Yobo
23 Yobo ayanolaki ete:
3 Soki nayebaka ata esika nakokuta Nzambe!+
Mbɛlɛ nalingaki kokende esika oyo afandi.+
4 Nalingaki komema likambo na ngai liboso na ye
Mpe nalingaki komonisa ye makanisi na ngai nyonso;
5 Nalingaki koyeba eyano oyo alingaki kopesa ngai
Mpe kolanda na likebi makambo oyo akoloba na ngai.
6 Alingaki nde kosalela nguya na ye monene mpo na kobunda na ngai?
Te, kutu alingaki mpenza koyoka ngai.+
7 Kuna moto ya sembo akokaki kosembola makambo elongo na ye,
Mpe nalingaki kolongwa na mabɔkɔ ya mosambisi na ngai mpo na libela.
8 Kasi soki nakei na ɛsti, azali kuna te;
Nazongi, mpe namoni ye te.
9 Ntango azali kosala na lobɔkɔ ya mwasi, nazali komona ye te;
Na nsima abaluki na lobɔkɔ ya mobali, nazali kaka komona ye te.
10 Kasi ye ayebi nzela oyo nazwi.+
Nsima ya komeka ngai, nakobima lokola wolo ya pɛto.+
11 Lokolo na ngai ezali kolanda matambe na ye malamumalamu;
Nabateli nzela na ye, mpe napɛngwi na yango te.+
12 Mitindo ya mbɛbu na ye, natiki yango te.
Nabombi maloba ya monɔkɔ na ye+ koleka kutu oyo esɛngami mpo na ngai.
13 Ntango azwi ekateli, nani akoki kotɛmɛla ye?+
Soki alingi* kosala likambo moko, akosala yango.+
14 Mpo akokokisa nyonso oyo esɛngami mpo na ngai,
Mpe makambo ya ndenge wana ezali ebele na motó na ye.
15 Yango wana nazali kotungisama mpo na ye;
Ntango nazali kokanisa ye, kobanga na ngai ezali kobakisama.
16 Nzambe akómisi ngai bibangabanga,
Mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abangisi ngai.
17 Kasi molili ekangisi ngai naino monɔkɔ te
Ezala mpe molili oyo ezipi elongi na ngai.