Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Arona apelisi miinda nsambo (1-4)

      • Balevi bapɛtolami, mpe babandi mosala (5-22)

      • Mbula oyo moto akoki kosala mosala ya Molevi (23-26)

Mitángo 8:2

Mitindami

  • +Kob 25:37; 40:24, 25; Le 24:2

Mitángo 8:3

Mitindami

  • +Ebr 9:2

Mitángo 8:4

Mitindami

  • +Kob 37:17
  • +Kob 25:9, 40; 1Nt 28:12, 19

Mitángo 8:6

Mitindami

  • +Kob 29:4; Yis 52:11

Mitángo 8:7

Mitindami

  • +Kob 30:18, 19; Le 16:28; Mit 19:7

Mitángo 8:8

Mitindami

  • +Le 1:3
  • +Le 2:1
  • +Le 4:3

Mitángo 8:9

Mitindami

  • +Le 8:2, 3

Mitángo 8:10

Mitindami

  • +Mit 3:9, 41

Mitángo 8:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “akoningisa epai na epai.”

Mitindami

  • +Le 7:30; Mit 8:21
  • +Mit 1:50; 3:6; 2Nt 31:2

Mitángo 8:12

Mitindami

  • +Kob 29:10
  • +Le 1:4

Mitángo 8:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “okoningisa bango epai na epai.”

Mitángo 8:14

Mitindami

  • +Mit 3:45; 16:9

Mitángo 8:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “okoningisa bango epai na epai.”

Mitángo 8:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bana nyonso ya liboso oyo bafungoli mabumu.”

Mitindami

  • +Mit 3:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1992, lok. 12

Mitángo 8:17

Mitindami

  • +Kob 13:2, 12; Le 27:26
  • +Kob 12:29; 13:15

Mitángo 8:19

Mitindami

  • +Mit 3:9; 18:6; 1Nt 23:32; Ezk 44:11
  • +Mit 1:53; 18:5; 1Sa 6:19

Mitángo 8:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “aningisaki bango epai na epai.”

Mitindami

  • +Mit 8:7
  • +Mit 8:11
  • +Mit 8:12

Mitángo 8:25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2004, lok. 25

Mitángo 8:26

Mitindami

  • +Mit 1:53; 3:32; 18:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2004, lok. 25

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 8:2Kob 25:37; 40:24, 25; Le 24:2
Mit. 8:3Ebr 9:2
Mit. 8:4Kob 37:17
Mit. 8:4Kob 25:9, 40; 1Nt 28:12, 19
Mit. 8:6Kob 29:4; Yis 52:11
Mit. 8:7Kob 30:18, 19; Le 16:28; Mit 19:7
Mit. 8:8Le 1:3
Mit. 8:8Le 2:1
Mit. 8:8Le 4:3
Mit. 8:9Le 8:2, 3
Mit. 8:10Mit 3:9, 41
Mit. 8:11Le 7:30; Mit 8:21
Mit. 8:11Mit 1:50; 3:6; 2Nt 31:2
Mit. 8:12Kob 29:10
Mit. 8:12Le 1:4
Mit. 8:14Mit 3:45; 16:9
Mit. 8:16Mit 3:12
Mit. 8:17Kob 13:2, 12; Le 27:26
Mit. 8:17Kob 12:29; 13:15
Mit. 8:19Mit 3:9; 18:6; 1Nt 23:32; Ezk 44:11
Mit. 8:19Mit 1:53; 18:5; 1Sa 6:19
Mit. 8:21Mit 8:7
Mit. 8:21Mit 8:11
Mit. 8:21Mit 8:12
Mit. 8:26Mit 1:53; 3:32; 18:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 8:1-26

Mitángo

8 Yehova alobaki na Moize ete: 2 “Lobá na Arona, mpe yebisá ye boye: ‘Ntango okopelisa miinda, miinda yango nsambo esengeli kongɛngisa esika oyo ezali liboso ya etɛlɛmiselo ya miinda.’”+ 3 Bongo Arona asalaki boye: Apelisaki miinda yango mpo na esika oyo ezalaki liboso ya etɛlɛmiselo ya miinda,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo. 4 Etɛlɛmiselo ya miinda esalemaki boye: Ezalaki ya wolo mpe ebɛtamaki na marto; kobanda na nzete na yango tii na bafololo na yango, ezalaki eloko oyo ebɛtami na marto.+ Etɛlɛmiselo ya miinda esalemaki na kolanda emonaneli+ oyo Yehova alakisaki Moize.

5 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 6 “Zwá Balevi na kati ya Bayisraele, mpe pɛtolá bango.+ 7 Talá ndenge okopɛtola bango: mwangiselá bango mai oyo epɛtolaka moto na lisumu, mpe basengeli kolekisa razware na nzoto na bango mobimba mpe bakosukola bilamba na bango mpe bakomipɛtola.+ 8 Na nsima, bakozwa mwana-ngɔmbɛ+ moko ya mobali ná likabo na yango ya mbuma+ ya farini ya malamu oyo esangisami na mafuta, mpe okozwa mwana-ngɔmbɛ mosusu ya mobali mpo na likabo mpo na lisumu.+ 9 Mpe okoya na Balevi liboso ya hema ya kokutana mpe okoyanganisa liyangani mobimba ya Bayisraele.+ 10 Ntango okoya na Balevi liboso ya Yehova, Bayisraele bakotya mabɔkɔ likoló ya Balevi.+ 11 Mpe Arona akolakisa* Balevi liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa+ oyo euti na Bayisraele, mpe bakosala mosala ya Yehova.+

12 “Bongo Balevi bakotya mabɔkɔ na bango na mitó ya bangɔmbɛ-mibali.+ Nsima na yango, okopesa moko ezala likabo mpo na lisumu mpe mosusu ezala likabo ya kotumbela Yehova mpo na kozipa masumu+ ya Balevi. 13 Mpe okotɛlɛmisa Balevi liboso ya Arona ná bana na ye ya mibali mpe okolakisa bango* liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa. 14 Osengeli kokabola Balevi na Bayisraele, mpe Balevi bakokóma ya ngai.+ 15 Na nsima, Balevi bakokɔta mpo na kosala na hema ya kokutana. Ndenge wana nde okopɛtola bango mpe okolakisa bango* lokola likabo ya koningisa. 16 Mpo bazali bato oyo bapesami, bapesami epai na ngai longwa na kati ya Bayisraele. Na esika ya baoyo nyonso bazali bana ya liboso* na kati ya Bayisraele,+ nakozwa bango mpo na ngai moko. 17 Mpo mwana nyonso ya liboso na kati ya Bayisraele azali ya ngai, ezala moto to nyama.+ Nasantisaki bango mpo na ngai moko mokolo oyo nabomaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito.+ 18 Nakozwa Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso na kati ya Bayisraele. 19 Nakopesa Balevi bázala bato oyo bapesami epai ya Arona ná bana na ye ya mibali kati na Bayisraele, básala mosala mpo na Bayisraele na hema ya kokutana+ mpe mpo na kozipa masumu ya Bayisraele, mpo mpasi ekómela Bayisraele te+ mpo bato ya Yisraele bapusani pene ya esika mosantu.”

20 Moize ná Arona ná liyangani mobimba ya Bayisraele basalaki bongo mpo na Balevi. Na kolanda mitindo nyonso oyo Yehova apesaki Moize mpo na Balevi, Bayisraele basalaki bango kaka bongo. 21 Bongo Balevi bamipɛtolaki mpe basukolaki bilamba na bango,+ nsima na yango Arona alakisaki bango* liboso ya Yehova lokola likabo ya koningisa.+ Na nsima, Arona azipaki masumu na bango mpo na kopɛtola bango.+ 22 Nsima na yango, Balevi bakɔtaki mpo na kosala mosala na bango na hema ya kokutana liboso ya Arona ná bana na ye ya mibali. Kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo mpo na Balevi, basalaki kaka bongo mpo na bango.

23 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: 24 “Talá likambo oyo etali Balevi: Banda na mbula 25 matá, mobali akokɔta na etuluku ya baoyo basalaka na hema ya kokutana. 25 Kasi nsima ya mbula 50, akotika etuluku ya baoyo basalaka mpe akosala lisusu te. 26 Akoki kosalela bandeko na ye oyo bazali kokokisa mikumba oyo etali hema ya kokutana, kasi asengeli kosala mosala moko te kuna. Ndenge wana nde okosala mpo na Balevi mpe mikumba na bango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto