Basambisi
20 Na yango, Bayisraele nyonso babimaki banda na Dani+ tii na Beere-sheba mpe banda na mokili ya Gileade,+ mpe liyangani mobimba esanganaki na bomoko mpenza* liboso ya Yehova, na Mizipa.+ 2 Bongo bankumu ya bato mpe mabota nyonso ya Yisraele bazalaki wana na kati ya lisangá ya bato ya Nzambe: ezalaki na basoda 400 000 oyo bazalaki na mipanga.+
3 Babenyamina bayokaki ete mibali ya Yisraele bamati na Mizipa.
Bongo mibali ya Yisraele balobaki: “Bóyebisa biso, likambo ya nsɔmɔ boye esalemaki ndenge nini?”+ 4 Na yango, Molevi wana,+ mobali ya mwasi oyo babomaki, ayanolaki: “Nakómaki na Gibea+ ya Benyamina elongo na mwasi na ngai mpo na kolala kuna. 5 Mpe bafandi* ya Gibea batɛlɛmaki mpo na kosala ngai mabe mpe bazingaki ndako na butu. Balingaki koboma ngai, kasi na esika básala ngai bongo, basangisaki nzoto na makasi na mwasi na ngai, mpe nsukansuka akufaki.+ 6 Na yango, nazwaki ebembe ya mwasi na ngai, nakataki yango bitenibiteni mpe natindaki yango na teritware* nyonso ya Yisraele,+ mpo basalaki likambo moko ya nsɔni mpe ya bozoba na Yisraele. 7 Sikoyo, bino nyonso bato ya Yisraele, bópesa toli mpe likanisi na bino+ awa.”
8 Na yango, bato nyonso batɛlɛmaki na bomoko mpenza* mpe balobaki: “Moto moko te kati na biso akokende na hema na ye to akozonga na ndako na ye. 9 Sikoyo, talá likambo oyo tokosala Gibea: Nsima ya kobwaka mbɛsɛ, tokomata mpo na kobundisa yango.+ 10 Tokozwa mibali zomi kati na mibali 100 ya mabota nyonso ya Yisraele, mpe mibali 100 kati na mibali 1 000, mpe mibali 1 000 kati na mibali 10 000 mpo na kozwela bato ya etumba bilei, mpo bábundisa Gibea ya Benyamina, na ndenge basali likambo oyo ya bozoba na Yisraele.” 11 Bongo mibali nyonso ya Yisraele basanganaki na bomoko,* lokola bato oyo basali boyokani, mpo na kobundisa engumba yango.
12 Na nsima, mabota ya Yisraele batindaki bato epai ya mibali nyonso ya libota ya Benyamina, balobi: “Likambo nini ya nsɔmɔ boye esalemi epai na bino? 13 Sikoyo, bópesa biso mibali wana ya mpambampamba ya Gibea+ mpo tóboma bango mpe tólongola mabe na Yisraele.”+ Kasi Babenyamina baboyaki koyokela bandeko na bango, Bayisraele.
14 Bongo Babenyamina bautaki na bingumba na bango, bayanganaki na Gibea mpo na kokende kobunda na mibali ya Yisraele. 15 Mokolo yango, Babenyamina bayanganisaki mibali 26 000 oyo bazalaki na mipanga na bingumba na bango, longola mibali ya mpiko 700 ya Gibea. 16 Na kati ya limpinga yango, ezalaki na mibali ya mpiko 700 oyo bazalaki kosalela lobɔkɔ ya mwasi. Soki mokomoko na bango abwaki libanga na lansi,* ezalaki koleka mpamba te, ezalaki kozwa ata mwa eloko ya moke lokola nsuki.
17 Longola libota ya Benyamina, mibali ya Yisraele bayanganisaki mibali 400 000 oyo bazalaki na mipanga,+ mpe mokomoko na bango amesanaki na bitumba. 18 Batɛlɛmaki mpe bakendaki na Betele mpo na kotuna Nzambe.+ Bongo bato ya Yisraele batunaki: “Nani kati na biso asengeli komata liboso mpo na kobundisa Babenyamina?” Yehova ayanolaki: “Yuda nde akokende liboso.”
19 Nsima na yango, Bayisraele batɛlɛmaki na ntɔngɔ mpe batyaki kaa mpo na kobundisa Gibea.
20 Sikoyo mibali ya Yisraele babimaki mpo na kobundisa Babenyamina. Batandamaki na molɔngɔ lokola basoda mpo na kobunda na bango na Gibea. 21 Bongo Babenyamina babimaki na Gibea mpe babomaki mibali ya Yisraele 22 000 na mokolo yango. 22 Kasi limpinga ya mibali ya Yisraele bamonisaki mpiko mpe batandamaki lisusu na molɔngɔ lokola basoda, kaka na esika oyo basalaki bongo mokolo ya liboso. 23 Na nsima, Bayisraele bakendaki mpe balelaki liboso ya Yehova tii na mpokwa mpe batunaki Yehova: “Tosengeli kobundisa lisusu bandeko na biso Babenyamina?”+ Na yango, Yehova alobaki: “Bókende kobundisa bango.”
24 Bongo Bayisraele bapusanaki pene na Babenyamina na mokolo ya mibale. 25 Babenyamina mpe babimaki na Gibea mpo na kokutana na bango na mokolo ya mibale mpe babomaki lisusu Bayisraele 18 000,+ oyo bazalaki na mipanga. 26 Na yango, mibali nyonso ya Yisraele, bakendaki na Betele. Balelaki mpe bafandaki wana liboso ya Yehova,+ bakilaki bilei+ na mokolo wana tii na mpokwa mpe bapesaki makabo ya kotumba+ mpe makabo ya kimya*+ liboso ya Yehova. 27 Nsima na yango, mibali ya Yisraele batunaki Yehova,+ mpo sanduku ya kondimana ya Nzambe ya solo ezalaki kuna na mikolo wana. 28 Nzokande Finease,+ mwana ya Eleazare, mwana ya Arona, azalaki kosala mosala na ye* liboso ya sanduku ya kondimana na mikolo wana. Mibali ya Yisraele batunaki boye: “Tosengeli kobima lisusu mpo na kobundisa bandeko na biso, mibali ya Benyamina, to tosengeli kotika?”+ Yehova azongisaki: “Bókende, mpo lobi nakopesa bango na mabɔkɔ na bino.” 29 Bongo Bayisraele batyaki mibali bábombana+ zingazinga ya Gibea mobimba mpo na kobundisa yango.
30 Bayisraele bakendaki kobundisa Babenyamina na mokolo ya misato, mpe basalaki bituluku ya etumba mpo na kobundisa Gibea ndenge basalaki yango bambala ya liboso.+ 31 Ntango Babenyamina babimaki mpo na kokutana na limpinga yango, babendamaki mosika na engumba.+ Bongo, ndenge ezalaki na bambala ya liboso, Babenyamina babandaki kobundisa mpe koboma ndambo ya Bayisraele na babalabala ya minene, oyo moko ematá tii na Betele mpe mosusu tii na Gibea. Babomaki mibali ya Yisraele soki 30 na esobe.+ 32 Bongo Babenyamina balobaki: “Tozali kobɛta bango lokola na mbala ya liboso.”+ Nzokande Bayisraele balobaki: “Tokokima bango mpe tokomema bango mosika mpenza ya engumba, na babalabala ya minene.” 33 Na yango, mibali nyonso ya Yisraele babimaki na bisika na bango mpe basalaki bituluku ya etumba na Baala-tamara. Na ntango yango, bato ya Yisraele oyo babombanaki babimaki nokinoki na bisika na bango, pembenipembeni ya Gibea. 34 Na yango, basoda 10 000 ya mpiko mpenza na Yisraele mobimba bakómaki liboso ya Gibea, mpe etumba eyaki ndongo. Kasi Babenyamina bayebaki te ete mpasi ezalaki koyela bango.
35 Yehova apesaki Benyamina+ na lobɔkɔ ya Yisraele. Na mokolo yango, Bayisraele babomaki mibali ya Benyamina 25 100, bango nyonso bazalaki na mipanga.+
36 Kasi ntango Babenyamina bamonaki ete mibali ya Yisraele bazalaki kokima liboso na bango, bakanisaki ete bakolonga bango.+ Nzokande, mibali ya Yisraele bazalaki kokima mpo batyaki motema na bato na bango oyo babombanaki mpo na kobundisa Gibea.+ 37 Bato oyo babombanaki basalaki nokinoki mpe basopanaki na Gibea. Na nsima, bato yango oyo babombanaki bapanzanaki mpe babɛtaki engumba yango mobimba na mopanga.
38 Nzokande mibali ya Yisraele bayokanaki na baoyo babombanaki ete bakomatisa milinga na engumba mpo ezala elembo.
39 Ntango Bayisraele bazalaki kokima etumba, mibali ya Benyamina babandaki kobundisa bango mpe babomaki mibali ya Yisraele soki 30,+ mpe balobaki: “Bazali mpenza kokwea liboso na biso, kaka ndenge ezalaki na etumba oyo eleki.”+ 40 Kasi likonzí ya milinga ebandaki komata na engumba yango; ezalaki elembo. Ntango Babenyamina babalukaki mpo na kotala, bamonaki engumba mobimba ezali kopela mɔtɔ, mpe mɔtɔ yango ezalaki komata likoló. 41 Bongo mibali ya Yisraele babalukaki mpo na kobundisa bango. Mibali ya Benyamina balɛmbaki nzoto mpo bamonaki ete mpasi ekómeli bango. 42 Na yango bakimaki liboso ya mibali ya Yisraele, mpe bakendaki na ngámbo ya esobe, kasi etumba elandaki bango bisika nyonso; mibali oyo bazalaki kouta na bingumba ya zingazinga bazalaki mpe kobundisa bango. 43 Bazingaki Babenyamina mpe balandaki bango kozanga kotika. Balongaki bango liboso mpenza ya Gibea, na ɛsti. 44 Nsukansuka, mibali 18 000 ya Benyamina bakufaki, bango nyonso bilombe ya etumba.+
45 Mibali ya Benyamina babalukaki mpe bakimaki na esobe, na libanga ya Rimone,+ mpe Bayisraele babomaki* mibali 5 000 kati na bango na babalabala ya minene, mpe bakobaki kolanda bango tii na Gidome; na yango babomaki lisusu mibali 2 000. 46 Bato nyonso ya Benyamina oyo bakufaki mokolo wana bazalaki mibali 25 000; bango nyonso bazalaki na mipanga+ mpe bazalaki bilombe ya bitumba. 47 Kasi mibali 600 bakimaki na esobe, na libanga ya Rimone, mpe bafandaki na libanga yango ya Rimone sanza minei.
48 Mpe mibali ya Yisraele bazongelaki Babenyamina mpe babɛtaki na mopanga bato mpe banyama ya mboka, nyonso oyo etikalaki. Lisusu batumbaki bingumba nyonso oyo bamonaki.