Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Nehemia

      • Nehemia abongisi makambo mosusu (1-31)

        • Esengeli kopesa moko ya bandambo zomi (10-13)

        • Esengeli kotosa mokolo ya Sabata (15-22)

        • Kobala basi bapaya epekisami (23-28)

Nehemia 13:1

Mitindami

  • +Mib 31:11; Ne 8:2, 3; Mis 15:21
  • +Eb 19:36-38
  • +Mib 23:3, 6

Nehemia 13:2

Mitindami

  • +Mit 22:4-6
  • +Mit 23:8; 24:10

Nehemia 13:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “oyo moboti moko azalaki Moyisraele te.”

Mitindami

  • +Ezr 10:10, 11; Ne 9:1, 2

Nehemia 13:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bisika ya kolya.”

  • *

    To, “tempelo.”

Mitindami

  • +Ne 10:37, 38
  • +Ne 3:1
  • +Ne 2:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, lok. 4

Nehemia 13:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “esika ya kolya.”

  • *

    To, “dime.”

Mitindami

  • +Mib 18:3, 4
  • +Mit 18:24
  • +Ne 12:44

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, lok. 4

Nehemia 13:6

Mitindami

  • +Ezr 7:1; Ne 2:1
  • +Ne 5:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2006, lok. 11

    “Makomami nyonso,” lok. 173

Nehemia 13:7

Mitindami

  • +Ne 12:10
  • +Ne 4:7

Nehemia 13:9

Mitindami

  • +Ne 10:39
  • +Le 2:14, 15

Nehemia 13:10

Mitindami

  • +Ne 10:37; 12:47
  • +Mal 3:8
  • +Mit 35:2

Nehemia 13:11

Mitindami

  • +Ezr 9:2
  • +Ne 10:39

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, nk. 4-5

Nehemia 13:12

Mitindami

  • +Le 27:30; Mit 18:21
  • +Ne 10:38, 39; Mal 3:10

Nehemia 13:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mokomeli.”

Nehemia 13:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mosala ya kokɛngɛla.”

Mitindami

  • +Ne 5:19
  • +Ebr 6:10

Nehemia 13:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “nakebisaki bango na mokolo yango ete bátɛka biloko te.”

Mitindami

  • +Kob 20:10; 34:21; 35:2
  • +Yir 17:21, 27

Nehemia 13:16

Mitindami

  • +Ne 10:31

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 1 2020 lok. 7

Nehemia 13:18

Mitindami

  • +Kob 20:8-10

Nehemia 13:22

Mitindami

  • +Mib 5:12
  • +Ne 5:19; 13:14, 30, 31

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/1996, lok. 16

Nehemia 13:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “batyaki na bandako na bango.”

Mitindami

  • +Ezr 9:1, 2; 10:10; 2Ko 6:14
  • +Yos 13:2, 3
  • +Mib 23:3, 4

Nehemia 13:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    10/2016, lok. 14

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, nk. 6-7

Nehemia 13:25

Mitindami

  • +Mib 25:2; Ezr 7:26
  • +Mib 7:3, 4; Ne 10:30

Nehemia 13:26

Mitindami

  • +1Ba 3:12, 13; 2Nt 9:22
  • +2Sa 12:24
  • +1Ba 11:1-5

Nehemia 13:27

Mitindami

  • +Ezr 10:2

Nehemia 13:28

Mitindami

  • +Ne 12:10
  • +Ne 3:1; 13:4
  • +Ne 2:10; 6:14

Nehemia 13:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bakómisi mbindo.”

Mitindami

  • +Kob 40:15; Mit 25:11-13
  • +Mal 2:4

Nehemia 13:30

Mitindami

  • +1Nt 23:6; 25:1

Nehemia 13:31

Mitindami

  • +Ne 10:34
  • +Ne 5:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, lok. 7

    1/2/2011, lok. 14

    15/9/1996, lok. 16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Neh. 13:1Mib 31:11; Ne 8:2, 3; Mis 15:21
Neh. 13:1Eb 19:36-38
Neh. 13:1Mib 23:3, 6
Neh. 13:2Mit 22:4-6
Neh. 13:2Mit 23:8; 24:10
Neh. 13:3Ezr 10:10, 11; Ne 9:1, 2
Neh. 13:4Ne 10:37, 38
Neh. 13:4Ne 3:1
Neh. 13:4Ne 2:10
Neh. 13:5Mib 18:3, 4
Neh. 13:5Mit 18:24
Neh. 13:5Ne 12:44
Neh. 13:6Ezr 7:1; Ne 2:1
Neh. 13:6Ne 5:14
Neh. 13:7Ne 12:10
Neh. 13:7Ne 4:7
Neh. 13:9Ne 10:39
Neh. 13:9Le 2:14, 15
Neh. 13:10Ne 10:37; 12:47
Neh. 13:10Mal 3:8
Neh. 13:10Mit 35:2
Neh. 13:11Ezr 9:2
Neh. 13:11Ne 10:39
Neh. 13:12Le 27:30; Mit 18:21
Neh. 13:12Ne 10:38, 39; Mal 3:10
Neh. 13:14Ne 5:19
Neh. 13:14Ebr 6:10
Neh. 13:15Kob 20:10; 34:21; 35:2
Neh. 13:15Yir 17:21, 27
Neh. 13:16Ne 10:31
Neh. 13:18Kob 20:8-10
Neh. 13:22Mib 5:12
Neh. 13:22Ne 5:19; 13:14, 30, 31
Neh. 13:23Ezr 9:1, 2; 10:10; 2Ko 6:14
Neh. 13:23Yos 13:2, 3
Neh. 13:23Mib 23:3, 4
Neh. 13:25Mib 25:2; Ezr 7:26
Neh. 13:25Mib 7:3, 4; Ne 10:30
Neh. 13:261Ba 3:12, 13; 2Nt 9:22
Neh. 13:262Sa 12:24
Neh. 13:261Ba 11:1-5
Neh. 13:27Ezr 10:2
Neh. 13:28Ne 12:10
Neh. 13:28Ne 3:1; 13:4
Neh. 13:28Ne 2:10; 6:14
Neh. 13:29Kob 40:15; Mit 25:11-13
Neh. 13:29Mal 2:4
Neh. 13:301Nt 23:6; 25:1
Neh. 13:31Ne 10:34
Neh. 13:31Ne 5:19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Nehemia 13:1-31

Nehemia

13 Na ntango wana, batángelaki bato buku ya Moize,+ mpe bamonaki ekomamá na kati ete Moamone to Momoabe+ akoki ata moke te kokɔta na lisangá ya Nzambe ya solo.+ 2 Kutu, ntango Baamone ná Bamoabe bakutanaki na Bayisraele bapesaki bango mampa te, mai mpe te. Kasi bafutaki Balaama mpo alakela bango mabe.+ Nzokande, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe yango lipamboli.+ 3 Ntango kaka bayokaki Mobeko, babandaki kokabola Yisraele ná bato nyonso oyo bazalaki bapaya.*+

4 Nzokande, liboso na yango, nganga-nzambe oyo azalaki na mokumba ya kobatela bisika ya kobomba biloko* na ndako* ya Nzambe na biso+ ezalaki Eliashibe,+ ndeko ya Tobia.+ 5 Eliashibe apesaki Tobia esika moko monene ya kobomba biloko,* esika bazalaki liboso kotya likabo ya mbuma, olibana, bisaleli, mpe moko ya bandambo zomi* ya mbuma, ya vinyo ya sika mpe ya mafuta,+ oyo Balevi,+ bayembi ná bakɛngɛli ya baporte bazalaki na lotomo ya kozwa, mpe likabo mpo na banganga-nzambe.+

6 Na ntango wana nyonso, nazalaki na Yerusaleme te, mpo nakendaki epai ya Mokonzi Artazerezese+ ya Babilone na mbula ya 32 ya boyangeli na ye.+ Mwa moke na nsima, nasɛngaki mokonzi nzela nakende mpo na mwa ntango. 7 Bongo nakómaki na Yerusaleme mpe nayaki komona likambo ya mabe mpenza oyo Eliashibe+ asalaki: apesaki Tobia+ esika moko ya kobomba biloko na lopango ya ndako ya Nzambe ya solo. 8 Nasepelaki ata moke te, mpe nabwakaki biloko nyonso ya ndako ya Tobia libándá ya eteni ya ndako yango. 9 Na nsima napesaki mitindo bápɛtola bisika ya kobomba biloko; bongo nazongisaki na kati bisaleli ya ndako ya Nzambe ya solo,+ ná likabo ya mbuma mpe olibana.+

10 Nayokaki mpe ete Balevi+ bazalaki kozwa te biloko oyo basengelaki kozwa.+ Yango wana Balevi ná bayembi oyo bazalaki kosala mosala bakendaki kosala, moto na moto na elanga na ye.+ 11 Bongo napamelaki bayangeli-basungi+ mpe nalobaki: “Mpo na nini ndako ya Nzambe ya solo esundolami boye?”+ Na nsima, nayanganisaki baoyo bakendaki mpe nalobaki na bango bázonga na bisika na bango ya mosala. 12 Mpe bato nyonso ya Yuda bayaki na moko ya bandambo zomi+ ya mbuma, ya vinyo ya sika mpe ya mafuta na bisika ya kobomba biloko.+ 13 Na nsima, natyaki nganga-nzambe Shelemia, Zadoke mosali-bakopi* mpe Pedaya oyo azalaki Molevi na mokumba ya kobatela bisika ya kobomba biloko. Hanane mwana ya Zakure mwana ya Matania azalaki mosungi na bango. Kutu eyebanaki ete mibali yango bazali bato ya kotyela motema. Bango nde bazwaki mokumba ya kokabolela bandeko na bango biloko.

14 Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai,+ kanisá ngai mpo na likambo yango, mpe kobosana te misala ya bolingo ya sembo oyo nasali mpo na ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala oyo esalemaka kuna.”*+

15 Na eleko yango, namonaki na Yuda bato bazali konyatanyata mbuma na bikamwelo ya vinyo na mokolo ya Sabata.+ Basusu bazalaki kokangisa ebele ya mbuma esika moko mpe kotya yango likoló ya bampunda, bazalaki kokɔtisa vinyo, mbuma ya vinyo mpe mbuma ya figi mpe lolenge nyonso ya mikumba ya kilo, na Yerusaleme na mokolo ya Sabata.+ Bongo nakebisaki bango ete bátɛka biloko te na mokolo yango.* 16 Mpe bato ya Tire oyo bazalaki kofanda na engumba yango bazalaki koya na mbisi mpe lolenge nyonso ya biloko ya kotɛka, mpe bazalaki kotɛkɛla yango bato ya Yuda na Yerusaleme na mokolo ya Sabata.+ 17 Bongo napamelaki bato ya lokumu ya Yuda mpe nalobaki na bango: “Bozali koyeba mabe oyo bozali kosala? Bozali kotosa mokolo ya Sabata te! 18 Ezali te mpo bankɔkɔ na bino basalaki ndenge wana, yango wana Nzambe na biso ayeisaki mpasi oyo nyonso likoló na biso, mpe likoló ya engumba oyo? Lokola bozali kotosa Sabata te,+ nkanda ya Nzambe oyo ezali kopelela Yisraele ekokóma lisusu makasi.”

19 Na mpokwa, ntango kaka molili ebandaki kokɔta na Yerusaleme, liboso ete Sabata ebanda, napesaki mitindo ete bákanga bizipeli ya baporte. Nalobaki mpe ete báfungola yango te tii nsima ya Sabata. Mpe natyaki basaleli na ngai mosusu na baporte mpo moto moko te akɔtisa mikumba ya kilo na engumba na mokolo ya Sabata. 20 Bongo bato ya mombongo mpe bato oyo batɛkaka biloko ya ndenge nyonso balalaki butu mobimba na libándá ya Yerusaleme, mbala moko to mbala mibale. 21 Na yango nakebisaki bango mpe nalobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolala butu mobimba liboso ya efelo? Soki bosali yango lisusu, nakobengana bino na makasi.” Banda wana, bayaki lisusu na Sabata te.

22 Mpe nayebisaki Balevi ete bámipɛtolaka mbala na mbala mpe báyaka kokɛngɛla na baporte mpo mokolo ya Sabata ezala kaka mosantu.+ Na likambo oyo mpe: “Kanisá ngai, Ee Nzambe na ngai, yokelá ngai mawa na kolanda bolingo ya sembo oyo otondi na yango.”+

23 Kaka na eleko yango, namonaki mpe Bayuda oyo babalaki* basi+ Baashedode,+ Baamone ná Bamoabe.+ 24 Ndambo ya bana na bango bazalaki koloba monɔkɔ ya Ashedode mpe ndambo bazalaki koloba minɔkɔ ya bato ya bikólo ndenge na ndenge, kasi ata moko te kati na bango ayebaki koloba monɔkɔ ya Bayuda. 25 Na yango napamelaki mibali yango mpe nalakelaki bango mabe; nabɛtaki basusu+ mpe napikolaki bango nsuki, mpe nalapisaki bango ndai na nkombo ya Nzambe ete: “Bosengeli te kopesa bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe bosengeli kondima ata mwana na bango moko te ya mwasi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.+ 26 Ezalaki te mpo na basi bapaya nde Salomo mokonzi ya Yisraele akweaki na lisumu? Na kati ya bikólo mingi ezalaki na mokonzi moko te lokola ye;+ mpe Nzambe na ye alingaki ye,+ yango wana akómisaki ye mokonzi na Yisraele mobimba. Nzokande ata ye, basi bapaya bakweisaki ye na lisumu.+ 27 Ezali likambo ya nsɔmɔ te ndenge bosali mabe monene boye mpe bozangi bosembo epai ya Nzambe na biso na ndenge bobali basi bapaya?”+

28 Moko ya bana ya Yoyada+ mwana ya Eliashibe+ nganga-nzambe monene akómaki bokilo ya Sanebalate+ Mohorone. Bongo nabenganaki ye mosika na ngai.

29 Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai, kanisá bango, mpo batyoli* bonganga-nzambe mpe kondimana ya bonganga-nzambe+ mpe ya Balevi.”+

30 Mpe napɛtolaki bango na mbindo nyonso oyo ezalaki kouta epai ya bapaya mpe napesaki banganga-nzambe ná Balevi mikumba, mpo moto na moto asala mosala na ye.+ 31 Nazwaki mpe bibongiseli mpo na komema nkoni+ na bantango oyo etyami mpe mpo na mbuma ya liboso oyo eteli.

Bongo nabondelaki: “Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai mpe salelá ngai bolamu.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto