Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosakoli 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mosakoli

      • Salomo alobeli makambo oyo alukaki na bomoi na ye (1-11)

      • Bwanya ya moto ezali na motuya moke (12-16)

      • Mosala makasi ezali mpamba (17-23)

      • Kolya, komɛla mpe kosepela na mosala (24-26)

Mosakoli 2:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    7/2006, lok. 6

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, nk. 14-15

Mosakoli 2:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2006, lok. 13

    15/3/1997, nk. 14-15

Mosakoli 2:3

Mitindami

  • +Nz 104:15; Mos 10:19

Mosakoli 2:4

Mitindami

  • +1Ba 9:17-19; 2Nt 9:15, 16
  • +1Ba 7:1, 8
  • +1Ba 4:25; Loy 8:11

Mosakoli 2:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana ya ndako.”

Mitindami

  • +1Sa 8:10, 13; 1Ba 9:22
  • +1Ba 4:22, 23

Mosakoli 2:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “biloko oyo ezalaka epai.”

Mitindami

  • +1Ba 9:14, 28; 10:10; 2Nt 1:15
  • +1Ba 10:14, 15; 2Nt 9:13, 14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2011, lok. 6

Mosakoli 2:9

Mitindami

  • +1Ba 3:13; 10:23

Mosakoli 2:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “oyo miso na ngai esɛngaki.”

  • *

    To, “eteni.”

Mitindami

  • +Mos 11:9
  • +Mos 3:22; 5:18; 9:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/1997, nk. 3-4

Mosakoli 2:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “litomba.”

Mitindami

  • +1Ba 7:1
  • +Nz 49:10; Mos 1:14; 2:16; 1Ti 6:7
  • +Mos 1:3; 2:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2008, lok. 21

    15/10/1997, lok. 4

    15/2/1997, lok. 14

Mosakoli 2:12

Mitindami

  • +Mos 1:17; 7:25

Mosakoli 2:13

Mitindami

  • +Mas 4:7; Mos 7:11, 12

Mosakoli 2:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “miso na ye ezali na motó na ye.”

Mitindami

  • +Mas 4:25
  • +Mas 14:8; 17:24; Yn 3:19; 1Yn 2:11
  • +Mos 3:19, 20; 9:2, 3, 11

Mosakoli 2:15

Mitindami

  • +Nz 49:10

Mosakoli 2:16

Mitindami

  • +Kob 1:8; Mos 1:11
  • +Mos 6:8; Ro 5:12

Mosakoli 2:17

Mitindami

  • +1Ba 19:2, 4; Yir 20:17, 18
  • +Yb 7:6; Mos 2:21; Ro 8:20
  • +Mos 1:14; 5:16

Mosakoli 2:18

Mitindami

  • +Mos 2:4-8
  • +Nz 39:6; Lk 12:20

Mosakoli 2:19

Mitindami

  • +1Ba 12:6, 8; 2Nt 12:1, 9

Mosakoli 2:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kotika nyonso.”

Mitindami

  • +Mos 2:18; 5:15, 16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2004, lok. 27

Mosakoli 2:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “molende ya motema na ye.”

Mitindami

  • +Mos 1:3; 3:9

Mosakoli 2:23

Mitindami

  • +Yb 14:1, 2; Lk 12:29
  • +Eb 31:40, 41

Mosakoli 2:24

Mitindami

  • +Mib 12:18; Mos 3:22; 8:15; Mis 14:17
  • +Mos 3:12, 13; 5:18, 19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 37

    Lamuká!,

    10/2014, lok. 6

    4/1998, lok. 11

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2011, lok. 7

Mosakoli 2:25

Mitindami

  • +1Ba 4:7, 22, 23; 10:4, 5, 21

Mosakoli 2:26

Mitindami

  • +1Sa 18:14; Mas 3:32, 33; Yis 3:10
  • +Mib 6:10, 11; Mas 13:22; 28:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mos. 2:3Nz 104:15; Mos 10:19
Mos. 2:41Ba 9:17-19; 2Nt 9:15, 16
Mos. 2:41Ba 7:1, 8
Mos. 2:41Ba 4:25; Loy 8:11
Mos. 2:71Sa 8:10, 13; 1Ba 9:22
Mos. 2:71Ba 4:22, 23
Mos. 2:81Ba 9:14, 28; 10:10; 2Nt 1:15
Mos. 2:81Ba 10:14, 15; 2Nt 9:13, 14
Mos. 2:91Ba 3:13; 10:23
Mos. 2:10Mos 11:9
Mos. 2:10Mos 3:22; 5:18; 9:9
Mos. 2:111Ba 7:1
Mos. 2:11Nz 49:10; Mos 1:14; 2:16; 1Ti 6:7
Mos. 2:11Mos 1:3; 2:17
Mos. 2:12Mos 1:17; 7:25
Mos. 2:13Mas 4:7; Mos 7:11, 12
Mos. 2:14Mas 4:25
Mos. 2:14Mas 14:8; 17:24; Yn 3:19; 1Yn 2:11
Mos. 2:14Mos 3:19, 20; 9:2, 3, 11
Mos. 2:15Nz 49:10
Mos. 2:16Kob 1:8; Mos 1:11
Mos. 2:16Mos 6:8; Ro 5:12
Mos. 2:171Ba 19:2, 4; Yir 20:17, 18
Mos. 2:17Yb 7:6; Mos 2:21; Ro 8:20
Mos. 2:17Mos 1:14; 5:16
Mos. 2:18Mos 2:4-8
Mos. 2:18Nz 39:6; Lk 12:20
Mos. 2:191Ba 12:6, 8; 2Nt 12:1, 9
Mos. 2:21Mos 2:18; 5:15, 16
Mos. 2:22Mos 1:3; 3:9
Mos. 2:23Yb 14:1, 2; Lk 12:29
Mos. 2:23Eb 31:40, 41
Mos. 2:24Mib 12:18; Mos 3:22; 8:15; Mis 14:17
Mos. 2:24Mos 3:12, 13; 5:18, 19
Mos. 2:251Ba 4:7, 22, 23; 10:4, 5, 21
Mos. 2:261Sa 18:14; Mas 3:32, 33; Yis 3:10
Mos. 2:26Mib 6:10, 11; Mas 13:22; 28:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mosakoli 2:1-26

Mosakoli

2 Bongo nalobaki na motema na ngai boye: “Yaká, nameká naino bisengo mpe namona bolamu oyo ekobimisa.” Kasi talá! Yango mpe ezalaki mpamba.

 2 Nalobaki mpo na kosɛka ete: “Ligboma!”

Mpe mpo na kosepela ete: “Ezali na ntina nini?”

3 Nalukaki komisepelisa na vinyo,+ wana nazalaki kobatela ntango nyonso bwanya na ngai moko; nalandaki ata bozoba, nalukaki koyeba eloko oyo eleki malamu mpo bato básala na mwa mikolo ya bomoi na bango na nse ya lola. 4 Nasalaki misala minene.+ Natongaki bandako;+ nalonaki bilanga ya vinyo.+ 5 Namisalelaki bilanga ná bazamba, mpe nalonaki na kati banzete ya mbuma ya ndenge nyonso. 6 Namisalelaki maziba ya mai, mpo na kosopa mai na yango na zamba, mpo na kokolisa banzete. 7 Nazwaki basaleli ya mibali mpe ya basi,+ mpe nakómaki na basaleli oyo babotamaki na ndako* na ngai. Lisusu, nakómaki na bibwɛlɛ, bangɔmbɛ mpe bitonga ya bampate mingi mpenza,+ koleka baoyo nyonso bazalaki liboso na ngai na Yerusaleme. 8 Nandukaki palata ná wolo mpo na ngai moko,+ biloko ya motuya* ya bakonzi mpe ya bitúká.+ Nasangisaki mpo na ngai moko bayembi ya mibali, ya basi mpe makambo oyo esepelisaka mpenza bana ya bato: mwasi, ɛɛ, basi. 9 Bongo nakómaki moto monene mpe nalekaki moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai na Yerusaleme.+ Mpe nabatelaki kaka bwanya na ngai.

10 Nazalaki kosala eloko nyonso oyo nazalaki na mposa na yango.*+ Napimelaki motema na ngai ata esengo moko te, mpo motema na ngai esepelaki na mosala na ngai nyonso ya makasi, mpe yango ezalaki mbano* na ngai oyo euti na mosala na ngai nyonso ya makasi.+ 11 Kasi ntango natalaki misala nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala nyonso ya makasi oyo nakokisaki,+ namonaki ete nyonso ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko te ya motuya* mpenza ezali na nse ya moi.+

12 Bongo natyaki likebi na ngai na bwanya, ligboma ná bozoba.+ (Mpo eloko nini moto oyo akoya nsima ya mokonzi akoki kosala? Kaka eloko oyo bato basilá kosala.) 13 Mpe namonaki ete bwanya ezali na litomba koleka bozoba,+ kaka ndenge pole ezali na litomba koleka molili.

14 Moto ya bwanya, amonaka makambo polele;*+ kasi zoba atambolaka na molili.+ Nayaki mpe koyeba ete bango nyonso basukaka kaka ndenge moko.+ 15 Bongo nalobaki na motema na ngai ete: “Oyo ekómelaka zoba ekokómela mpe ngai.”+ Bongo nazwi nini ndenge nakómaki na bwanya koleka ndelo? Bongo nalobaki na motema na ngai: “Yango mpe ezali mpamba.” 16 Mpo bakokanisa moto ya bwanya mpo na libela te koleka zoba.+ Na mikolo ezali koya bakobosana bango nyonso. Mpe moto ya bwanya akokufa ndenge nini? Ndenge moko na zoba.+

17 Bongo nayinaki bomoi,+ mpamba te, eloko nyonso oyo esalemaki na nse ya moi emonanaki motungisi mpo na ngai, mpo nyonso ezalaki mpamba+ mpe kolanda mopɛpɛ.+ 18 Nayinaki mosala nyonso ya makasi oyo nasalaki na nse ya moi,+ mpo nasengelaki kotikela yango moto oyo akoya nsima na ngai.+ 19 Mpe nani ayebi soki akozala moto ya bwanya to zoba?+ Nzokande akozala na bokonzi likoló ya biloko na ngai nyonso oyo nazwá na nse ya moi na nzela ya molende makasi mpe bwanya na ngai. Yango mpe ezali mpamba. 20 Mpe na motema na ngai nakómaki kozanga elikya mpo na mosala nyonso ya makasi oyo nasalaki na nse ya moi. 21 Mpo moto akoki kosala mosala makasi na bwanya, na boyebi mpe na mayele, kasi asengeli kotika eteni* na ye na moto oyo asali mosala te mpo na kozwa yango.+ Yango mpe ezali mpamba mpe mpasi monene mpenza.

22 Moto azwaka mpenza nini na mosala na ye nyonso ya makasi mpe mposa makasi oyo etindaka ye* asala mosala makasi na nse ya moi?+ 23 Mpo na mikolo na ye nyonso, mosala na ye ememaka kaka mpasi mpe mitungisi,+ mpe ata na butu, motema na ye epemaka te.+ Yango mpe ezali kaka mpamba.

24 Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya, komɛla mpe kosepela na mosala na ye ya makasi.+ Yango mpe, namoni ete euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo,+ 25 mpo nani alyaka malamu mpe amɛlaka malamu koleka ngai?+

26 Nzambe ya solo apesaka bwanya, boyebi ná esengo epai ya moto oyo asepelisaka ye,+ kasi epai ya mosumuki apesaka ye mosala ya koyanganisa mpe ya kosangisa kaka mpo na kopesa moto oyo asepelisaka Nzambe ya solo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto