Yirimia
24 Bongo Yehova amonisaki ngai kitunga mibale ya figi etyami liboso ya tempelo ya Yehova, wana Nebukadenezare mokonzi ya Babilone asilaki komema na mboka mopaya Yekonia*+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, ná bankumu ya Yuda mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe bato oyo basalaka biloko ya bibende,* amemaki bango longwa na Yerusaleme tii na Babilone.+ 2 Kitunga moko ezalaki na bafigi ya malamu mpenza, lokola bafigi ya ebandeli mpe kitunga mosusu ezalaki na bafigi ya mabe mpenza, mpe ekokaki kolyama te mpo ezalaki mabe.
3 Bongo Yehova atunaki ngai boye: “Ozali komona nini, Yirimia?” Mpe nayanolaki ete: “Bafigi; bafigi ya malamu ezali malamu mpenza, kasi bafigi ya mabe ezali mabe mpenza, mpe ekoki kolyama te mpo ezali mabe.”+
4 Na yango Yehova alobaki na ngai ete: 5 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Kaka ndenge bafigi oyo ezali malamu, ndenge wana nde nakotalela bato ya Yuda oyo bamemami na mboka mopaya, baoyo natindi longwa na esika oyo tii na mokili ya Bakaladea. 6 Nakobatela bango mpo bázala malamu, mpe nakozongisa bango na mokili oyo.+ Nakotonga bango mpe nakobuka bango te; nakolona bango, mpe nakopikola bango te.+ 7 Nakopesa bango motema oyo ekozala na mposa ya koyeba ngai, ete ngai nazali Yehova.+ Bakokóma bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango,+ mpo bakozongela ngai na motema na bango mobimba.+
8 “‘Kasi talá oyo Yehova alobi mpo na bafigi ya mabe oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe:+ “Ndenge wana nde nakotalela Zidikiya+ mokonzi ya Yuda, bankumu na ye, bafandi ya Yerusaleme oyo babiki, baoyo batikali na mokili oyo mpe baoyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito.+ 9 Mpasi oyo nakomemela bango ekozala mabe mpenza, makonzi nyonso ya mabele ekobanga ntango nakokómisa bango eloko ya nsɔmɔ.+ Na bisika nyonso oyo nakopalanganisa bango,+ bato bakotyola bango, bakozwa bango ndakisa ya bato oyo balakelami mabe, bakosɛka bango mpe bakolakela bango mabe.+ 10 Mpe nakotindela bango bitumba,+ nzala mpe maladi mabe,+ tii bakosila na mabele oyo napesaki bango mpe bankɔkɔ na bango.”’”