Nzembo
Loyembo ya Davidi.
2 Yoká mabondeli* na ngai ntango nazali kolelela yo mpo osalisa ngai,
Ntango nazali kotombola mabɔkɔ na ngai na ngámbo ya shambrɛ ya kati mpenza ya esika na yo mosantu.+
3 Kopesa ngai etumbu te elongo na bato mabe, ná baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+
Baoyo bazali koloba maloba ya kimya na baninga na bango, nzokande makambo ya mabe ezali na mitema na bango.+
Zongiselá bango na kotalela mosala ya mabɔkɔ na bango,
Na kolanda makambo oyo basali.+
Akobuka bango mpe akotonga bango te.
Asalisi ngai, mpe motema na ngai esepeli,
Yango wana nakosanzola ye na loyembo na ngai.
8 Yehova azali makasi ya bato na ye;
Azali esika makasi ya libateli, abikisaka mpenza moto na ye oyo atyami mafuta.+
9 Bikisá bato na yo, mpe pambolá libula na yo.+
Batelá bango mpe memá bango na mabɔkɔ na yo mpo na libela.+