Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Abiya, mokonzi ya Yuda (1-22)

        • Abiya alongi Yeroboame (3-20)

2 Ntango 13:1

Mitindami

  • +1Ba 15:1, 2

2 Ntango 13:2

Mitindami

  • +2Nt 11:20, 21
  • +Yos 18:28; 1Sa 10:26
  • +1Ba 15:6

2 Ntango 13:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “oyo baponami.”

  • *

    Lil., “oyo baponami.”

Mitindami

  • +2Nt 11:1

2 Ntango 13:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, kondimana ya libela mpe oyo ebongwanaka te.

Mitindami

  • +Eb 49:10; 2Sa 7:8; Nz 78:70, 71
  • +2Sa 7:12, 13; 1Nt 17:11, 14; Lk 1:32
  • +Nz 89:28, 29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 20

2 Ntango 13:6

Mitindami

  • +2Nt 10:2
  • +1Ba 11:26, 27; 12:20

2 Ntango 13:8

Mitindami

  • +1Ba 12:26, 28; 2Nt 11:15

2 Ntango 13:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “atondisi lobɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Nt 11:14
  • +1Ba 12:31, 33; 13:33

2 Ntango 13:10

Mitindami

  • +2Nt 11:16

2 Ntango 13:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, mampa ya kolakisa.

Mitindami

  • +Kob 29:39
  • +Kob 30:1
  • +Kob 25:30
  • +Kob 27:20
  • +Kob 25:31

2 Ntango 13:12

Mitindami

  • +Mit 10:9

2 Ntango 13:14

Mitindami

  • +2Nt 14:11; 18:31

2 Ntango 13:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “oyo baponami.”

2 Ntango 13:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bayekamelaki.”

Mitindami

  • +2Ba 18:1, 5; 1Nt 5:20; 2Nt 16:8; Nz 22:5; 37:5; Nah 1:7

2 Ntango 13:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezali zingazinga.”

Mitindami

  • +1Ba 12:28, 29
  • +Yn 11:54

2 Ntango 13:20

Mitindami

  • +1Sa 25:38; 1Ba 14:20; Mis 12:21-23

2 Ntango 13:21

Mitindami

  • +Mib 17:17

2 Ntango 13:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndimbola; maloba.”

Mitindami

  • +2Nt 9:29; 12:15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 13:11Ba 15:1, 2
2 Nt. 13:22Nt 11:20, 21
2 Nt. 13:2Yos 18:28; 1Sa 10:26
2 Nt. 13:21Ba 15:6
2 Nt. 13:32Nt 11:1
2 Nt. 13:5Eb 49:10; 2Sa 7:8; Nz 78:70, 71
2 Nt. 13:52Sa 7:12, 13; 1Nt 17:11, 14; Lk 1:32
2 Nt. 13:5Nz 89:28, 29
2 Nt. 13:62Nt 10:2
2 Nt. 13:61Ba 11:26, 27; 12:20
2 Nt. 13:81Ba 12:26, 28; 2Nt 11:15
2 Nt. 13:92Nt 11:14
2 Nt. 13:91Ba 12:31, 33; 13:33
2 Nt. 13:102Nt 11:16
2 Nt. 13:11Kob 29:39
2 Nt. 13:11Kob 30:1
2 Nt. 13:11Kob 25:30
2 Nt. 13:11Kob 27:20
2 Nt. 13:11Kob 25:31
2 Nt. 13:12Mit 10:9
2 Nt. 13:142Nt 14:11; 18:31
2 Nt. 13:182Ba 18:1, 5; 1Nt 5:20; 2Nt 16:8; Nz 22:5; 37:5; Nah 1:7
2 Nt. 13:191Ba 12:28, 29
2 Nt. 13:19Yn 11:54
2 Nt. 13:201Sa 25:38; 1Ba 14:20; Mis 12:21-23
2 Nt. 13:21Mib 17:17
2 Nt. 13:222Nt 9:29; 12:15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 13:1-22

Mokanda ya mibale ya Ntango

13 Na mbula ya 18 ya boyangeli ya Yeroboame, Abiya akómaki mokonzi ya Yuda.+ 2 Ayangelaki mbula misato na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Mikaya,+ mwana mwasi ya Uriele, ya mboka Gibea.+ Mpe etumba ezalaki kati na Abiya ná Yeroboame.+

3 Bongo Abiya akendaki etumba elongo na limpinga ya basoda 400 000, mibali ya nguya, oyo bameseni na etumba.*+ Mpe Yeroboame atandaki basoda na ye na molɔngɔ, mibali 800 000, oyo bameseni na etumba,* mibali ya nguya. 4 Bongo Abiya atɛlɛmaki na Ngomba Zemaraime, oyo ezali na etúká ya ngombangomba ya Efraime, mpe alobaki boye: “Bóyoka ngai, Ee Yeroboame mpe Yisraele mobimba. 5 Boyebi te ete Yehova Nzambe ya Yisraele apesaki Davidi bokonzi na Yisraele mpo na libela,+ ye ná bana na ye,+ na nzela ya kondimana moko ya mungwa?*+ 6 Kasi Yeroboame+ mwana ya Nebate, mosaleli ya Salomo mwana ya Davidi, atɛlɛmaki mpe atombokelaki nkolo na ye.+ 7 Mpe bato oyo bazangá mosala ya kosala, bato ya mpambampamba, basanganaki elongo na ye. Balongaki Rehoboame mwana ya Salomo, ntango Rehoboame azalaki elenge, azalaki kobanga, mpe akokaki kotɛmɛla bango te.

8 “Mpe sikoyo bozali kokanisa ete bokoki kotɛmɛla bokonzi ya Yehova oyo ezali na mabɔkɔ ya bana ya Davidi, mpo bozali bato ebele mpenza mpe bozali na bana-ngɔmbɛ ya wolo oyo Yeroboame asalaki mpo ezala banzambe na bino.+ 9 Bobengani banganga-nzambe ya Yehova,+ bakitani ya Arona ná Balevi, mpe botye banganga-nzambe na bino moko kaka ndenge bato ya mikili mosusu basalaka.+ Moto nyonso oyo azalaki koya* na mwana-ngɔmbɛ ya mobali mpe mpate-mibali nsambo, akokaki kokóma nganga-nzambe ya biloko oyo ezali banzambe te. 10 Mpo na biso, Yehova azali Nzambe na biso,+ mpe tosundoli ye te; mpe banganga-nzambe na biso, bakitani ya Arona, bazali kosalela Yehova, mpe Balevi bazali kosalisa bango na mosala. 11 Babimiselaka Yehova milinga ya makabo ya kotumba ntɔngɔ nyonso mpe mpokwa nyonso+ ná mpaka ya malasi ya nsolo kitoko;+ batyaka mampa ya kotanda*+ na mesa ya wolo ya pɛto, mpe mpokwa nyonso bapelisaka miinda+ na bitɛlɛmiselo ya miinda ya wolo,+ mpo tozali kokokisa mokumba na biso liboso ya Yehova Nzambe na biso; kasi bino bosundoli ye. 12 Sikoyo bótala! Nzambe ya solo azali elongo na biso, azali kokamba biso, elongo na banganga-nzambe na ye ná bakelelo na bango oyo ekopesa biso elembo mpo na kobundisa bino. Ee mibali ya Yisraele, bóbundisa te Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, mpo bokolonga te.”+

13 Kasi Yeroboame atindaki basoda mosusu bákende kobombana mpo bábimela bato ya Yuda na nsima, bongo basoda na ye bazalaki liboso ya bato ya Yuda mpe baoyo babombanaki bazalaki nsima na bango. 14 Ntango mibali ya Yuda babalukaki, bamonaki ete basengelaki kobunda na bato oyo bazali liboso mpe na nsima. Bongo babandaki kobelela Yehova,+ wana banganga-nzambe bazalaki koyula bakelelo makasi. 15 Mibali ya Yuda bagangaki makasi ndenge bagangaka na etumba. Ntango mibali ya Yuda bagangaki makasi ndenge bagangaka na etumba, Nzambe ya solo asalaki ete Abiya mpe bato ya Yuda bálonga Yeroboame mpe Yisraele mobimba. 16 Bayisraele bakimaki liboso ya bato ya Yuda, mpe Nzambe apesaki bango na lobɔkɔ ya bato ya Yuda. 17 Abiya ná limpinga na ye babomaki bango mpenza; mpe na kati ya Bayisraele, mibali 500 000 oyo bamesani na etumba* bakufaki. 18 Na yango, mibali ya Yisraele bayokaki nsɔni na ntango yango, kasi mibali ya Yuda balongaki mpo batyaki motema* epai ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.+ 19 Abiya akobaki kolanda Yeroboame mpe abɔtɔlaki ye bingumba: Betele+ ná basité oyo esimbami na yango,* Yeshana ná basité oyo esimbami na yango, mpe Efraine+ ná basité oyo esimbami na yango. 20 Mpe Yeroboame azongelaki lisusu nguya na ye te na mikolo ya Abiya. Na nsima Yehova apesaki ye etumbu, mpe akufaki.+

21 Kasi Abiya azalaki se kokóma makasi. Azwaki basi 14,+ mpe akómaki na bana mibali 22 mpe bana basi 16. 22 Makambo mosusu ya lisolo ya Abiya, misala na ye mpe maloba na ye, ekomami na mokanda oyo ezali na makomi* ya mosakoli Ido.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto