Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Yonatane asali likambo ya kokamwa na Mikemashe (1-14)

      • Nzambe akɔtisi yikiyiki epai ya banguna ya Yisraele (15-23)

      • Saulo alapisi bato ndai kozanga kokanisa (24-46)

        • Bato balei mosuni ná makila na yango (32-34)

      • Bitumba ya Saulo; bato ya libota na ye (47-52)

1 Samwele 14:1

Mitindami

  • +1Sa 14:49; 18:1; 2Sa 1:4

1 Samwele 14:2

Mitindami

  • +1Sa 10:26
  • +1Sa 13:15

1 Samwele 14:3

Mitindami

  • +Kob 29:5; Mit 27:21
  • +1Sa 22:9
  • +1Sa 4:21
  • +1Sa 2:12; 4:17
  • +1Sa 1:9
  • +Yos 18:1; 1Sa 1:3

1 Samwele 14:5

Mitindami

  • +1Sa 13:2, 3

1 Samwele 14:6

Mitindami

  • +Eb 17:9, 10; Bas 14:3; 15:18; 1Sa 17:36; 1Nt 10:4
  • +Bas 7:2; 2Ba 6:15, 16; 2Nt 14:11

1 Samwele 14:10

Mitindami

  • +Eb 24:14; Bas 7:11; 1Sa 10:7

1 Samwele 14:11

Mitindami

  • +1Sa 13:6; 14:22

1 Samwele 14:12

Mitindami

  • +1Sa 14:10
  • +1Sa 14:6; 2Sa 5:23, 24; 2Ba 6:15, 16

1 Samwele 14:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na etando ya mabele oyo ngɔmbɛ mibale ekokaki kotimola na mokolo moko, kabolá na mibale.”

1 Samwele 14:15

Mitindami

  • +1Sa 13:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2007, nk. 18-19

1 Samwele 14:16

Mitindami

  • +1Sa 10:26; 14:2
  • +1Sa 14:20

1 Samwele 14:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na mokolo yango.”

Mitindami

  • +1Sa 14:3

1 Samwele 14:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “longolá lobɔkɔ na yo.”

1 Samwele 14:22

Mitindami

  • +1Sa 13:6

1 Samwele 14:23

Mitindami

  • +Mib 33:29; Bas 2:18
  • +1Sa 13:5

1 Samwele 14:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “limpa.”

Mitindami

  • +Le 5:4; Mit 30:2; Mib 23:21

1 Samwele 14:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Mokili mobimba ekómaki.”

1 Samwele 14:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “miso na ye engɛngaki.”

Mitindami

  • +1Sa 14:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 22

1 Samwele 14:28

Mitindami

  • +1Sa 14:24

1 Samwele 14:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Talá ndenge miso na ngai engɛngi.”

1 Samwele 14:30

Mitindami

  • +1Sa 14:26

1 Samwele 14:31

Mitindami

  • +Yos 10:12

1 Samwele 14:32

Mitindami

  • +Eb 9:4; Le 3:17; 17:10; Mib 12:16; Mis 15:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1994, lok. 31

1 Samwele 14:33

Mitindami

  • +Mib 12:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1994, lok. 31

1 Samwele 14:34

Mitindami

  • +1Sa 14:32

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1994, lok. 31

1 Samwele 14:35

Mitindami

  • +1Sa 7:15, 17

1 Samwele 14:36

Mitindami

  • +Mit 27:21; 1Sa 30:7, 8

1 Samwele 14:37

Mitindami

  • +Bas 1:1; 1Sa 30:8; 2Sa 5:19

1 Samwele 14:41

Mitindami

  • +Kob 28:30; Mib 33:8; Ezr 2:62, 63

1 Samwele 14:42

Mitindami

  • +Mas 16:33

1 Samwele 14:43

Mitindami

  • +1Sa 14:27

1 Samwele 14:44

Mitindami

  • +1Sa 14:24

1 Samwele 14:45

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lobiko.”

  • *

    Lil., “basikolaki.”

Mitindami

  • +1Sa 14:14
  • +1Sa 14:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2007, nk. 18-19

1 Samwele 14:47

Mitindami

  • +1Sa 12:9
  • +1Sa 11:11
  • +Eb 36:8
  • +2Sa 10:6
  • +1Sa 9:16, 17

1 Samwele 14:48

Mitindami

  • +Kob 17:14; Mib 25:19; 1Sa 15:3

1 Samwele 14:49

Mitindami

  • +1Sa 31:2; 1Nt 8:33; 9:39
  • +1Sa 18:17
  • +1Sa 18:27; 25:44; 2Sa 3:13; 6:20

1 Samwele 14:50

Mitindami

  • +1Sa 17:55; 2Sa 2:8; 3:27

1 Samwele 14:51

Mitindami

  • +1Sa 9:1
  • +1Ba 2:5

1 Samwele 14:52

Mitindami

  • +Eb 49:27; 1Sa 9:16, 17
  • +1Sa 8:11; 10:26

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 14:11Sa 14:49; 18:1; 2Sa 1:4
1 Sa. 14:21Sa 10:26
1 Sa. 14:21Sa 13:15
1 Sa. 14:3Kob 29:5; Mit 27:21
1 Sa. 14:31Sa 22:9
1 Sa. 14:31Sa 4:21
1 Sa. 14:31Sa 2:12; 4:17
1 Sa. 14:31Sa 1:9
1 Sa. 14:3Yos 18:1; 1Sa 1:3
1 Sa. 14:51Sa 13:2, 3
1 Sa. 14:6Eb 17:9, 10; Bas 14:3; 15:18; 1Sa 17:36; 1Nt 10:4
1 Sa. 14:6Bas 7:2; 2Ba 6:15, 16; 2Nt 14:11
1 Sa. 14:10Eb 24:14; Bas 7:11; 1Sa 10:7
1 Sa. 14:111Sa 13:6; 14:22
1 Sa. 14:121Sa 14:10
1 Sa. 14:121Sa 14:6; 2Sa 5:23, 24; 2Ba 6:15, 16
1 Sa. 14:151Sa 13:17
1 Sa. 14:161Sa 10:26; 14:2
1 Sa. 14:161Sa 14:20
1 Sa. 14:181Sa 14:3
1 Sa. 14:221Sa 13:6
1 Sa. 14:23Mib 33:29; Bas 2:18
1 Sa. 14:231Sa 13:5
1 Sa. 14:24Le 5:4; Mit 30:2; Mib 23:21
1 Sa. 14:271Sa 14:17
1 Sa. 14:281Sa 14:24
1 Sa. 14:301Sa 14:26
1 Sa. 14:31Yos 10:12
1 Sa. 14:32Eb 9:4; Le 3:17; 17:10; Mib 12:16; Mis 15:29
1 Sa. 14:33Mib 12:23
1 Sa. 14:341Sa 14:32
1 Sa. 14:351Sa 7:15, 17
1 Sa. 14:36Mit 27:21; 1Sa 30:7, 8
1 Sa. 14:37Bas 1:1; 1Sa 30:8; 2Sa 5:19
1 Sa. 14:41Kob 28:30; Mib 33:8; Ezr 2:62, 63
1 Sa. 14:42Mas 16:33
1 Sa. 14:431Sa 14:27
1 Sa. 14:441Sa 14:24
1 Sa. 14:451Sa 14:14
1 Sa. 14:451Sa 14:6
1 Sa. 14:471Sa 12:9
1 Sa. 14:471Sa 11:11
1 Sa. 14:47Eb 36:8
1 Sa. 14:472Sa 10:6
1 Sa. 14:471Sa 9:16, 17
1 Sa. 14:48Kob 17:14; Mib 25:19; 1Sa 15:3
1 Sa. 14:491Sa 31:2; 1Nt 8:33; 9:39
1 Sa. 14:491Sa 18:17
1 Sa. 14:491Sa 18:27; 25:44; 2Sa 3:13; 6:20
1 Sa. 14:501Sa 17:55; 2Sa 2:8; 3:27
1 Sa. 14:511Sa 9:1
1 Sa. 14:511Ba 2:5
1 Sa. 14:52Eb 49:27; 1Sa 9:16, 17
1 Sa. 14:521Sa 8:11; 10:26
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
  • 47
  • 48
  • 49
  • 50
  • 51
  • 52
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 14:1-52

Mokanda ya liboso ya Samwele

14 Mokolo moko, Yonatane+ mwana ya Saulo alobaki na mosaleli na ye oyo azalaki komemela ye bibundeli ete: “Yaká tókatisa na ngámbo, na kaa ya basoda ya Bafilistia oyo bazalaka liboso.” Kasi ayebisaki tata na ye likambo yango te. 2 Saulo azalaki kofanda pene na Gibea,+ na nse ya nzete ya grenade oyo ezali na Migrone, mpe mibali soki 600 bazalaki elongo na ye.+ 3 (Ahiya azalaki kolata efode.+ Azalaki mwana ya Ahitube,+ ndeko ya Ikabode+ mwana ya Finehase,+ mwana ya Eli,+ nganga-nzambe ya Yehova na Shilo.)+ Mpe basoda bayebaki te ete Yonatane akei. 4 Nzokande, banzela oyo Yonatane alingaki kozwa mpo na kokatisa mpe kokende epai ya basoda ya Bafilistia, ezalaki na katikati ya mabanga mibale oyo ezalaki lokola lino; moko nkombo na yango ezalaki Bozeze mpe mosusu nkombo na yango Sene. 5 Moko ya mabanga yango ezalaki na nɔrdi, etɛlɛmaki lokola likonzí, mpe etalanaki na Mikemashe; mosusu ezalaki na sudi, etalanaki na Geba.+

6 Bongo Yonatane alobaki na momemi-bibundeli na ye: “Yaká tókatisa epai ya etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso, misitu wana.+ Mbala mosusu Yehova akokɔtela biso, mpo eloko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.”+ 7 Na yango momemi-bibundeli na ye alobaki na ye boye: “Salá nyonso oyo motema na yo etindi yo. Kende epai nyonso oyo olingi, mpe nakolanda yo esika nyonso oyo okokende.” 8 Bongo Yonatane alobaki: “Tokokatisa epai ya mibali yango, mpe tokomimonisa epai na bango. 9 Soki balobi na biso ete: ‘Bótɛlɛma mpe bóningana te tii ntango tokoya esika bozali!’ tokotɛlɛma wana, mpe tokomata epai na bango te. 10 Kasi soki balobi: ‘Bómata awa tóbunda!’ tokomata, mpo Yehova akopesa bango na lobɔkɔ na biso. Yango nde ekozala elembo mpo na biso.”+

11 Na nsima, bango mibale bamimonisaki epai ya basoda ya Bafilistia. Mpe Bafilistia balobaki: “Bótala! Baebre bazali kobima na mabulu esika bamibombaki.”+ 12 Bongo basoda yango balobaki na Yonatane mpe momemi-bibundeli na ye boye: “Bómata awa, tokolakisa bino!”+ Na mbala moko, Yonatane alobaki na momemi-bibundeli na ye ete: “Landá ngai, mpo Yehova akopesa bango na lobɔkɔ ya Yisraele.”+ 13 Mpe Yonatane amataki na mabɔkɔ ná makolo na ye, mpe momemi-bibundeli na ye azalaki na nsima na ye. Bongo, Bafilistia babandaki kokwea liboso ya Yonatane, mpe momemi-bibundeli na ye azalaki koboma bango na nsima na ye. 14 Ntango Yonatane ná momemi-bibundeli na ye babundisaki bango mpo na mbala ya liboso, babomaki mibali soki 20 na ntaka moko ya mokuse.*

15 Bongo nsɔmɔ ekɔtaki epai ya basoda oyo bazalaki na kaa mpe epai ya etuluku ya basoda oyo bazalaki liboso ya kaa mpo na kokɛngɛla; ata bituluku ya bapunzi+ ebangaki makasi. Mabele ebandaki koningana, mpe Nzambe asalaki ete yikiyiki ekɔta epai ya Bafilistia. 16 Basinzili ya Saulo na Gibea+ ya Benyamina bamonaki kaa mobimba ya banguna ezalaki na yikiyiki.+

17 Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki na ye ete: “Bótánga basoda nyonso, mpe bótala nani azali te.” Ntango batángaki bango, bamonaki ete Yonatane ná momemi-bibundeli na ye bazalaki te. 18 Saulo alobaki na Ahiya+ boye: “Yaká na Sanduku ya Nzambe ya solo awa!” (Mpo Sanduku ya Nzambe ya solo ezalaki elongo na Bayisraele na ntango wana.*) 19 Mpe ntango Saulo azalaki koloba na nganga-nzambe, yikiyiki oyo ezalaki na kaa ya Bafilistia ezalaki se kokóma makasi koleka. Bongo, Saulo alobaki na nganga-nzambe ete: “Tiká!”* 20 Bongo, Saulo ná basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye bayanganaki mpe bakendaki na etumba. Kuna, bakutaki Bafilistia bazalaki kobomana bango na bango na mopanga, mpe mobulungano ezalaki monene mpenza. 21 Mpe Baebre oyo liboso bazalaki na ngámbo ya Bafilistia mpe oyo bamataki elongo na bango na kaa bakómaki na ngámbo ya Yisraele. Saulo ná Yonatane bazalaki kokamba bango. 22 Ntango mibali nyonso ya Yisraele oyo babombanaki+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime bayokaki ete Bafilistia bakimi, babimaki mpe balandaki Bayisraele mosusu mpo na kobundisa Bafilistia. 23 Bongo, Yehova abikisaki Yisraele na mokolo yango,+ mpe etumba ekómaki tii na Bete-avene.+

24 Kasi na mokolo yango mibali ya Yisraele balɛmbaki mingi mpenza, mpo Saulo alapisaki basoda ndai ete: “Moto oyo akolya bilei* liboso mpokwa ekóma mpe liboso nazongisela banguna na ngai mabe, alakelama mabe!” Na yango, ata moto moko te kati na basoda yango alyaki bilei.+

25 Bongo basoda nyonso bakómaki* na zamba, mpe bamonaki mafuta ya nzoi na mabele. 26 Ntango bakɔtaki na zamba yango, bamonaki mafuta ya nzoi ezali kotanga, kasi moto moko te alyaki yango, mpo bazalaki kobanga ndai wana. 27 Kasi Yonatane ayokaki te ete tata na ye alapisaki basoda ndai.+ Na yango asembolaki nsɔngɛ ya lingenda oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye mpe akɔtisaki yango na kati ya ndako ya nzoi. Ntango alyaki mwa ndambo ya mafuta ya nzoi yango, azwaki lisusu makasi.* 28 Na yango, moko ya basoda alobaki boye: “Tata na yo alapisaki bato ndai ya makasi, alobi: ‘Moto oyo akolya bilei lelo alakelama mabe!’+ Yango wana, basoda balɛmbi mingi boye.” 29 Kasi, Yonatane alobaki ete: “Tata na ngai amemeli bato mpasi mingi. Talá nazwi lisusu makasi* mpo nameki mwa ndambo ya mafuta ya nzoi oyo. 30 Elingaki kozala malamu koleka soki basoda bályaka+ na mokolo ya lelo biloko oyo bazwaki epai ya banguna na bango! Yango elingaki kosala ete báboma Bafilistia lisusu mingi koleka.”

31 Na mokolo yango, bazalaki se koboma Bafilistia banda na Mikemashe tii na Aiyalone,+ mpe basoda balɛmbaki mingi. 32 Na yango, bato bawelelaki na lokoso biloko oyo bapunzaki epai ya banguna. Na mbala moko, bazwaki bampate, bangɔmbɛ, bana-ngɔmbɛ, babomaki yango mpe balyaki misuni na yango ná makila.+ 33 Bongo bayebisaki Saulo ete: “Talá! Bato bazali kosalela Yehova lisumu na ndenge bazali kolya mosuni ná makila.”+ Na yango alobaki boye: “Bosali makambo na bosembo te. Bóbalusa libanga moko ya monene mpe bóya na yango epai na ngai kaka sikoyo.” 34 Na nsima, Saulo alobaki ete: “Bóleka epai ya basoda nyonso, mpe bóyebisa bango boye: ‘Moto na moto asengeli koya na ngɔmbɛ na ye, mpate na ye, mpe bosengeli koboma yango likoló ya libanga oyo mpe kolya yango. Bólya mosuni ná makila te,+ noki bósalela Yehova lisumu.’” Na yango, moto na moto amemaki ngɔmbɛ na ye na butu wana mpe abomaki yango kuna. 35 Mpe Saulo atongaki etumbelo moko mpo na Yehova.+ Yango ezalaki etumbelo ya liboso oyo atongelaki Yehova.

36 Na nsima, Saulo alobaki boye: “Tókita mpe tólanda Bafilistia butubutu, mpe tópunza bango tii ntɔngɔ ekotana. Tokotika ata moko na bango na bomoi te.” Na yango, balobaki ete: “Salá nyonso oyo emonani malamu na miso na yo.” Bongo nganga-nzambe alobaki ete: “Bóya awa, tótuna likanisi ya Nzambe ya solo.”+ 37 Mpe Saulo atunaki Nzambe boye: “Nasengeli kokita mpo na kolanda Bafilistia?+ Okopesa bango na lobɔkɔ ya Yisraele?” Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana. 38 Na yango, Saulo alobaki ete: “Bópusana awa, bino nyonso bankumu ya bato, mpe tóluka koyeba lisumu nini esalemi lelo. 39 Mpo, lokola Yehova, Nzambe oyo abikisaki Yisraele, azali solo na bomoi, ata soki ezali mwana na ngai Yonatane nde asali lisumu yango, asengeli kokufa.” Kasi ata moto moko te apesaki ye eyano. 40 Bongo alobaki lisusu na Yisraele mobimba boye: “Bino nyonso bózala na ngámbo oyo, mpe ngai ná mwana na ngai Yonatane, tokozala na ngámbo mosusu.” Na yango, bato balobaki na Saulo ete: “Salá nyonso oyo emonani malamu na miso na yo.”

41 Na nsima, Saulo alobaki na Yehova boye: “Ee Nzambe ya Yisraele, yanolá biso na nzela ya Tumime!”+ Bongo Tumime ekwelaki Yonatane ná Saulo, kasi bato bazwamaki na likambo te. 42 Sikoyo, Saulo alobaki boye: “Bóbwaka mbɛsɛ+ mpo na koyeba soki ezali ngai to mwana na ngai Yonatane.” Mpe mbɛsɛ ekwelaki Yonatane. 43 Na nsima, Saulo alobaki na Yonatane boye: “Yebisá ngai, osali nini?” Na yango, Yonatane ayebisaki ye ete: “Namekaki kaka mwa mafuta ya nzoi na nsɔngɛ ya lingenda oyo ezali na lobɔkɔ na ngai.+ Ngai oyo! Soki esengeli nakufa, nakufa!”

44 Na yango, Saulo alobaki ete: “Tiká Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi, soki okufi te Yonatane.”+ 45 Kasi basoda balobaki na Saulo boye: “Nini? Yonatane akufa? Ye moto asali ete Yisraele ezwa elonga* monene+ boye? Ekoki kosalema soki moke te! Lokola Yehova azali solo na bomoi, ata nsuki moko te ya motó na ye ekokwea na mabele; mpo na lisalisi ya Nzambe nde Yonatane apesi biso elonga oyo lelo.”+ Na ndenge yango, bato babikisaki* Yonatane, mpe akufaki te.

46 Na yango, Saulo atikaki kolanda Bafilistia, mpe Bafilistia bakendaki na teritware na bango.

47 Saulo akómisaki bokonzi na ye makasi na Yisraele mpe abundisaki banguna na ye nyonso epai na epai: Bamoabe,+ Baamone,+ Baedome,+ bakonzi ya Soba+ mpe Bafilistia.+ Mpe esika nyonso oyo azalaki kokende kobunda, azalaki kolonga bango. 48 Abundaki na mpiko mpenza, alongaki Baamaleke+ mpe abikisaki Yisraele na lobɔkɔ ya bapunzi na bango.

49 Bana mibali ya Saulo ezalaki: Yonatane, Yishivi, mpe Malaki-shua.+ Mpe azalaki na bana basi mibale; ya liboso nkombo na ye Merabe,+ mpe oyo ya leki nkombo na ye Mikale.+ 50 Nkombo ya mwasi ya Saulo ezalaki Ahinoame mwana ya Ahimaaze. Nkombo ya mokonzi ya basoda na ye ezalaki Abinere+ mwana ya Nere, ndeko ya tata ya Saulo. 51 Kishe+ azalaki tata ya Saulo, mpe Nere,+ tata ya Abinere, azalaki mwana ya Abiele.

52 Saulo azalaki ntango nyonso kobunda etumba makasi ná Bafilistia na boumeli ya boyangeli na ye.+ Soki Saulo amoni mobali moko ya nguya to ya mpiko, azalaki kozwa ye mpo akóma soda na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto