Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango akimaki Saulo, akɔti na mobenga.+
57 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, moniselá ngai boboto,
Mpe nakimi na elili ya mapapu na yo tii mitungisi ekoleka.+
2 Nazali kobelela Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,
Nzambe ya solo, oyo azali kosilisa mitungisi na ngai.
3 Akotinda lisalisi uta na likoló mpe akobikisa ngai.+
Akobulunganisa moto oyo azali koswa ngai. (Sela)
Nzambe akotinda boboto* na ye mpe bosembo na ye.+
Nasengeli kolala na kati ya bato oyo balingi kolya ngai,
Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula
Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+
Batimoli libulu liboso na ngai,
Kasi bango moko nde bakwei na kati.+ (Sela)
Nakoyemba mpe nakobɛta miziki.
8 Lamuká, nkembo na ngai.
Lamuká, Ee ebɛtɛlo ya nsinga; yo mpe, Ee nzɛnzɛ.
Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.+