Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Abisalome asaleli mokonzi likita mpe atombokeli ye (1-12)

      • Davidi akimi Yerusaleme (13-30)

      • Ahitofele akómi na ngámbo ya Abisalome (31)

      • Batindi Hushai akende kobebisa toli ya Ahitofele (32-37)

2 Samwele 15:1

Mitindami

  • +1Sa 8:11; 1Ba 1:5; Mas 11:2

2 Samwele 15:2

Mitindami

  • +Mib 25:7; Rt 4:1
  • +1Sa 8:20; 2Sa 8:15

2 Samwele 15:5

Mitindami

  • +Nz 10:9; 55:21; Mas 26:25

2 Samwele 15:6

Mitindami

  • +Mas 11:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2012, lok. 13

2 Samwele 15:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mbula 40.”

Mitindami

  • +2Sa 3:2

2 Samwele 15:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nakosambela Yehova.” Lil., “nakosalela Yehova.”

Mitindami

  • +2Sa 13:38; 14:23
  • +Le 22:21

2 Samwele 15:10

Mitindami

  • +2Sa 2:1; 5:1, 5; 1Nt 3:4

2 Samwele 15:12

Mitindami

  • +Nz 41:9; 55:12, 13; Yn 13:18
  • +2Sa 16:23; 17:14; 23:8, 34
  • +Yos 15:20, 51
  • +Nz 3:1; Mas 24:21

2 Samwele 15:14

Mitindami

  • +2Sa 19:9; Nz 3:maloba ya ebandeli ya loyembo
  • +2Sa 12:11

2 Samwele 15:15

Mitindami

  • +Mas 18:24

2 Samwele 15:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bamakango.”

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +2Sa 12:11; 16:21; 20:3

2 Samwele 15:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2009, lok. 27

2 Samwele 15:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kokatisa na mopanzi.”

  • *

    Elingi koloba, “Itai” oyo balobeli na vɛrsɛ 19.

  • *

    To, “bazalaki kokatisa liboso ya mokonzi, na miso na ye.”

Mitindami

  • +2Sa 8:18; 20:7; 1Ba 1:38; 1Nt 18:17
  • +Yos 13:2, 3
  • +1Sa 27:4; 1Nt 18:1

2 Samwele 15:19

Mitindami

  • +2Sa 18:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2009, lok. 27

2 Samwele 15:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bolingo ya sembo.”

Mitindami

  • +2Sa 2:5, 6; Nz 25:10; 57:3; 61:7; 89:14

2 Samwele 15:21

Mitindami

  • +Mas 17:17; 18:24

2 Samwele 15:22

Mitindami

  • +2Sa 18:2

2 Samwele 15:23

Mitindami

  • +1Ba 2:36, 37; 2Nt 30:14; Yn 18:1

2 Samwele 15:24

Mitindami

  • +2Sa 8:17; 20:25; 1Ba 1:8; 2:35; 1Nt 6:8
  • +Mit 8:19
  • +Kob 37:1; Le 16:2
  • +Mit 4:15; 7:9; 1Nt 15:2
  • +1Sa 22:20; 30:7

2 Samwele 15:25

Mitindami

  • +2Sa 6:17
  • +2Sa 7:2; Nz 26:8; 27:4

2 Samwele 15:27

Mitindami

  • +1Sa 9:9
  • +2Sa 17:17

2 Samwele 15:28

Mitindami

  • +2Sa 15:36; 17:16, 21

2 Samwele 15:30

Mitindami

  • +Mt 21:1; 24:3; Mis 1:12

2 Samwele 15:31

Mitindami

  • +Nz 41:9; 55:12, 13; Yn 13:18
  • +Nz 3:maloba ya ebandeli ya loyembo
  • +Nz 3:7
  • +2Sa 16:23; 17:14

2 Samwele 15:32

Mitindami

  • +2Sa 16:16
  • +Yos 16:1, 2

2 Samwele 15:34

Mitindami

  • +2Sa 16:18, 19
  • +2Sa 17:7, 14

2 Samwele 15:35

Mitindami

  • +2Sa 17:15, 16

2 Samwele 15:36

Mitindami

  • +2Sa 18:19
  • +2Sa 17:17; 1Ba 1:42

2 Samwele 15:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moninga ya Davidi ya motema.”

Mitindami

  • +2Sa 16:16; 1Nt 27:33

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 15:11Sa 8:11; 1Ba 1:5; Mas 11:2
2 Sa. 15:2Mib 25:7; Rt 4:1
2 Sa. 15:21Sa 8:20; 2Sa 8:15
2 Sa. 15:5Nz 10:9; 55:21; Mas 26:25
2 Sa. 15:6Mas 11:9
2 Sa. 15:72Sa 3:2
2 Sa. 15:82Sa 13:38; 14:23
2 Sa. 15:8Le 22:21
2 Sa. 15:102Sa 2:1; 5:1, 5; 1Nt 3:4
2 Sa. 15:12Nz 41:9; 55:12, 13; Yn 13:18
2 Sa. 15:122Sa 16:23; 17:14; 23:8, 34
2 Sa. 15:12Yos 15:20, 51
2 Sa. 15:12Nz 3:1; Mas 24:21
2 Sa. 15:142Sa 19:9; Nz 3:maloba ya ebandeli ya loyembo
2 Sa. 15:142Sa 12:11
2 Sa. 15:15Mas 18:24
2 Sa. 15:162Sa 12:11; 16:21; 20:3
2 Sa. 15:182Sa 8:18; 20:7; 1Ba 1:38; 1Nt 18:17
2 Sa. 15:18Yos 13:2, 3
2 Sa. 15:181Sa 27:4; 1Nt 18:1
2 Sa. 15:192Sa 18:2
2 Sa. 15:202Sa 2:5, 6; Nz 25:10; 57:3; 61:7; 89:14
2 Sa. 15:21Mas 17:17; 18:24
2 Sa. 15:222Sa 18:2
2 Sa. 15:231Ba 2:36, 37; 2Nt 30:14; Yn 18:1
2 Sa. 15:242Sa 8:17; 20:25; 1Ba 1:8; 2:35; 1Nt 6:8
2 Sa. 15:24Mit 8:19
2 Sa. 15:24Kob 37:1; Le 16:2
2 Sa. 15:24Mit 4:15; 7:9; 1Nt 15:2
2 Sa. 15:241Sa 22:20; 30:7
2 Sa. 15:252Sa 6:17
2 Sa. 15:252Sa 7:2; Nz 26:8; 27:4
2 Sa. 15:271Sa 9:9
2 Sa. 15:272Sa 17:17
2 Sa. 15:282Sa 15:36; 17:16, 21
2 Sa. 15:30Mt 21:1; 24:3; Mis 1:12
2 Sa. 15:31Nz 41:9; 55:12, 13; Yn 13:18
2 Sa. 15:31Nz 3:maloba ya ebandeli ya loyembo
2 Sa. 15:31Nz 3:7
2 Sa. 15:312Sa 16:23; 17:14
2 Sa. 15:322Sa 16:16
2 Sa. 15:32Yos 16:1, 2
2 Sa. 15:342Sa 16:18, 19
2 Sa. 15:342Sa 17:7, 14
2 Sa. 15:352Sa 17:15, 16
2 Sa. 15:362Sa 18:19
2 Sa. 15:362Sa 17:17; 1Ba 1:42
2 Sa. 15:372Sa 16:16; 1Nt 27:33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 15:1-37

Mokanda ya mibale ya Samwele

15 Nsima ya makambo wana nyonso, Abisalome asɛngaki básalela ye likalo moko, mpe azwaki bampunda mpe bato 50 mpo bápotaka mbangu liboso na ye.+ 2 Abisalome azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotɛlɛma pembeni ya balabala oyo ekei tii na porte ya engumba.+ Soki moto azali na likambo ya kosamba mpe ayei epai ya mokonzi mpo akata yango,+ Abisalome azalaki kobenga ye mpe kotuna ye: “Ozali moto ya engumba nini?” mpe moto yango azalaki koyebisa ye, “mosaleli na yo azali moto ya moko ya mabota ya Yisraele.” 3 Abisalome azalaki koloba na ye: “Talá, likambo na yo ezali malamu mpe sembo, kasi ezali ata na moto moko te epai ya mokonzi mpo na koyoka yo.” 4 Abisalome azalaki koloba: “Soki bátyaka ngai mosambisi ya mboka oyo, mbɛlɛ moto nyonso oyo azali na likambo ya kosamba alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kokata likambo na ye na bosembo.”

5 Mpe soki moto moko ayei pene na ye mpo na kogumbamela ye, Abisalome azalaki kosembola lobɔkɔ na ye, kosimba ye mpe kopwɛpwa ye.+ 6 Abisalome azalaki kosala bongo epai ya Bayisraele nyonso oyo bazalaki koya epai ya mokonzi mpo na lisambisi; na ndenge yango, Abisalome azalaki se koyiba mitema ya bato ya Yisraele.+

7 Na nsuka ya mbula minei,* Abisalome alobaki na mokonzi: “Nabondeli yo, tiká ngai nakende na Hebrone+ kokokisa elako na ngai oyo nasalelaki Yehova. 8 Mpo ntango ngai, mosaleli na yo, nazalaki kofanda na Geshure+ na Siri, nasalaki elako moko monene+ ete: ‘Soki Yehova azongisi ngai na Yerusaleme, nakopesa Yehova mbeka.’”* 9 Bongo mokonzi alobaki na ye: “Kende na kimya.” Na yango, atɛlɛmaki mpe akendaki na Hebrone.

10 Abisalome atindaki banɔngi na mabota nyonso ya Yisraele mpe alobaki: “Ntango kaka bokoyoka bayuli liseke, bóganga ete ‘Abisalome akómi mokonzi na Hebrone!’”+ 11 Na nsima, mibali 200 ya Yerusaleme bakendaki kuna elongo na Abisalome; Abisalome abengisaki bango mpe bakendaki, kasi bayebaki te makambo oyo ezalaki koleka. 12 Lisusu, ntango azalaki kopesa bambeka, Abisalome atindaki bato na engumba Gilo bákende kozwa mopesi-toli ya Davidi,+ Ahitofele+ moto ya Gilo.+ Likita yango ya mabe ezalaki se koya makasi, mpe bato oyo bazalaki na ngámbo ya Abisalome bazalaki se kobakisama.+

13 Na nsima, moto moko ayaki koyebisa Davidi ete: “Mitema ya bato ya Yisraele ekei epai ya Abisalome.” 14 Na mbala moko, Davidi alobaki na basaleli na ye nyonso oyo bazalaki elongo na ye na Yerusaleme ete: “Bótɛlɛma mpe tókima,+ mpo moto moko te akobika na mabɔkɔ ya Abisalome! Tósala noki, mpo soki Abisalome akuti biso awa akosala biso mabe mpe akoboma bato nyonso ya engumba na mopanga!”+ 15 Basaleli ya mokonzi bayanolaki ye: “Likambo nyonso oyo nkolo na biso mokonzi akoloba, basaleli na ye bakondima kosala yango.”+ 16 Bongo mokonzi abimaki elongo na bato nyonso ya ndako na ye, kasi atikaki basi* na ye zomi,+ mpo na kobatela ndako.* 17 Mpe mokonzi abimaki elongo na bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe akobaki nzela na ye. Batɛlɛmaki na Bete-merake.

18 Basaleli na ye nyonso bazalaki kokima elongo* na ye: Bakerete, Bapelete+ ná mibali 600 ya Gate+ oyo balandaki ye* banda na Gate.+ Bazalaki koleka liboso ya mokonzi mpe azalaki kotala bango.* 19 Bongo mokonzi alobaki na Itai+ moto ya Gate ete: “Mpo na nini yo mpe olingi kokende elongo na biso? Zongá mpe fandá elongo na mokonzi ya sika, mpo ozali mopaya; otiká esika na yo mpe okimá na mboka mopaya. 20 Oyei kaka lobilobi awa, bongo lelo nazwa yo okende koyengayenga elongo na biso, nzokande ngai moko nayebi te esika nakokende? Zongá mpe memá bandeko na yo elongo na yo. Tiká Yehova amonisela yo bolingo* mpe bosembo!”+ 21 Kasi Itai ayanolaki mokonzi ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali solo na bomoi, Ee mokonzi, esika nyonso oyo okozala, mosaleli na yo mpe akozala kuna.+ Kutu nandimi kokufa elongo na yo!” 22 Na yango, Davidi alobaki na Itai+ ete: “Yaká tókende.” Bongo Itai moto ya Gate akatisaki, ná mibali mpe bana nyonso oyo bazalaki ná ye, mpe bakendaki elongo na Davidi.

23 Ntango bato wana nyonso bazalaki kokatisa Lobwaku ya Kidrone+ na balabala oyo ekei na esobe, bato nyonso ya Yerusaleme mpe ya zingazinga bazalaki kolela na mongongo makasi; mpe mokonzi atɛlɛmaki pene na lobwaku. 24 Zadoke+ mpe azalaki wana, ná Balevi+ nyonso elongo na ye, bamemaki sanduku+ ya kondimana ya Nzambe ya solo.+ Abiatare+ mpe ayaki wana, ntango bato nyonso oyo bazalaki kobima na engumba basilisaki kokatisa. Bongo, bakitisaki Sanduku ya Nzambe ya solo. 25 Kasi mokonzi alobaki na Zadoke ete: “Zongisá Sanduku ya Nzambe ya solo na engumba.+ Soki nandimami na miso ya Yehova, ata ndɛlɛ, akozongisa ngai awa mpe akotika ngai namona yango lisusu mpe esika oyo yango efandaka.+ 26 Kasi soki alobi: ‘Nasepeli na yo ata moke te,’ boye, tiká asala ngai ndenge amoni malamu na miso na ye.” 27 Mokonzi alobaki na nganga-nzambe Zadoke ete: “Ozali momoni-makambo,+ boye te? Yo ná Abiatare bózonga na engumba na kimya. Bókende elongo na bana na bino mibale ya mibali: Ahimaaze mwana na yo mpe Yonatane+ mwana ya Abiatare. 28 Talá, nakozelazela na esobe, pene na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, tii ntango nakozwa nsango oyo ekouta epai na bino.”+ 29 Bongo, Zadoke ná Abiatare bazongisaki Sanduku ya Nzambe ya solo na Yerusaleme, mpe batikalaki kuna.

30 Wana Davidi azalaki komata Ngomba ya Olive,+ azalaki kolela nzelanzela; azipi motó na ye, mpe azalaki kotambola makolo-ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki ná ye mpe bazipaki mitó na bango mpe bazalaki kolela nzelanzela wana bazalaki komata ngomba. 31 Na nsima bapesaki Davidi nsango ete: “Ahitofele azali na kati ya bato oyo bazali kosala likita+ elongo na Abisalome.”+ Na yango, Davidi alobaki: “Nabondeli yo, Ee Yehova,+ kómisá toli ya Ahitofele bozoba!”+

32 Ntango Davidi akómaki na nsɔngɛ ya ngomba, esika bato basambelaka Nzambe, Hushai+ Moarake+ azalaki wana mpo na kokutana na ye, ná zambala epasukapasuká mpe mabele na motó na ye. 33 Kasi Davidi alobaki na ye: “Soki okatisi elongo na ngai, okozala kilo mpo na ngai. 34 Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalome ete: ‘Ee mokonzi, nazali mosaleli na yo. Liboso, nazalaki mosaleli ya tata na yo, kasi sikoyo, nalingi kosalela yo,’+ boye okoki kosalisa ngai mpo bato bálanda toli ya Ahitofele te.+ 35 Kutu, banganga-nzambe Zadoke ná Abiatare bakozala kuna elongo na yo. Osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.+ 36 Talá! Bana na bango mibale ya mibali bazali elongo na bango kuna, Ahimaaze+ mwana ya Zadoke mpe Yonatane+ mwana ya Abiatare. Bótinda bango báya koyebisa ngai likambo nyonso oyo bokoyoka.” 37 Na yango Hushai moninga ya Davidi,*+ akɔtaki na engumba, wana Abisalome azalaki kokɔta na Yerusaleme.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto