Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yehorame, mokonzi ya Yuda (1-11)

      • Mokanda oyo eutaki epai ya Eliya (12-15)

      • Yehorame asuki mabe (16-20)

2 Ntango 21:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +1Ba 22:50

2 Ntango 21:3

Mitindami

  • +2Nt 11:5, 23
  • +2Ba 8:16

2 Ntango 21:4

Mitindami

  • +Bas 9:5, 6

2 Ntango 21:5

Mitindami

  • +2Ba 8:17-19

2 Ntango 21:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atambolaki na nzela.”

Mitindami

  • +1Ba 14:7, 9; Hos 4:1
  • +2Nt 22:2; Ne 13:26

2 Ntango 21:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

  • *

    Elingi koloba, mokitani.

Mitindami

  • +2Sa 23:5; Nz 89:20, 28; Yir 33:20, 21
  • +2Sa 7:12, 16; 1Ba 11:36; Nz 132:11

2 Ntango 21:8

Mitindami

  • +Eb 27:40
  • +1Ba 22:47; 2Ba 8:20-22

2 Ntango 21:10

Mitindami

  • +Yos 21:13; 2Ba 19:8
  • +2Nt 15:2; Yir 2:13

2 Ntango 21:11

Mitindami

  • +Mib 12:2

2 Ntango 21:12

Mitindami

  • +2Ba 2:1, 11
  • +2Nt 17:3
  • +1Ba 15:11; 2Nt 14:2, 5

2 Ntango 21:13

Mitindami

  • +1Ba 16:25, 33
  • +Kob 34:15; Yir 3:8
  • +2Ba 9:22
  • +2Nt 21:4

2 Ntango 21:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “alamwisaki elimo ya Bafilistia.”

Mitindami

  • +1Ba 11:14; 2Nt 33:11; Yis 10:5
  • +Yos 13:1, 2; 2Sa 8:1
  • +2Nt 17:11

2 Ntango 21:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Abengami mpe “Ahazia.”

Mitindami

  • +1Ba 14:25, 26
  • +2Nt 22:1

2 Ntango 21:18

Mitindami

  • +Mis 12:21-23

2 Ntango 21:19

Mitindami

  • +2Nt 16:13, 14; Yir 34:4, 5

2 Ntango 21:20

Mitindami

  • +1Ba 2:10
  • +2Nt 24:24, 25; 28:27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/1998, lok. 32

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 21:11Ba 22:50
2 Nt. 21:32Nt 11:5, 23
2 Nt. 21:32Ba 8:16
2 Nt. 21:4Bas 9:5, 6
2 Nt. 21:52Ba 8:17-19
2 Nt. 21:61Ba 14:7, 9; Hos 4:1
2 Nt. 21:62Nt 22:2; Ne 13:26
2 Nt. 21:72Sa 23:5; Nz 89:20, 28; Yir 33:20, 21
2 Nt. 21:72Sa 7:12, 16; 1Ba 11:36; Nz 132:11
2 Nt. 21:8Eb 27:40
2 Nt. 21:81Ba 22:47; 2Ba 8:20-22
2 Nt. 21:10Yos 21:13; 2Ba 19:8
2 Nt. 21:102Nt 15:2; Yir 2:13
2 Nt. 21:11Mib 12:2
2 Nt. 21:122Ba 2:1, 11
2 Nt. 21:122Nt 17:3
2 Nt. 21:121Ba 15:11; 2Nt 14:2, 5
2 Nt. 21:131Ba 16:25, 33
2 Nt. 21:13Kob 34:15; Yir 3:8
2 Nt. 21:132Ba 9:22
2 Nt. 21:132Nt 21:4
2 Nt. 21:161Ba 11:14; 2Nt 33:11; Yis 10:5
2 Nt. 21:16Yos 13:1, 2; 2Sa 8:1
2 Nt. 21:162Nt 17:11
2 Nt. 21:171Ba 14:25, 26
2 Nt. 21:172Nt 22:1
2 Nt. 21:18Mis 12:21-23
2 Nt. 21:192Nt 16:13, 14; Yir 34:4, 5
2 Nt. 21:201Ba 2:10
2 Nt. 21:202Nt 24:24, 25; 28:27
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 21:1-20

Mokanda ya mibale ya Ntango

21 Na nsima, Yehoshafate akufaki* mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi; mpe mwana na ye Yehorame akómaki mokonzi na esika na ye.+ 2 Bandeko na ye ya mibali, bana ya Yehoshafate ezalaki Azaria, Yehiele, Zekaria, Azaria, Mikaele ná Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana ya Yehoshafate mokonzi ya Yisraele. 3 Mpe tata na bango asilaki kopesa bango makabo mingi ya palata mpe ya wolo, ná biloko ya motuya, mpe bingumba oyo ebatelami makasi na Yuda;+ kasi bokonzi apesaki yango na mabɔkɔ ya Yehorame,+ mpo azalaki mwana ya liboso.

4 Ntango Yehorame akómaki koyangela na bokonzi ya tata na ye, mpo na kofandisa bokonzi na ye, abomaki bandeko na ye+ nyonso na mopanga, ezala mpe bankumu mosusu ya Yisraele. 5 Yehorame azalaki na mbula 32 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula mwambe na Yerusaleme.+ 6 Alandaki ndakisa mabe* ya bakonzi ya Yisraele,+ kaka ndenge bato ya libota ya Ahaba basalaki, mpo mwana ya Ahaba akómaki mwasi na ye.+ Mpe akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova. 7 Kasi Yehova alingaki te kobebisa molɔngɔ ya bakonzi ya libota* ya Davidi, mpo na kotosa kondimana oyo asalaki ná Davidi.+ Mpo alakaki ete akopesa ye ná bana na ye mwinda* ntango nyonso.+

8 Na mikolo ya Yehorame, Edome etombokelaki Yuda+ mpe etyaki mokonzi na yango moko.+ 9 Bongo Yehorame ná bakomanda na ye bakatisaki elongo na makalo na ye nyonso. Kuna, bato ya Edome bazingaki ye ná bakomanda ya makalo na ye. Kasi atɛlɛmaki na butu mpe alongaki bango na etumba. 10 Kasi Edome ekobaki kotombokela boyangeli ya Yuda tii na mokolo ya lelo. Na ntango yango, Libina+ mpe etombokelaki Yehorame, mpo asundolaki Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na ye.+ 11 Asalaki mpe bisika oyo etombwaná+ na bangomba ya Yuda mpo na kotinda bato oyo bafandaka na Yerusaleme básala bondumba ya elimo, mpe abungisaki Yuda nzela.

12 Nsukansuka, Yehorame azwaki mokanda oyo eutaki epai ya mosakoli Eliya,+ oyo elobi: “Talá oyo Yehova Nzambe ya nkɔkɔ na yo Davidi alobi: ‘Olandi te ndakisa ya tata na yo Yehoshafate+ mpe ndakisa ya Asa+ mokonzi ya Yuda. 13 Olandi nde ndakisa mabe ya bakonzi ya Yisraele+ mpe otindi Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme básala bondumba ya elimo+ lokola bondumba ya libota ya Ahaba.+ Obomi kutu bandeko na yo moko,+ bato ya ndako ya tata na yo, oyo bazalaki malamu koleka yo. 14 Yango wana Yehova azali koyeisa etumbu monene epai ya bato na yo, bana na yo, basi na yo ná biloko na yo nyonso. 15 Mpe yo moko okobɛla bamaladi ndenge na ndenge, ezala mpe maladi ya misɔpɔ, tii misɔpɔ na yo ekobima libándá mpo na maladi yango, mokolo na mokolo.’”

16 Na nsima Yehova asalaki+ ete Bafilistia*+ mpe Baarabe+ oyo bazalaki kofanda pene na bato ya Etiopi bábundisa Yehorame. 17 Bongo bayaki na Yuda, bakɔtaki na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bakutaki na ndako ya mokonzi,+ ná bana na ye ya mibali mpe basi na ye. Mwana mobali kaka moko oyo atikalaki ezalaki Yehoahaze,*+ mwana na ye ya nsuka. 18 Nsima ya nyonso wana, Yehova apesaki ye maladi ya misɔpɔ oyo ekokaki kosila te.+ 19 Mwa ntango na nsima, ntango mbula mibale mobimba eleki, misɔpɔ na ye ebimaki libándá mpo na maladi na ye, mpe akufaki na mpasi makasi ya maladi na ye. Bato ya ekólo basalelaki ye mɔtɔ te lokola mɔtɔ oyo basalelaki bankɔkɔ na ye.+ 20 Azalaki na mbula 32 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 8 na Yerusaleme. Moto moko te ayokaki mawa ntango akufaki. Bongo bakundaki ye na Sité ya Davidi,+ kasi na malita ya bakonzi te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto