Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yehoshafate, mokonzi ya Yuda (1-6)

      • Bankumu bakei koteya (7-9)

      • Nguya ya limpinga ya Yehoshafate (10-19)

2 Ntango 17:1

Mitindami

  • +1Ba 15:24; 22:41

2 Ntango 17:2

Mitindami

  • +2Nt 15:8

2 Ntango 17:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kotambola na banzela ya kala ya.”

Mitindami

  • +2Sa 8:15

2 Ntango 17:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “atambolaki na.”

Mitindami

  • +Mib 4:29; 2Nt 26:1, 5
  • +1Ba 12:28-30; 13:33

2 Ntango 17:5

Mitindami

  • +1Ba 9:4, 5; Nz 132:12
  • +2Nt 18:1

2 Ntango 17:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “motema na ye ekómaki na mpiko na banzela ya Yehova.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Ba 22:42, 43
  • +Mib 7:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2009, lok. 12

2 Ntango 17:8

Mitindami

  • +Mib 33:8, 10; Mal 2:7

2 Ntango 17:9

Mitindami

  • +Mib 31:11; Yos 1:7, 8; Ne 8:7

2 Ntango 17:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “biyangeli.”

2 Ntango 17:12

Mitindami

  • +2Nt 18:1
  • +2Nt 14:2, 6
  • +1Ba 9:19; 2Nt 8:3, 4

2 Ntango 17:14

Mitindami

  • +2Nt 13:3; 26:11-13

2 Ntango 17:17

Mitindami

  • +Eb 49:27
  • +2Nt 14:8

2 Ntango 17:19

Mitindami

  • +2Nt 11:5, 23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 17:11Ba 15:24; 22:41
2 Nt. 17:22Nt 15:8
2 Nt. 17:32Sa 8:15
2 Nt. 17:4Mib 4:29; 2Nt 26:1, 5
2 Nt. 17:41Ba 12:28-30; 13:33
2 Nt. 17:51Ba 9:4, 5; Nz 132:12
2 Nt. 17:52Nt 18:1
2 Nt. 17:61Ba 22:42, 43
2 Nt. 17:6Mib 7:5
2 Nt. 17:8Mib 33:8, 10; Mal 2:7
2 Nt. 17:9Mib 31:11; Yos 1:7, 8; Ne 8:7
2 Nt. 17:122Nt 18:1
2 Nt. 17:122Nt 14:2, 6
2 Nt. 17:121Ba 9:19; 2Nt 8:3, 4
2 Nt. 17:142Nt 13:3; 26:11-13
2 Nt. 17:17Eb 49:27
2 Nt. 17:172Nt 14:8
2 Nt. 17:192Nt 11:5, 23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 17:1-19

Mokanda ya mibale ya Ntango

17 Mpe mwana na ye Yehoshafate+ akómaki mokonzi na esika na ye, mpe afandisaki mpenza bokonzi na ye na Yisraele. 2 Atyaki mampinga ya basoda na bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe atyaki bituluku ya basoda na mokili ya Yuda mpe na bingumba ya Efraime oyo tata na ye Asa azwaki.+ 3 Yehova akobaki kozala na Yehoshafate, mpo alandaki ndakisa ya* nkɔkɔ na ye Davidi+ mpe alukaki Babaala te. 4 Alukaki Nzambe ya tata na ye,+ atosaki* mitindo na ye, mpe alandaki te misala ya Yisraele.+ 5 Yehova akómisaki bokonzi yango makasi na lobɔkɔ ya Yehoshafate;+ mpe bato nyonso ya Yuda bazalaki kopesa Yehoshafate makabo, mpe azalaki na bozwi mpe nkembo mingi.+ 6 Akómaki na mpiko mingi mpe alandaki banzela ya Yehova;* kutu alongolaki bisika oyo etombwaná+ mpe banzete ya losambo*+ na Yuda.

7 Na mbula ya misato ya boyangeli na ye, atindaki bábenga bankumu ya ekólo: Bene-haile, Obadia, Zekaria, Netanele ná Mikaya, mpe apesaki bango mokumba ya koteya na bingumba ya Yuda. 8 Bazalaki elongo na Balevi oyo: Shemaya, Netania, Zebadia, Asahele, Shemiramote, Yehonatane, Adoniya, Tobiya ná Tobe-adoniya, mpe elongo na bango Elishama ná Yehorame oyo bazalaki banganga-nzambe.+ 9 Babandaki koteya na Yuda, mpe bamemaki buku ya mobeko ya Yehova;+ bakendaki epai na epai na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.

10 Mpe makonzi* nyonso ya mikili oyo ezalaki pembenipembeni ya Yuda eyokaki nsɔmɔ mpo na Yehova, mpe babundisaki Yehoshafate te. 11 Mpe Bafilistia bamemelaki Yehoshafate makabo ná mbongo mpo na mpako. Baarabe bamemelaki ye bampate-mibali 7 700 mpe bantaba-mibali 7 700, oyo bazwaki na bitonga na bango.

12 Yehoshafate azalaki se kokóma na nguya;+ mpe azalaki kotonga bisika oyo ebatelami makasi+ na Yuda mpe bingumba ya kobomba biloko.+ 13 Asalaki misala minene ebele na bingumba ya Yuda, mpe azalaki na basoda, bilombe ya etumba, na Yerusaleme. 14 Bakabolaki bango na kolanda mabota ya batata na bango. Na libota ya Yuda, bakonzi ya bato nkóto: Adana mokonzi, mpe elongo na ye bilombe ya etumba 300 000.+ 15 Mpe azalaki kokamba Yehohanane oyo azalaki mokonzi, mpe mibali 280 000 bazalaki elongo na ye. 16 Azalaki mpe kokamba Amasia mwana ya Zikri, oyo amipesaki na motema moko mpo na kosalela Yehova, mpe bilombe ya etumba 200 000 bazalaki elongo na ye. 17 Mpe na libota ya Benyamina+ ezalaki Eliada, elombe ya etumba, mpe mibali 200 000 oyo bazalaki kosimba litimbo mpe nguba,+ bazalaki elongo na ye. 18 Mpe azalaki kokamba Yehozabade, mpe mibali 180 000, oyo bazalaki na bibundeli mpo na etumba, bazalaki elongo na ye. 19 Wana nde basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, longola baoyo mokonzi atyaki na bingumba oyo ebatelami makasi na Yuda mobimba.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto