Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 44
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Porte ya ɛsti ekozala kaka ya kokangama (1-3)

      • Mibeko etali bapaya (4-9)

      • Mibeko mpo na Balevi mpe banganza-nzambe (10-31)

Ezekiele 44:1

Mitindami

  • +Ezk 43:1
  • +Ezk 46:1

Ezekiele 44:2

Mitindami

  • +Ezk 43:2

Ezekiele 44:3

Mitindami

  • +Mib 12:5, 7
  • +Ezk 46:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 16

Ezekiele 44:4

Mitindami

  • +Yis 6:1-3; Ezk 10:4
  • +Ezk 1:27, 28; 3:23

Ezekiele 44:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tyá motema.”

Mitindami

  • +Ezk 40:4

Ezekiele 44:8

Mitindami

  • +Le 22:2; Mit 18:2, 3

Ezekiele 44:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 114

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 14

Ezekiele 44:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +2Ba 23:8, 9; 2Nt 29:1, 5; Ne 9:34; Yir 23:11; Ezk 8:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 9

Ezekiele 44:11

Mitindami

  • +1Nt 26:1

Ezekiele 44:12

Mitindami

  • +Yis 9:16; Mal 2:8

Ezekiele 44:14

Mitindami

  • +Mit 18:2, 4

Ezekiele 44:15

Mitindami

  • +1Ba 2:35; Ezk 40:46
  • +Ezk 48:9, 11
  • +Le 3:14-16
  • +Le 17:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, lok. 9

Ezekiele 44:16

Mitindami

  • +Ezk 41:21, 22
  • +Mit 18:7

Ezekiele 44:17

Mitindami

  • +Kob 28:39, 42; 39:27, 28; Le 16:4

Ezekiele 44:18

Mitindami

  • +Kob 28:40, 42

Ezekiele 44:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bandako mosantu.”

  • *

    Lil., “básantisa bato te.”

Mitindami

  • +Le 6:10; Ezk 42:14
  • +Ezk 42:13

Ezekiele 44:20

Mitindami

  • +Le 21:1, 5; Mib 14:1

Ezekiele 44:21

Mitindami

  • +Le 10:9

Ezekiele 44:22

Mitindami

  • +Le 21:7
  • +Le 21:10, 14

Ezekiele 44:23

Mitindami

  • +Mal 2:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    1/3/1999, nk. 14-15

Ezekiele 44:24

Mitindami

  • +Mib 17:9
  • +1Nt 23:3, 4; 2Nt 19:8
  • +Le 23:2

Ezekiele 44:25

Mitindami

  • +Le 21:1-3

Ezekiele 44:27

Mitindami

  • +Le 4:3

Ezekiele 44:28

Mitindami

  • +Mit 18:20; Mib 18:1; Yos 13:14; Ezk 45:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1999, nk. 15-16

Ezekiele 44:29

Mitindami

  • +Le 2:3
  • +Le 6:17, 18; 7:1, 6; 1Ko 9:13
  • +Le 27:21; Mit 18:14

Ezekiele 44:30

Mitindami

  • +Kob 23:19; Mit 18:8, 12, 26, 27; Mib 18:4
  • +Mit 15:20; Ne 10:35-37
  • +Mas 3:9, 10; Mal 3:10

Ezekiele 44:31

Mitindami

  • +Kob 22:31; Le 22:3, 8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 44:1Ezk 43:1
Ezk. 44:1Ezk 46:1
Ezk. 44:2Ezk 43:2
Ezk. 44:3Mib 12:5, 7
Ezk. 44:3Ezk 46:2
Ezk. 44:4Yis 6:1-3; Ezk 10:4
Ezk. 44:4Ezk 1:27, 28; 3:23
Ezk. 44:5Ezk 40:4
Ezk. 44:8Le 22:2; Mit 18:2, 3
Ezk. 44:102Ba 23:8, 9; 2Nt 29:1, 5; Ne 9:34; Yir 23:11; Ezk 8:5
Ezk. 44:111Nt 26:1
Ezk. 44:12Yis 9:16; Mal 2:8
Ezk. 44:14Mit 18:2, 4
Ezk. 44:151Ba 2:35; Ezk 40:46
Ezk. 44:15Ezk 48:9, 11
Ezk. 44:15Le 3:14-16
Ezk. 44:15Le 17:6
Ezk. 44:16Ezk 41:21, 22
Ezk. 44:16Mit 18:7
Ezk. 44:17Kob 28:39, 42; 39:27, 28; Le 16:4
Ezk. 44:18Kob 28:40, 42
Ezk. 44:19Le 6:10; Ezk 42:14
Ezk. 44:19Ezk 42:13
Ezk. 44:20Le 21:1, 5; Mib 14:1
Ezk. 44:21Le 10:9
Ezk. 44:22Le 21:7
Ezk. 44:22Le 21:10, 14
Ezk. 44:23Mal 2:7
Ezk. 44:24Mib 17:9
Ezk. 44:241Nt 23:3, 4; 2Nt 19:8
Ezk. 44:24Le 23:2
Ezk. 44:25Le 21:1-3
Ezk. 44:27Le 4:3
Ezk. 44:28Mit 18:20; Mib 18:1; Yos 13:14; Ezk 45:4
Ezk. 44:29Le 2:3
Ezk. 44:29Le 6:17, 18; 7:1, 6; 1Ko 9:13
Ezk. 44:29Le 27:21; Mit 18:14
Ezk. 44:30Kob 23:19; Mit 18:8, 12, 26, 27; Mib 18:4
Ezk. 44:30Mit 15:20; Ne 10:35-37
Ezk. 44:30Mas 3:9, 10; Mal 3:10
Ezk. 44:31Kob 22:31; Le 22:3, 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 44:1-31

Ezekiele

44 Azongisaki ngai na nzela ya porte ya esika mosantu, porte ya libándá oyo etali na ɛsti,+ mpe ekangamá.+ 2 Na nsima, Yehova alobaki na ngai boye: “Porte oyo ekozala kaka ya kokangama. Bakofungola yango te mpe moto akokɔta kuna te; mpo Yehova, Nzambe ya Yisraele akɔti kuna,+ yango wana ekozala kaka ya kokangama. 3 Kasi, nkumu akofanda na kati na yango mpo na kolya limpa liboso ya Yehova+ mpo azali nkumu. Akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango, mpe akobima na nzela na yango.”+

4 Na nsima amemaki ngai na nzela ya porte ya nɔrdi tii liboso ya tempelo. Ntango natalaki, namonaki ete nkembo ya Yehova etondisaki tempelo ya Yehova.+ Bongo nakweaki natye elongi na nse.+ 5 Mpe Yehova alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, tyá likebi,* talá, mpe yoká na likebi mpenza makambo nyonso oyo nazali koyebisa yo mpo na malako mpe mibeko ya tempelo ya Yehova. Tyá mpenza likebi na esika ya kokɔta na tempelo ná bisika nyonso ya kobima ya esika mosantu.+ 6 Osengeli koloba na bato ya Yisraele oyo bazali batomboki ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bokei mosika na misala na bino oyo eyinamá, Ee bato ya Yisraele. 7 Ntango bozali kokɔtisa bapaya oyo bakatami ngenga te na motema mpe na mosuni na esika na ngai mosantu, bazali kokómisa tempelo na ngai eloko mpamba. Bozali kopesa limpa na ngai, mafuta mpe makila, wana bozali kobuka kondimana na ngai mpo na misala na bino nyonso oyo eyinamá. 8 Bobateli te biloko na ngai mosantu.+ Kutu botye bato mosusu básalaka misala na esika na ngai mosantu.”’

9 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mopaya moko te oyo afandi na Yisraele, oyo akatami ngenga te na motema mpe na mosuni, akoki kokɔta na esika na ngai mosantu.”’

10 “‘Kasi Balevi oyo batikaki ngai+ ntango Bayisraele batikaki ngai mpo na kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ,* Balevi wana bakobuka mbuma mabe mpo na libunga na bango. 11 Mpe bakokóma basaleli na esika na ngai mosantu, mpo na kokɛngɛla baporte ya tempelo+ mpe kosala mosala na tempelo. Bakoboma likabo ya kotumba mobimba mpe mbeka mpo na bato, mpe bakotɛlɛma liboso na bango mpo na kosalela bango mosala. 12 Lokola bazalaki kosalela bato ya Yisraele mosala liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, bakómaki eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bato ya Yisraele básala lisumu,+ yango wana natomboleli bango lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘mpe bakobuka mbuma mabe ya libunga na bango. 13 Bakopusana pene na ngai te mpo na kosalela ngai lokola banganga-nzambe mpe bakopusana ata moke te na eloko na ngai mosantu, to na biloko na ngai oyo eleki mosantu, mpe bakomema nsɔni na bango mpo na makambo na bango oyo eyinamá oyo basalaki. 14 Nakopesa bango mokumba ya kobatela tempelo, bálandela mosala na yango mpe nyonso oyo esengeli kosalema na kati na yango.’+

15 “‘Mpo na banganga-nzambe Balevi, bana ya Zadoke,+ oyo bakokisaki mokumba ya esika na ngai mosantu ntango Bayisraele batikaki ngai,+ bakopusana pene na ngai mpo na kosalela ngai mosala, mpe bakotɛlɛma liboso na ngai mpo na kopesa ngai mafuta+ mpe makila,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 16 ‘Bango nde bakokɔta na esika na ngai mosantu, bakopusana na mesa na ngai mpo na kosalela ngai mosala,+ mpe bakokokisa mikumba na bango epai na ngai.+

17 “‘Ntango bakokɔta na baporte ya lopango ya kati, basengeli kolata bilamba ya lini.+ Basengeli te kolata elamba ya lɛnɛ ntango bazali kosala mosala na kati ya baporte ya lopango ya kati to na kati na yango. 18 Bakolata na motó na bango batirba oyo basalá na lini mpe bakupe ya lini ekozipa loketo na bango.+ Bakolata eloko moko te oyo ekobimisa bango motoki. 19 Liboso ya kobima libándá mpo na kokende na lopango ya libándá (esika bato bazali), bakolongola bilamba na bango oyo bazalaki kosala na yango mosala,+ mpe bakotya yango na bisika mosantu ya kolya.*+ Na nsima bakolata bilamba mosusu mpo bákómisa bato basantu te* na bilamba na bango. 20 Bakokokola motó na bango te+ to bakotika te nsuki ya motó ekóma milai mingi. Bakokata nsuki ya mitó na bango. 21 Banganga-nzambe basengeli te komɛla vinyo ntango bakokɔta na lopango ya kati.+ 22 Basengeli te kobala mwasi oyo mobali akufá to mwasi oyo libala ekufá,+ kasi bakoki kobala ngɔndɔ ya bana ya Yisraele to mwasi oyo mobali akufá, oyo mobali na ye azalaki nganga-nzambe.’+

23 “‘Bakolakisa bato na ngai bokeseni kati na eloko oyo ezali mosantu ná eloko oyo ezali mosantu te; mpe bakoteya bango bokeseni kati na oyo ezali mbindo ná oyo ezali pɛto.+ 24 Na likambo ya kosamba, bango nde bakosambisa;+ basengeli kosambisa na kolanda bikateli na ngai.+ Bakotosa mibeko ná malako na ngai na oyo etali bileko na ngai nyonso ya fɛti,+ mpe bakosantisa basabata na ngai. 25 Bakopusana ata moke te epai ya moto oyo akufi mpo bákóma mbindo te, kasi bakoki komikómisa mbindo mpo na tata, mama, mwana mobali to mwana mwasi, mpo na ndeko mobali to mpo na ndeko mwasi oyo abalá te.+ 26 Nsima ya kopɛtolama ya nganga-nzambe, bakotángela ye mikolo nsambo. 27 Na mokolo oyo akokɔta na esika mosantu, na lopango ya kati, mpo na kosala mosala na esika mosantu, asengeli kopesa likabo na ye mpo na lisumu,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

28 “‘Mpe talá oyo ekozala libula na bango: Ngai nde libula na bango.+ Bosengeli kopesa bango eloko moko te oyo ekozala ya bango na Yisraele, mpo ngai nde nazali eloko na bango. 29 Bango nde bakolya likabo ya mbuma,+ likabo mpo na lisumu mpe likabo mpo na ngambo.+ Eloko nyonso oyo ebongisami mpo na mosala moko mosantu na Yisraele ekozala ya bango.+ 30 Mbuma oyo eleki malamu na mbuma ya lolenge nyonso ya liboso mpe makabo oyo eleki malamu na makabo ya lolenge nyonso na makabo na bino, ekozala ya banganga-nzambe.+ Bokopesa banganga-nzambe farini na bino ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso,+ yango ekomemela mabota na bino lipamboli.+ 31 Banganga-nzambe bakolya ata ndɛkɛ moko te to nyama oyo ekufi yango moko to oyo epasolami.’+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto