Hosea
Mpamba te mpo na bondumba* okómi mosika na Nzambe na yo.+
Olingi lifuti oyo ozali kozwa na bondumba oyo ozali kosala na bisika nyonso ya kotutatuta mbuma.+
3 Bato ya Yisraele bakokoba te kofanda na mokili ya Yehova;+
Kasi, Efraime akozonga na Ezipito,
Mpe na Asiri akolya biloko oyo ezali mbindo.+
Bazali lokola mampa ya matánga;
Baoyo nyonso bazali kolya yango, bakomikómisa mbindo.
Mpo mampa na bango ezali kaka mpo na bango moko;*
Ekoya na ndako ya Yehova te.
6 Mpo bóyoka! basengeli kokima mpo na libebi.+
Ezipito ekoyanganisa bango+ mpe Memfisi ekokunda bango.+
Matiti ya nsendensende ekotonda na biloko na bango ya motuya ya palata,
Mpe ekozala na mwa banzete ya nzubɛnzubɛ na kati ya bahema na bango.
Mosakoli na bango akozala zoba, mpe moto oyo asakolaka makambo akokóma ligboma.
Lokola osali libunga monene, koyina oyo bayini yo ezali monene.”
8 Sinzili+ ya Efraime azalaki elongo na Nzambe na ngai.+
Kasi sikoyo, banzela nyonso ya basakoli na ye+ ezali lokola mitambo ya mokangi-ndɛkɛ.
Koyina ezali na ndako ya Nzambe na ye.
9 Bamikɔtisi mpenza na libebi, lokola na mikolo ya Gibea.+
Akokanisa lisusu libunga na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.+
10 “Ntango nakutaki Yisraele, ezalaki lokola kokuta mbuma ya vinyo na kati ya esobe.+
Ntango namonaki bankɔkɔ na bino, ezalaki lokola komona mbuma ya liboso ya figi na nzete ya figi.
Kasi bakendaki epai ya Baala ya Peore,+
Bamipesaki na eloko ya nsɔni,*+
Mpe bakómaki bosɔtɔ lokola eloko oyo balingaki.
11 Nkembo ya Efraime epumbwe mosika lokola ndɛkɛ.
Moto azali kobota te, zemi ezali te, mpe moto azali kozwa zemi te.+
12 Ata soki babɔkɔli bana,
Nakozangisa bango bana yango tii ata mobali moko te akotikala;+
Ɛɛ, mawa na bango ntango nakopesa bango mokɔngɔ!+
13 Efraime, oyo alonami na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti, azalaki na miso na ngai lokola Tire.+
Sikoyo Efraime asengeli kobimisa bana na ye mpo bábomama.”
14 Ee Yehova, pesá bango oyo osengeli kopesa bango:
Pesá bango libumu oyo esopaka zemi mpe mabɛlɛ ekauká.*
15 “Mabe na bango nyonso ezalaki na Gilgale,+ mpo kuna nde nayaki koyina bango.
Nakobengana bango na ndako na ngai mpo na misala na bango ya mabe.+
Nakolinga bango lisusu te.+
Bankumu na bango nyonso bazali mitó makasi.
Misisa na bango ekokauka, mpe bakobota mbuma te.
Ata soki basi na bango baboti bana, nakoboma bana oyo bango balingi.”