Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Saulo akobi koyina Davidi (1-13)

      • Davidi akimi Saulo (14-24)

1 Samwele 19:1

Mitindami

  • +1Sa 18:9; Mas 27:4

1 Samwele 19:2

Mitindami

  • +1Sa 18:1; Mas 18:24

1 Samwele 19:3

Mitindami

  • +1Sa 20:9, 13; Mas 17:17

1 Samwele 19:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lisumu.”

Mitindami

  • +1Sa 22:14

1 Samwele 19:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “atyaki molimo na ye na likama na lobɔkɔ na ye.”

  • *

    Lil., “Mofilistia.”

  • *

    To, “lobiko.”

Mitindami

  • +1Sa 17:49
  • +1Sa 20:32

1 Samwele 19:7

Mitindami

  • +1Sa 16:21; 18:2, 13

1 Samwele 19:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elimo mabe ya Yehova eyelaki Saulo.”

Mitindami

  • +1Sa 16:14
  • +1Sa 18:10, 11

1 Samwele 19:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Soki obikisi molimo na yo te.”

Mitindami

  • +Nz 59:maloba ya ebandeli ya loyembo; 59:3

1 Samwele 19:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “terafime.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2004, lok. 29

1 Samwele 19:15

Mitindami

  • +1Sa 18:9

1 Samwele 19:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “terafime.”

1 Samwele 19:17

Mitindami

  • +1Sa 18:29

1 Samwele 19:18

Mitindami

  • +1Sa 7:15, 17
  • +1Sa 20:1

1 Samwele 19:22

Mitindami

  • +1Sa 19:18

1 Samwele 19:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alati kaka mwa elamba moko ya kati.”

Mitindami

  • +1Sa 10:11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 19:11Sa 18:9; Mas 27:4
1 Sa. 19:21Sa 18:1; Mas 18:24
1 Sa. 19:31Sa 20:9, 13; Mas 17:17
1 Sa. 19:41Sa 22:14
1 Sa. 19:51Sa 17:49
1 Sa. 19:51Sa 20:32
1 Sa. 19:71Sa 16:21; 18:2, 13
1 Sa. 19:91Sa 16:14
1 Sa. 19:91Sa 18:10, 11
1 Sa. 19:11Nz 59:maloba ya ebandeli ya loyembo; 59:3
1 Sa. 19:151Sa 18:9
1 Sa. 19:171Sa 18:29
1 Sa. 19:181Sa 7:15, 17
1 Sa. 19:181Sa 20:1
1 Sa. 19:221Sa 19:18
1 Sa. 19:241Sa 10:11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 19:1-24

Mokanda ya liboso ya Samwele

19 Na nsima, Saulo alobaki na mwana na ye Yonatane mpe na basaleli na ye nyonso ete Davidi asengeli kobomama.+ 2 Lokola Yonatane mwana ya Saulo alingaki Davidi mingi,+ ayebisaki Davidi boye: “Tata na ngai Saulo alingi koboma yo. Nabondeli yo, lobi na ntɔngɔ zalá ekɛngɛ; kende na esika moko ya kobombana mpe batamá kuna. 3 Nakokende elongo na tata na ngai na esobe, na esika oyo okobombana. Nakoloba malamu mpo na yo epai ya tata na ngai, mpe soki nayoki mwa likambo, nakozanga te koyebisa yo.”+

4 Na yango, Yonatane alobaki malamu mpo na Davidi+ epai ya tata na ye Saulo. Alobaki boye: “Mokonzi asengeli te kosalela mosaleli na ye Davidi mabe,* mpo ye asaleli yo mabe te. Kutu makambo oyo asaleli yo ememeli yo bolamu. 5 Atyaki bomoi* na ye na likama mpo na koboma Goliate,*+ mpe na mokolo yango, Yehova apesaki Yisraele mobimba elonga* moko monene. Omonaki likambo yango, mpe osepelaki mingi. Bongo mpo na nini olingi koboma Davidi kaka mpamba mpe kosopa makila ya moto oyo asali likambo te?”+ 6 Saulo ayokaki toli ya Yonatane, mpe Saulo alapaki ndai ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, akobomama te.” 7 Na nsima, Yonatane abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo wana nyonso. Bongo Yonatane amemaki Davidi epai ya Saulo mpe akobaki kosalela ye ndenge azalaki kosalela ye liboso.+

8 Na nsima, etumba ebimaki lisusu mpe Davidi akendaki kobunda na Bafilistia mpe abomaki bango ebele mpenza, mpe baoyo batikalaki bakimaki.

9 Mpe Yehova atikaki ete elimo ya mabe ekóma kotungisa Saulo+ ntango afandaki na ndako na ye.* Azalaki na likɔnga na lobɔkɔ na ye, mpe Davidi azalaki kobɛtɛla ye nzɛnzɛ.+ 10 Saulo abwakelaki Davidi likɔnga mpo akangisa ye na yango na efelo, kasi Davidi akimaki likɔnga yango, mpe ekendaki kokɔta na efelo. Bongo, Davidi akimaki kaka na butu wana. 11 Na nsima, Saulo atindaki bato na ndako ya Davidi mpo bákɛngɛla yango mpe báboma ye na ntɔngɔ,+ kasi Mikale, mwasi ya Davidi, ayebisaki ye boye: “Soki okimi te* na butu ya lelo, lobi bakoboma yo.” 12 Na mbala moko Mikale akitisaki Davidi na fɛnɛtrɛ, mpo akima mpe amibikisa. 13 Mikale azwaki ekeko ya nzambe ya libota* mpe alalisaki yango na mbeto, na nsima atyaki elamba moko ya madusumadusu lokola monyama oyo basalá na nsuki ya ntaba na esika oyo Davidi atyaka motó, mpe azipaki yango elamba.

14 Bongo Saulo atindaki bato bákende kozwa Davidi, kasi Mikale alobaki: “Azali kobɛla.” 15 Na yango, Saulo atindaki lisusu bato yango bákende kotala Davidi, mpe alobaki na bango: “Bómemela ngai ye likoló ya mbeto na ye mpo naboma ye.”+ 16 Ntango bato yango bakɔtaki, bakutaki nde ekeko ya nzambe ya libota* likoló ya mbeto mpe monyama oyo basalá na nsuki ya ntaba ezalaki na esika ya motó ya Davidi. 17 Saulo alobaki na Mikale: “Mpo na nini okosi ngai boye, mpe okimisi monguna na ngai?”+ Mikale alobaki na Saulo: “Ayebisaki ngai: ‘Tiká ngai nakima, soki te nakoboma yo!’”

18 Bongo Davidi akimaki mpe akendaki epai ya Samwele na Rama.+ Ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Na yango, ye ná Samwele bakendaki na Nayote+ mpe bakómaki kofanda kuna. 19 Na nsima, bayebisaki Saulo ete: “Talá! Davidi azali na Nayote, na Rama.” 20 Na mbala moko, Saulo atindaki bato bákanga Davidi. Ntango bato yango bamonaki basakoli ya mikóló bazali kosakola, mpe Samwele atɛlɛmi mpe azali kokamba bango, elimo ya Nzambe ekómaki kosala epai ya bato yango; bango mpe bakómaki kosala makambo lokola basakoli.

21 Ntango bayebisaki Saulo likambo yango, na mbala moko atindaki bato mosusu, bango mpe babandaki kosala makambo lokola basakoli. Bongo Saulo atindaki lisusu bato mosusu, etuluku ya misato, kasi bango mpe babandaki kosala makambo lokola basakoli. 22 Nsukansuka, ye moko mpe akendaki na Rama. Ntango akómaki na libulu monene ya kobomba mai, oyo ezali na Seku, atunaki boye: “Samwele ná Davidi bazali wapi?” Bayanolaki ye ete: “Bazali na Nayote,+ na Rama.” 23 Ntango Saulo alongwaki na esika wana mpo na kokende na Nayote, na Rama, elimo ya Nzambe ebandaki kosala mpe epai na ye. Bongo abandaki kotambola mpe kosala makambo lokola mosakoli nzelanzela tii ntango akómaki na Nayote, na Rama. 24 Lisusu, alongolaki bilamba na ye, mpe asalaki makambo lokola mosakoli liboso ya Samwele, mpe alalaki wana bolumbu* mokolo mobimba mpe butu mobimba. Yango wana balobaka: “Saulo azalaka mpe na kati ya basakoli?”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto