Estere
3 Nsima na yango, Mokonzi Asueruse apesaki Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage+ bokonzi monene. Atombolaki ye, atyaki ye na esika ya lokumu koleka bankumu mosusu nyonso oyo bazalaki elongo na ye.+ 2 Mpe basaleli nyonso ya mokonzi oyo bazalaki na porte ya mokonzi bazalaki kogumbama mpe kofukama liboso ya Hamane, mpo yango nde mitindo oyo mokonzi apesaki na ntina na ye. Kasi Mordekai azalaki koboya kogumbama mpe kofukama. 3 Na yango basaleli ya mokonzi oyo bazalaki na porte ya mokonzi batunaki Mordekai ete: “Mpo na nini ozali koboya kotosa mitindo ya mokonzi?” 4 Mokolo na mokolo bazalaki kotuna ye bongo, kasi azalaki koyoka bango te. Bongo bayebisaki Hamane likambo yango mpo bátala soki akotika Mordekai akoba na ezaleli na ye wana;+ mpo Mordekai ayebisaki bango ete azali Moyuda.+
5 Ntango Hamane amonaki ete Mordekai aboyi kogumbama mpe kofukama liboso na ye, Hamane akómaki na nkanda makasi.+ 6 Na yango Hamane akanaki koboma* Mordekai. Kasi amonaki ete koboma kaka Mordekai ye moko ekoki te, mpo bayebisaki ye makambo etali bato ya ekólo ya Mordekai. Banda wana Hamane alukaki kosilisa bato nyonso ya ekólo ya Mordekai, elingi koloba Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na teritware mobimba ya bokonzi ya Asueruse.
7 Na mbula ya 12+ ya boyangeli ya Asueruse, na sanza ya liboso, elingi koloba sanza ya Nisana,* babwakaki Pure+ (elingi koloba mbɛsɛ) liboso ya Hamane mpo na koyeba mokolo mpe sanza ya kosala likambo yango, mpe mbɛsɛ elakisaki sanza ya 12, elingi koloba sanza ya Adare.*+ 8 Bongo Hamane alobaki na Mokonzi Asueruse ete: “Ezali na bato ya ekólo moko boye oyo bapalangani mpe bapanzani na kati ya bato ya bikólo+ na bitúká nyonso* ya bokonzi na yo.+ Mibeko na bango ekeseni na oyo ya bato ya bikólo mosusu nyonso, mpe bazali kotosa mibeko ya mokonzi te. Kotika bango kaka boye ekozala mpo na bolamu ya mokonzi te. 9 Soki yango esepelisi mokonzi, mobeko moko ebimisama ete bábomama. Nakopesa basaleli talanta* 10 000 ya palata mpo bátya yango na esika ya kobomba mosolo ya mokonzi.”*
10 Na yango, mokonzi alongolaki na lobɔkɔ na ye lopɛtɛ na ye ya kotya kashɛ+ mpe apesaki yango Hamane+ mwana ya Hamedata Moagage,+ oyo azalaki monguna ya Bayuda. 11 Mokonzi alobaki na Hamane boye: “Palata mpe bato bapesami na lobɔkɔ na yo, osala yango ndenge olingi.” 12 Bongo babengisaki basɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi+ na mokolo ya 13 ya sanza ya liboso. Bakomaki na mokanda,+ na ekomeli* ya etúká* mokomoko mpe na monɔkɔ ya bato ya ekólo mokomoko, mitindo nyonso oyo Hamane apesaki basatrape ya mokonzi, baguvɛrnɛrɛ oyo bazalaki kokamba bitúká,* mpe bankumu ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Mokanda yango ekomamaki na nkombo ya Mokonzi Asueruse mpe batyaki yango kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi.+
13 Batindaki bamemi-mikanda bámema mikanda yango na bitúká* nyonso ya mokonzi. Mikanda yango epesaki mitindo ete básilisa, báboma mpe bábebisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikóló, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, na mokolo ya 13 na sanza ya 12, elingi koloba, sanza ya Adare,+ mpe bábɔtɔla biloko na bango.+ 14 Mokanda ya makambo yango esengelaki mpe kobimisama mpo ezala mobeko na etúká nyonso,* mpe kosakolama epai ya bato nyonso, mpo bámilɛngɛla mpo na mokolo yango. 15 Bamemi-mikanda bakendaki nokinoki+ ndenge mokonzi apesaki mitindo, mpe mobeko yango ebimaki na Shushane+ ndako makasi. Bongo mokonzi ná Hamane bafandaki mpo na komɛla; nzokande engumba Shushane ekɔtaki mobulu.