Kobima
8 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Kɔtá epai ya Farao, mpe lobá na ye ete: ‘Yehova alobi boye: “Tiká bato na ngai bákende mpo básalela ngai.+ 2 Soki ozali kaka koboya kotika bango bákende, nakopesa etumbu ya magorodo* na teritware na yo mobimba.+ 3 Mpe Ebale Nile ekotondana na magorodo, yango ekomata mpe ekokɔta na ndako na yo, na shambrɛ na yo, na mbeto na yo, na bandako ya basaleli na yo, mpe ya bato na yo, ekokɔta na bitumbelo na yo ya mampa mpe na bisika* na yo ya kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini.+ 4 Magorodo ekomatela yo, bato na yo mpe basaleli na yo nyonso.”’”
5 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na Arona boye: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo ná lingenda na yo likoló ya bibale, ya banzela ya mai ya Nile mpe ya maziba mpe matisá magorodo na mokili ya Ezipito.’” 6 Na yango, Arona asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mai ya Ezipito, mpe magorodo ebandaki komata mpe kozipa mokili ya Ezipito. 7 Nzokande, banganga-nzambe ya maji basalaki kaka bongo na misala na bango ya molili, bango mpe basalaki ete magorodo emata na mokili ya Ezipito.+ 8 Na nsima, Farao abengaki Moize ná Arona mpe alobaki ete: “Bóbondela Yehova ete alongola magorodo epai na ngai mpe epai ya bato na ngai,+ mpo nalingi kotika bato bákende mpo bápesa Yehova mbeka.” 9 Bongo Moize alobaki na Farao ete: “Yo nde obongi koyebisa ngai ntango nini nasengeli kobondela mpo magorodo elongwa epai na yo, epai ya basaleli na yo, epai ya bato na yo mpe na bandako na yo. Yango ekotikala kaka na Ebale Nile.” 10 Na yango, alobaki ete: “Lobi.” Mpe Moize alobaki ete: “Ekosalema ndenge olobi, mpo oyeba ete ezali na moto moko te lokola Yehova Nzambe na biso.+ 11 Magorodo ekolongwa epai na yo, na bandako na yo, epai ya basaleli na yo mpe epai ya bato na yo. Yango ekotikala kaka na Ebale Nile.”+
12 Na yango, Moize ná Arona babimaki epai ya Farao, mpe Moize abondelaki Yehova mpo na magorodo oyo Ye atindelaki Farao.+ 13 Bongo Yehova asalaki ndenge Moize asɛngaki, mpe magorodo ebandaki kokufa na bandako, na mapango mpe na bilanga. 14 Mpe bazalaki kosangisa yango, mabondo* ebele mpenza, mpe mokili ebandaki kobimisa nsolo mabe. 15 Ntango Farao amonaki ete etumbu yango esili, akómisaki motema na ye makasi+ mpe aboyaki koyokela bango, kaka ndenge Yehova alobaki.
16 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na Arona boye: ‘Sembolá lingenda na yo mpe bɛtá putulu ya mabele, mpe yango esengeli kokóma bangungi na mokili mobimba ya Ezipito.’” 17 Mpe basalaki yango. Arona asembolaki lobɔkɔ na ye ná lingenda na ye mpe abɛtaki putulu ya mabele, mpe bangungi ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mabele ekómaki bangungi na Ezipito mobimba.+ 18 Banganga-nzambe ya maji bamekaki kobimisa bangungi na misala na bango ya molili,+ kasi bakokaki te. Mpe bangungi ematelaki bato mpe banyama. 19 Na yango, banganga-nzambe ya maji balobaki na Farao ete: “Ezali mosapi ya Nzambe!”+ Kasi motema ya Farao ezalaki kaka makasi, mpe ayokelaki bango te, kaka ndenge Yehova alobaki.
20 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Lamuká ntɔngɔntɔngɔ mpe tɛlɛmá liboso ya Farao. Talá! Azali kobima mpo na kokende na mai! Mpe osengeli koloba na ye ete: ‘Yehova alobi boye: “Tiká bato na ngai bákende mpo básalela ngai. 21 Kasi soki otiki bato na ngai bákende te, nakotindela yo, basaleli na yo, bato na yo mpe bandako na yo mapokopoko;* mpe bandako ya Ezipito ekotonda na mapokopoko, mpe ekozipa kutu mabele oyo bango* batɛlɛmaka. 22 Na mokolo yango nakosimba mpenza mokili ya Goshene te, esika bato na ngai bazali kofanda. Lipokopoko ata moko te ekozala kuna,+ mpe na ndenge yango okoyeba ete ngai Yehova, nazali awa na mokili.+ 23 Mpe nakosala ete bokeseni ezala kati na bato na ngai ná bato na yo. Lobi elembo yango ekosalema.”’”
24 Mpe Yehova asalaki bongo, mpe maboke mineneminene ya mapokopoko ebandaki kokɔta na ndako ya Farao mpe na bandako ya basaleli na ye mpe na mokili mobimba ya Ezipito.+ Mokili yango ebebaki mpo na mapokopoko.+ 25 Nsukansuka Farao abengaki Moize ná Arona mpe alobaki ete: “Bókende, bópesa Nzambe na bino mbeka, kasi na mokili oyo.” 26 Kasi Moize alobaki ete: “Ekozala malamu te soki tosali bongo, mpo mbeka oyo tokopesa Yehova Nzambe na biso ekoki kozala eloko oyo Baezipito bayinaka.+ Kanisá ete topesi mbeka ya eloko oyo Baezipito bayinaka mpe bamoni yango, bakobamba biso mabanga te? 27 Tokokende na esobe, tokosala mobembo ya mikolo misato mpe kuna tokopesa Yehova Nzambe na biso mbeka kaka ndenge alobaki na biso.”+
28 Sikoyo Farao alobaki ete: “Nakotika bino bókende mpo na kopesa Yehova Nzambe na bino mbeka na esobe. Kaka nde bosengeli kokende mosika mingi te. Bóbondela mpo na ngai.”+ 29 Bongo Moize alobaki ete: “Sikoyo nazali kolongwa epai na yo, mpe nakobondela Yehova, mpe lobi mapokopoko ekolongwa epai ya Farao, epai ya basaleli na ye mpe epai ya bato na ye. Kaka nde Farao atika kosakana na biso ndenge azali koboya kotika bato bákende kopesa Yehova mbeka.”+ 30 Nsima na yango, Moize alongwaki epai ya Farao mpe abondelaki Yehova.+ 31 Bongo Yehova asalaki ndenge Moize alobaki, mpe mapokopoko elongwaki epai ya Farao, epai ya basaleli na ye mpe epai ya bato na ye. Ata moko te etikalaki. 32 Nzokande, Farao akómisaki lisusu motema na ye makasi mpe atikaki bato bákende te.