Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Komilelalela esali ete mɔtɔ eutá epai ya Nzambe (1-3)

      • Bato baleli mpo na mosuni (4-9)

      • Moize amoni ete akokoka te (10-15)

      • Yehova apesi bankulutu 70 elimo na ye (16-25)

      • Eledade ná Medade; Yosua ayoki zuwa mpo na Moize (26-30)

      • Atindi bandɛkɛ na nkombo kayɛ; bato bazwi etumbu mpo na lokoso na bango (31-35)

Mitángo 11:2

Mitindami

  • +Kob 32:11; Mib 9:19; Nz 106:23; Yk 5:16

Mitángo 11:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kozika,” elingi koloba, kopɛla ya mɔtɔ.

Mitindami

  • +Mib 9:22

Mitángo 11:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Emonani ete ezali baoyo bazalaki Bayisraele te, oyo bazalaki kati na bango.

Mitindami

  • +Kob 12:37, 38; Le 24:10
  • +1Ko 10:6, 10
  • +Nz 78:18, 22; 106:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1995, nk. 15-16

Mitángo 11:5

Mitindami

  • +Kob 16:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    11/2020, lok. 25

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1992, lok. 24

Mitángo 11:6

Mitindami

  • +Kob 16:35; Mit 21:5

Mitángo 11:7

Mitindami

  • +Kob 16:14; Ne 9:20; Yn 6:31
  • +Kob 16:31

Mitángo 11:8

Mitindami

  • +Kob 16:16, 23

Mitángo 11:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

Mitindami

  • +Nz 78:24

Mitángo 11:10

Mitindami

  • +Mit 11:1

Mitángo 11:11

Mitindami

  • +Kob 17:4; Mib 1:12

Mitángo 11:12

Mitindami

  • +Eb 13:14, 15; 26:3

Mitángo 11:14

Mitindami

  • +Kob 18:17, 18; Mib 1:9

Mitángo 11:15

Mitindami

  • +1Ba 19:2, 4; Yb 6:8, 9

Mitángo 11:16

Mitindami

  • +Mib 16:18

Mitángo 11:17

Mitindami

  • +Kob 19:11; 25:22; 34:5; Mit 12:5
  • +Mit 11:25; 12:8
  • +1Sa 10:6; 2Ba 2:15; Ne 9:20; Mis 2:17
  • +Kob 18:21, 22

Mitángo 11:18

Mitindami

  • +Kob 19:10
  • +Kob 16:7
  • +Mit 11:4, 5
  • +Kob 16:8

Mitángo 11:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bokoyoka yango mpii.”

Mitindami

  • +Nz 78:29
  • +Mit 21:5

Mitángo 11:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mibali oyo bazali kotambola na makolo,” elingi koloba, mibali oyo babongisami mpo na etumba.

Mitindami

  • +Kob 12:37; 38:26; Mit 1:45, 46

Mitángo 11:23

Mitindami

  • +Eb 18:14; Yis 59:1; Mr 10:27; Lk 1:37

Mitángo 11:24

Mitindami

  • +Mit 11:16

Mitángo 11:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “babandaki kosakola.”

Mitindami

  • +Kob 33:9; Mit 12:5; Mib 31:15
  • +Nz 99:7
  • +Mit 11:17; 2Ba 2:9, 15
  • +1Sa 10:6; 19:20

Mitángo 11:28

Mitindami

  • +Kob 17:9; 24:13; 33:11; Mit 27:18-20; Mib 31:3
  • +Mr 9:38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2017, lok. 30

Mitángo 11:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2017, lok. 30

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2004, lok. 26

    15/9/1995, lok. 18

Mitángo 11:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lipeko moko = 44,5 cm. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Kob 16:13; Nz 78:26, 27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2011, lok. 14

Mitángo 11:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Homɛrɛ moko = 220 L. Talá Ap. B14.

Mitángo 11:33

Mitindami

  • +Nz 78:30, 31; 1Ko 10:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1995, nk. 15-16

Mitángo 11:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “bankunda ya bilulela.”

Mitindami

  • +Mit 33:16; Mib 9:22
  • +1Ko 10:6

Mitángo 11:35

Mitindami

  • +Mit 33:17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 11:2Kob 32:11; Mib 9:19; Nz 106:23; Yk 5:16
Mit. 11:3Mib 9:22
Mit. 11:4Kob 12:37, 38; Le 24:10
Mit. 11:41Ko 10:6, 10
Mit. 11:4Nz 78:18, 22; 106:14
Mit. 11:5Kob 16:3
Mit. 11:6Kob 16:35; Mit 21:5
Mit. 11:7Kob 16:14; Ne 9:20; Yn 6:31
Mit. 11:7Kob 16:31
Mit. 11:8Kob 16:16, 23
Mit. 11:9Nz 78:24
Mit. 11:10Mit 11:1
Mit. 11:11Kob 17:4; Mib 1:12
Mit. 11:12Eb 13:14, 15; 26:3
Mit. 11:14Kob 18:17, 18; Mib 1:9
Mit. 11:151Ba 19:2, 4; Yb 6:8, 9
Mit. 11:16Mib 16:18
Mit. 11:17Kob 19:11; 25:22; 34:5; Mit 12:5
Mit. 11:17Mit 11:25; 12:8
Mit. 11:171Sa 10:6; 2Ba 2:15; Ne 9:20; Mis 2:17
Mit. 11:17Kob 18:21, 22
Mit. 11:18Kob 19:10
Mit. 11:18Kob 16:7
Mit. 11:18Mit 11:4, 5
Mit. 11:18Kob 16:8
Mit. 11:20Nz 78:29
Mit. 11:20Mit 21:5
Mit. 11:21Kob 12:37; 38:26; Mit 1:45, 46
Mit. 11:23Eb 18:14; Yis 59:1; Mr 10:27; Lk 1:37
Mit. 11:24Mit 11:16
Mit. 11:25Kob 33:9; Mit 12:5; Mib 31:15
Mit. 11:25Nz 99:7
Mit. 11:25Mit 11:17; 2Ba 2:9, 15
Mit. 11:251Sa 10:6; 19:20
Mit. 11:28Kob 17:9; 24:13; 33:11; Mit 27:18-20; Mib 31:3
Mit. 11:28Mr 9:38
Mit. 11:31Kob 16:13; Nz 78:26, 27
Mit. 11:33Nz 78:30, 31; 1Ko 10:10
Mit. 11:34Mit 33:16; Mib 9:22
Mit. 11:341Ko 10:6
Mit. 11:35Mit 33:17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 11:1-35

Mitángo

11 Sikoyo bato babandaki komilelalela mpenza liboso ya Yehova. Ntango Yehova ayokaki yango, nkanda na ye engalaki; mɔtɔ oyo eutaki epai ya Yehova ebandaki kongalela bango mpe kozikisa bamosusu oyo bazalaki na nsuka ya kaa. 2 Na yango, bato babandaki kobelela Moize, ye abondelaki Yehova,+ mpe mɔtɔ ekufaki. 3 Bongo bapesaki esika yango nkombo Tabera,* mpo mɔtɔ ya Yehova engalelaki bango.+

4 Ebele ya bato ndenge na ndenge*+ oyo bazalaki na kati na bango bamonisaki mposa na bango na lokoso,+ bongo Bayisraele mpe babandaki kolela lisusu mpe koloba ete: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya?+ 5 Talá tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya ofele na Ezipito, ná bakɔkɔmbrɛ, bapastɛkɛ, bapwaro, matungulu ná ayi!+ 6 Kasi sikoyo makasi na biso ezali kosila. Tozali komona eloko mosusu te kaka mana oyo.”+

7 Nzokande, mana+ ezalaki lokola mbuma ya koriandre,+ mpe ezalaki komonana lokola bedeliume. 8 Bato bazalaki kopalangana epai na epai mpe bazalaki kolɔkɔta yango mpe bazalaki konika yango na binikelo ya mabɔkɔ to bazalaki kotuta yango na liboka. Na nsima bazalaki kotɔkisa yango na banzungu ya kolambela to bazalaki kosala yango mampa ya libungutulu,+ mpe ezalaki elɛngi lokola gato ya kitoko oyo etyami mafuta. 9 Ntango mamwɛ* ezalaki kokita na kaa na butu, mana ezalaki mpe kokita.+

10 Moize ayokaki bato bazali kolela, libota na libota, moto na moto na ekɔtelo ya hema na ye. Mpe Yehova ayokaki nkanda makasi,+ Moize mpe asepelaki na yango te. 11 Bongo Moize alobaki na Yehova ete: “Mpo na nini omonisi mosaleli na yo mpasi? Mpo na nini nandimami na miso na yo te, mpo otye mokumba ya bato oyo nyonso likoló na ngai?+ 12 Ngai nde nakumbaki zemi ya bato oyo nyonso? Ngai nde moto nabotaki bango, mpo oloba na ngai ete: ‘Memá bango na ntolo na yo, kaka ndenge mobateli amemaka mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ,’ tii na mokili oyo olapaki ndai ete okopesa batata na bango?+ 13 Epai wapi nakozwa mosuni ya kopesa bato oyo nyonso? Mpo bazali kaka kolelela ngai ete: ‘Pesá biso mosuni tólya!’ 14 Nakokoka te komema bato oyo nyonso ngai moko; ezali mokumba monene mpo na ngai.+ 15 Soki ndenge wana nde okosalela ngai makambo, nabondeli yo, bomá ngai sikoyo.+ Soki nandimami na miso na yo, kotika te ete namona mpasi mosusu.”

16 Yehova ayanolaki Moize ete: “Yanganiselá ngai mibali 70 kati na bankulutu ya Yisraele, mibali oyo oyebi ete bazali bankulutu mpe bakapita ya bato,+ mpe okomema bango na hema ya kokutana, mpe okotɛlɛmisa bango kuna elongo na yo. 17 Nakokita+ mpe nakosolola na yo kuna,+ mpe nakozwa ndambo ya elimo+ oyo ezali likoló na yo mpe nakotya yango likoló na bango, mpe bakosalisa yo na komema mokumba ya bato, mpo omema yango yo moko te.+ 18 Okoloba na bato ete: ‘Bómisantisa mpo na lobi,+ mpo bokolya mpenza mosuni, mpamba te boleli na matoi ya Yehova,+ mpe bolobi: “Nani akopesa biso mosuni ya kolya? Tozalaki na biso malamu mpenza na Ezipito.”+ Yehova akopesa bino mpenza mosuni, mpe bokolya.+ 19 Bokolya, kaka mokolo moko te to mikolo 2 te to mikolo 5 te to mikolo 10 te to mikolo 20 te, 20 kasi mpo na sanza mobimba, tii yango ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango mabe mpenza,*+ mpo boboyi Yehova, oyo azali na kati na bino, mpe bozalaki kolela liboso na ye, na maloba oyo: “Mpo na nini tobimi na Ezipito?”’”+

21 Bongo Moize alobaki ete: “Bato oyo nazali kati na bango bazali mibali* 600 000,+ kasi yo moko olobi ete: ‘Nakopesa bango mosuni, ekozala ebele mpe bakolya yango mpo na sanza mobimba’! 22 Soki babomi etonga mobimba ya bampate ná ya bangɔmbɛ, ekokoka bango mpenza? To soki bakangeli bango mbisi nyonso ya mbu, ekokoka bango mpenza?”

23 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?+ Sikoyo okomona soki oyo nalobi ekokómela yo to te.”

24 Na nsima, Moize abimaki mpe ayebisaki bato maloba ya Yehova. Mpe ayanganisaki mibali 70 kati na mikóló ya bato mpe atɛlɛmisaki bango zingazinga ya hema.+ 25 Bongo Yehova akitaki na kati ya lipata+ mpe alobaki na ye+ mpe azwaki ndambo ya elimo+ oyo ezalaki likoló na ye mpe atyaki yango likoló ya mokomoko ya bankulutu yango 70. Mpe ntango kaka elimo yango ekitelaki bango, babandaki kosala ndenge basakoli basalaka,*+ kasi basalaki bongo lisusu te.

26 Ezalaki na mibali mibale oyo batikalaki na kaa. Bankombo na bango ezalaki Eledade mpe Medade. Mpe elimo ebandaki kokitela bango, mpo bazalaki na kati ya baoyo bankombo na bango ekomamaki, kasi bakendaki na hema te. Bongo babandaki kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka. 27 Mpe elenge mobali moko apotaki mbangu mpe ayebisaki Moize ete: “Eledade ná Medade bazali kosala na kati ya kaa ndenge basakoli basalaka!” 28 Bongo Yosua+ mwana ya Nunu, mosaleli ya Moize banda na bolenge na ye, azongisaki maloba ete: “Nkolo na ngai Moize, pekisá bango!”+ 29 Kasi, Moize alobaki na ye ete: “Ozali nde na zuwa mpo na ngai? Te, nakolinga kutu bato nyonso ya Yehova bázala basakoli, mpe Yehova akotya elimo na ye likoló na bango!” 30 Na nsima, Moize azongaki na kaa elongo na bankulutu ya Yisraele.

31 Mpe mopɛpɛ moko eutaki na Yehova, epɛpaki mpe ebandaki komema bandɛkɛ na nkombo kayɛ uta na mbu mpe kokweisa yango na kaa+ na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko na ngámbo oyo mpe na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko na ngámbo mosusu, zingazinga na kaa, mpe na ntaka soki ya mapeko* mibale likoló ya mabele. 32 Bongo mokolo wana mobimba mpe butu mobimba mpe mokolo mobimba oyo elandaki, bato bazalaki kaka kolɔkɔta kayɛ. Moto moko te alɔkɔtaki na nse ya homɛrɛ* 10, mpe bazalaki kotanda yango bipai nyonso mpo na bango moko, zingazinga ya kaa. 33 Kasi wana mosuni ezalaki naino na mino na bango, liboso ete bányamuta yango, nkanda ya Yehova engalelaki bato, mpe Yehova abandaki koboma bato na koboma moko monene mpenza.+

34 Mpe bapesaki esika yango nkombo Kibrote-hataava,*+ mpo kuna nde bakundaki bato oyo bamonisaki mposa na lokoso.+ 35 Bato balongwaki na Kibrote-hataava, mpe bakendaki na Hazerote,+ mpe bakobaki kofanda kuna.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto