ezekiele 47:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Wadi ya Ezipito.”

  • *

    Lil., “mopanzi ya sudi ekei na sudi.”

Mitindami

  • +Mib 32:51
  • +Ezk 48:28

Ezekiele 47:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔtelo ya Hamate.”

Mitindami

  • +Mit 34:2, 8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 47:1Ezk 41:2
Ezk. 47:1Zek 13:1; 14:8; Em 22:1
Ezk. 47:2Ezk 40:20
Ezk. 47:2Ezk 40:6; 44:1, 2
Ezk. 47:3Ezk 40:3; Em 21:15
Ezk. 47:7Em 22:1, 2
Ezk. 47:8Mib 4:47, 49
Ezk. 47:8Zek 14:8
Ezk. 47:10Yos 15:20, 62; 2Nt 20:2
Ezk. 47:10Mit 34:2, 6
Ezk. 47:11Mib 29:22, 23; Nz 107:33, 34; Yir 17:6
Ezk. 47:12Ezk 47:1
Ezk. 47:12Em 22:1, 2
Ezk. 47:13Eb 48:5; 1Nt 5:1; Ezk 48:5
Ezk. 47:14Eb 26:3; 28:13
Ezk. 47:15Ezk 48:1
Ezk. 47:15Mit 34:2, 8
Ezk. 47:16Mit 13:21
Ezk. 47:162Sa 8:8
Ezk. 47:16Ezk 47:18
Ezk. 47:17Mit 34:2, 9
Ezk. 47:17Ezk 48:1
Ezk. 47:18Mit 32:1
Ezk. 47:19Mib 32:51
Ezk. 47:19Ezk 48:28
Ezk. 47:20Mit 34:2, 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 47:1-23

Ezekiele

47 Bongo azongisaki ngai na esika ya kokɔta ya Tempelo,+ mpe kuna namonaki mai ezalaki kobima na nse ya ekɔtelo ya Tempelo, mpe ezalaki kotíyola na ɛsti,+ mpo liboso ya Tempelo ezalaki kotala na ɛsti. Mai ezalaki kokita, euti na nse, na lobɔkɔ ya mobali ya Tempelo, na sudi ya etumbelo.

2 Na nsima, abimisaki ngai na nzela ya porte ya nɔrdi+ mpe atambwisaki ngai na nzela ya libándá tii na porte ya libándá oyo etali na ɛsti,+ mpe namonaki mai ezalaki kotíyola na mopanzi ya lobɔkɔ ya mobali.

3 Ntango moto yango abimaki na ɛsti, ná nsinga ya komeka na lobɔkɔ na ye,+ amekaki mapeko* 1 000 mpe akatisaki ngai mai; mai ekómaki tii na makɛsi.

4 Na nsima amekaki lisusu mapeko 1 000 mpe akatisaki ngai mai, mpe mai ekómaki tii na mabɔlɔngɔ.

Amekaki lisusu mapeko 1 000 mpe akatisaki ngai, mpe mai ekómaki tii na loketo.

5 Ntango amekaki lisusu mapeko 1 000, ekómaki mokɛli oyo nakokaki kokatisa te, mpo mai ezalaki mozindo mpenza, mai oyo moto akoki kobɛta, mokɛli moko oyo moto akoki kokatisa te na makolo.

6 Atunaki ngai boye: “Mwana ya moto, omoni yango?”

Na nsima atambwisaki ngai mpe azongisaki ngai pembeni ya mokɛli yango. 7 Ntango nazongaki, namonaki ete banzete ezalaki ebele mpenza pembenipembeni ya mokɛli yango, na ngámbo nyonso mibale.+ 8 Bongo alobaki na ngai boye: “Mai oyo ezali kotíyola na etúká ya ɛsti, ezali kokita na Araba*+ mpe ezali kokɔta na mbu. Ntango ekokɔta na mbu,+ mai ya mbu ekobika. 9 Bikelamu* ya bomoi oyo etondanaka ekozala na likoki ya kozala na bomoi esika nyonso mai* ezali kotíyola. Mbisi ekozala beboo mpo mai oyo ekotíyola kuna. Mai ya mbu ekobika mpe eloko nyonso ekozala na bomoi na esika oyo mokɛli yango ekokende.

10 “Baluki-mbisi bakotɛlɛma pene na yango, uta na Ene-gedi+ tii na Ene-eglaime. Esika ya kokaukisa minyama ekozala wana. Mbisi ya ndenge na ndenge ekozala beboo, lokola mbisi ya Mbu Monene.*+

11 “Ekozala na bisika ya pɔtɔpɔtɔ mpe ya maziba, mpe yango ekobika te. Mungwa ekotikala na bisika yango.+

12 “Banzete ya ndenge nyonso ya kolya ekobima pembenipembeni ya mokɛli yango na ngámbo nyonso mibale. Nkasa na yango ekokauka te; mbuma na yango ekokoba kobota. Bakobuka mbuma ya sika sanza nyonso, mpo mai na yango ezali kouta na esika mosantu.+ Mbuma na yango ekozala mpo na kolya mpe nkasa na yango mpo na kobikisa.”+

13 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Oyo nde teritware bokokabola yango libula mpo ezala mokili ya mabota 12 ya Yisraele, mpe Yozefe akozwa biteni mibale.+ 14 Bokozwa yango libula, mpe bokozwa biteni ndenge moko.* Nalapaki ndai ete nakopesa bankɔkɔ na bino mokili yango,+ mpe sikoyo bakaboleli yango bino* lokola libula.

15 “Talá ndelo ya mokili yango na ngámbo ya nɔrdi: Elongwe uta na Mbu Monene na nzela oyo ekei na Hetelone+ tii na Zedade,+ 16 Hamate,+ Berota+ mpe Sibraime, oyo ezali kati na teritware ya Damasi ná ya Hamate tii na Hazere-hatikone, oyo ezali na ndelo ya Haurane.+ 17 Na yango ndelo ekokende uta na mbu tii na Hazare-enone,+ na ndelo ya Damasi tii na nɔrdi, mpe na ndelo ya Hamate.+ Yango nde ndelo ya nɔrdi.

18 “Mopanzi ya ɛsti ekei banda na esika oyo ekaboli Haurane ná Damasi, mpe pembenimpembeni ya Yordani kati na Gileade+ ná mokili ya Yisraele. Bokozwa mezire banda na ndelo tii na mbu ya ɛsti.* Yango nde ndelo ya ɛsti.

19 “Mopanzi ya sudi ekozala banda na Tamara tii na mai ya Meribate-Kadeshe,+ na nsima tii na Lobwaku* mpe tii na Mbu Monene.+ Yango nde ndelo* ya sudi.

20 “Na mopanzi ya wɛsti ezali Mbu Monene, banda na ndelo mpe tii na esika oyo etalani na Lebo-Hamate.*+ Yango nde ndelo ya wɛsti.”

21 “Bokokabola mokili yango na kati na bino, na kati ya mabota 12 ya Yisraele. 22 Bokokabola yango ezala libula mpo na bino mpe bato oyo bafandi bapaya na kati na bino, baoyo babotaki bana ntango bazalaki kofanda na kati na bino. Bakozala epai na bino lokola Bayisraele oyo bazali bana-mboka. Bakozwa libula elongo na bino na kati ya mabota ya Yisraele. 23 Bokopesa moto oyo afandi mopaya libula na teritware ya libota epai afandi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto