Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakorinti 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakorinti

      • Paulo ná bantoma minene (1-15)

      • Mikakatano oyo Paulo akutanaki na yango lokola ntoma (16-33)

2 Bakorinti 11:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “molende ya Nzambe.”

Mitindami

  • +Mr 2:19; Ef 5:23; Em 21:2, 9

2 Bakorinti 11:3

Mitindami

  • +Eb 3:4, 5; Yn 8:44
  • +1Ti 6:3-5; Ebr 13:9; 2Pe 3:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Bolingo ya Nzambe,” lok. 192

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2002, lok. 8

2 Bakorinti 11:4

Mitindami

  • +Ga 1:7, 8

2 Bakorinti 11:5

Mitindami

  • +2Ko 11:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 216

2 Bakorinti 11:6

Mitindami

  • +2Ko 10:10

2 Bakorinti 11:7

Mitindami

  • +Mis 18:3; 1Ko 9:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2019, lok. 4

    Tópesa litatoli, nk. 148-150

2 Bakorinti 11:8

Mitindami

  • +Flp 4:10

2 Bakorinti 11:9

Mitindami

  • +Flp 4:15, 16
  • +1Te 2:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tópesa litatoli, lok. 151

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1990, lok. 18

2 Bakorinti 11:10

Mitindami

  • +1Ko 9:14, 15

2 Bakorinti 11:12

Mitindami

  • +1Ko 9:11, 12

2 Bakorinti 11:13

Mitindami

  • +Ro 16:17, 18; 2Pe 2:1

2 Bakorinti 11:14

Mitindami

  • +Ga 1:8; 2Te 2:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2004, lok. 5

    1/3/2002, lok. 11

2 Bakorinti 11:15

Mitindami

  • +Mt 16:27; Flp 3:18, 19; 2Ti 4:14

2 Bakorinti 11:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Mis 22:3
  • +Ro 11:1; Flp 3:4, 5

2 Bakorinti 11:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “baministre.”

Mitindami

  • +Ro 11:13; 1Ko 15:10
  • +Mis 16:23, 24
  • +Mis 9:15, 16; 2Ko 6:4, 5; 1Pe 2:20, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    10/2021, lok. 26

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, lok. 26

2 Bakorinti 11:24

Mitindami

  • +Mib 25:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, lok. 26

2 Bakorinti 11:25

Mitindami

  • +Mis 16:22
  • +Mis 14:19
  • +Mis 27:41

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, nk. 26-27

    15/6/1990, nk. 12, 16

2 Bakorinti 11:26

Mitindami

  • +Mis 20:3; 23:10
  • +Mis 14:5, 6
  • +Mis 13:50

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, lok. 26

    1/9/1992, lok. 12

    15/6/1990, nk. 11, 24-25

2 Bakorinti 11:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bolumbu.”

Mitindami

  • +Mis 20:31
  • +1Ko 4:11
  • +2Ko 6:4, 5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2000, lok. 26

2 Bakorinti 11:28

Mitindami

  • +2Ko 2:4; Kol 2:1

2 Bakorinti 11:33

Mitindami

  • +Mis 9:24, 25

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Ko. 11:2Mr 2:19; Ef 5:23; Em 21:2, 9
2 Ko. 11:3Eb 3:4, 5; Yn 8:44
2 Ko. 11:31Ti 6:3-5; Ebr 13:9; 2Pe 3:17
2 Ko. 11:4Ga 1:7, 8
2 Ko. 11:52Ko 11:23
2 Ko. 11:62Ko 10:10
2 Ko. 11:7Mis 18:3; 1Ko 9:18
2 Ko. 11:8Flp 4:10
2 Ko. 11:9Flp 4:15, 16
2 Ko. 11:91Te 2:9
2 Ko. 11:101Ko 9:14, 15
2 Ko. 11:121Ko 9:11, 12
2 Ko. 11:13Ro 16:17, 18; 2Pe 2:1
2 Ko. 11:14Ga 1:8; 2Te 2:9
2 Ko. 11:15Mt 16:27; Flp 3:18, 19; 2Ti 4:14
2 Ko. 11:22Mis 22:3
2 Ko. 11:22Ro 11:1; Flp 3:4, 5
2 Ko. 11:23Ro 11:13; 1Ko 15:10
2 Ko. 11:23Mis 16:23, 24
2 Ko. 11:23Mis 9:15, 16; 2Ko 6:4, 5; 1Pe 2:20, 21
2 Ko. 11:24Mib 25:3
2 Ko. 11:25Mis 16:22
2 Ko. 11:25Mis 14:19
2 Ko. 11:25Mis 27:41
2 Ko. 11:26Mis 20:3; 23:10
2 Ko. 11:26Mis 14:5, 6
2 Ko. 11:26Mis 13:50
2 Ko. 11:27Mis 20:31
2 Ko. 11:271Ko 4:11
2 Ko. 11:272Ko 6:4, 5
2 Ko. 11:282Ko 2:4; Kol 2:1
2 Ko. 11:33Mis 9:24, 25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakorinti 11:1-33

Mokanda ya mibale epai ya Bakorinti

11 Nalingi bókanga motema na mwa bozoba na ngai. Kutu, ya solo, bozali kokanga motema na makambo na ngai! 2 Mpo nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,* mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino na mobali kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto epai ya Kristo.+ 3 Kasi nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, lokola nyoka abendaki Eva na mayele mabe na ye,+ makanisi na bino ebebisama mpe elongwa na bosembo mpe na bopɛto ya bizaleli oyo esengeli na Kristo.+ 4 Mpo ya solo, soki moto ayei kosakola Yesu oyo akeseni na oyo biso tosakolaki, to soki bozwi elimo oyo ekeseni na oyo bozwaki, to nsango malamu oyo ekeseni na oyo boyambaki,+ bokangaka motema na makambo ya moto yango kozanga kokakatana. 5 Mpo namoni ete ezali ata na likambo moko te oyo ngai nazali na nse ya bantoma minene na bino.+ 6 Kasi ata soki nalobaka malamu te,+ nazali na boyebi ya Nzambe; kutu tomoniselaki bino yango polele na ndenge nyonso mpe na makambo nyonso.

7 Nazalaki na esengo ya kosakwela bino nsango malamu ya Nzambe kozanga lifuti.+ Kasi nasalaki nde lisumu ndenge namikitisaki mpo bino bótombwama? 8 Nazwaki lisalisi oyo eutaki na masangá mosusu, mpe ezalaki lokola nabɔtɔlaki bango mpo nasalela bino.+ 9 Nzokande ntango nazalaki elongo na bino mpe nakelelaki, nakómaki kilo mpo na moto moko te, mpo bandeko oyo bautaki na Masedonia bapesaki ngai biloko mingi oyo ekokisaki bamposa na ngai.+ Ɛɛ, naboyaki na ndenge nyonso kozala kilo epai na bino mpe nakozala kaka bongo.+ 10 Ntango nyonso oyo solo ya Kristo ekozala na kati na ngai, nakotika te komikumisa+ mpo na bitúká ya Akaya. 11 Mpo na nini? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino.

12 Ezali na basusu oyo bazali komikumisa mpe koloba ete bazali bantoma kaka lokola biso. Yango wana nakokoba kosala oyo nasalaka ntango nyonso+ mpo ete bázwa ata ntina moko te ya komikumisa. 13 Mpo bato wana bazali bantoma ya lokuta, basali ya mosala ya bokosi, oyo bazali komibimisa lokola bantoma ya Kristo.+ 14 Mpe likambo ya kokamwa ezali te, mpo Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.+ 15 Bongo ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya bosembo. Kasi nsuka na bango ekozala na kolanda misala na bango.+

16 Nazali koloba lisusu ete: Moto moko te akanisa ete nazali zoba. Kasi soki bokanisi mpenza ete nazali bongo, bóndima ngai ata ndenge wana lokola zoba, mpo ngai mpe nakoka komikumisa mwa moke. 17 Ndenge nazali koloba sikoyo ezali te ndenge Nkolo alingaki koloba, kasi nazali komikumisa ndenge zoba alingaki kosala. 18 Lokola bato mingi bazali komikumisa na mosuni, ngai mpe nakomikumisa. 19 Lokola bozali mayele mingi, yango wana bozali kokanga motema na makambo ya bazoba. 20 Ɛɛ, bozali kokanga motema na makambo ya moto nyonso oyo azali kokómisa bino baombo, moto nyonso oyo azali kozwa mpe kolya biloko oyo bozali na yango, moto nyonso oyo azali komitombola likoló na bino, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta bino na elongi.

21 Tozali na nsɔni ya koloba bongo, mpo ekoki komonana epai ya basusu na kati na bino ete tozali na bolɛmbu makasi mpo na kosalela bokonzi na biso na ndenge ebongi.

Kasi soki bato mosusu bayoki nsɔni te ya komikumisa—bongo ngai mpe nakoyoka nsɔni te ya komikumisa ata soki moto amoni ngai ete nazali zoba. 22 Bazali Baebre? Ngai mpe.+ Bazali Bayisraele? Ngai mpe. Bazali bana* ya Abrahama? Ngai mpe.+ 23 Bazali basaleli* ya Kristo? Nazali koyanola lokola moto ya ligboma, ngai naleki mpenza: nasalaki mosala mingi+ koleka bango, nakɔtaki babolɔkɔ mbala mingi+ koleka bango, nabɛtamaki koleka ndelo, mpe mbala na mbala nakómaki pene ya liwa.+ 24 Mbala mitano, Bayuda babɛtaki ngai fimbo 40 longola moko,+ 25 babɛtaki ngai na mangenda mbala misato,+ babambaki ngai mabanga mbala moko,+ nazindaki na masuwa mbala misato,+ nalekisaki butu mobimba mpe moi mobimba na kati ya mbu monene; 26 na mibembo mbala na mbala, na makama ya bibale, na makama ya miyibi, na makama oyo euti na bato na ngai moko,+ na makama oyo euti na bikólo,+ na makama na kati ya engumba,+ na makama na kati ya esobe, na makama na mbu, na makama epai ya bandeko ya lokuta, 27 na mosala makasi mpe na mitoki, na babutu kozanga mpɔngi mbala na mbala,+ na nzala mpe na mposa ya mai,+ na kozanga kolya biloko mbala mingi,+ na malili mpe kozanga bilamba.*

28 Longola makambo wana ya libándá, ezali na eloko oyo ezali konyokola ngai mokolo na mokolo: mitungisi mpo na masangá nyonso.+ 29 Nani alɛmbi, mpe ngai nalɛmbi te? Nani abɛti libaku, mpe nangali na nkanda te?

30 Soki esengeli namikumisa, nakomikumisa na makambo oyo ezali komonisa bolɛmbu na ngai. 31 Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Moto oyo asengeli kosanzolama libela na libela, ayebi ete nazali kokosa te. 32 Na Damasi, guvɛrnɛrɛ ya mokonzi Aretasi azalaki kokɛngɛla engumba ya bato ya Damasi mpo na kokanga ngai, 33 kasi bakitisaki ngai na kati ya kitunga moko ya nkɛkɛlɛ, na fɛnɛtrɛ oyo ezalaki na efelo,+ mpe nakimaki na mabɔkɔ na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto