Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakorinti 9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakorinti

      • Likambo oyo ezali kotinda na kopesa (1-15)

        • “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo” (7)

2 Bakorinti 9:1

Mitindami

  • +Ro 15:26; 1Ko 16:1; 2Ko 9:12

2 Bakorinti 9:6

Mitindami

  • +Mas 11:24; 19:17; 22:9; Mos 11:1; Lk 6:38

2 Bakorinti 9:7

Mitindami

  • +Mib 15:7, 10
  • +Kob 22:29; Mas 11:25; Mis 20:35; Ebr 13:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, lok. 196

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2013, lok. 13

    1/12/2012, lok. 5

    1/11/1998, lok. 26

    1/12/1992, lok. 15

    15/1/1992, nk. 14-15, 18-19

    Lamuká!,

    10/2008, lok. 19

2 Bakorinti 9:8

Mitindami

  • +Mas 28:27; Mal 3:10; Flp 4:18, 19

2 Bakorinti 9:9

Mitindami

  • +Nz 112:9

2 Bakorinti 9:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

2 Bakorinti 9:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, nk. 210-212

2 Bakorinti 9:12

Mitindami

  • +Ro 15:26, 27; 2Ko 8:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, nk. 210-213

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2000, nk. 11-12

2 Bakorinti 9:13

Mitindami

  • +Mt 5:16; Ebr 13:16; Yk 1:27; 1Yn 3:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, nk. 210-212

2 Bakorinti 9:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “malɔmbɔ.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, nk. 210-212, 216

2 Bakorinti 9:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 2 2017 lok. 4

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2016, nk. 9-10

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2015, lok. 15

    1/12/1993, lok. 30

    15/1/1992, lok. 19

    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!, nk. 210-212

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Ko. 9:1Ro 15:26; 1Ko 16:1; 2Ko 9:12
2 Ko. 9:6Mas 11:24; 19:17; 22:9; Mos 11:1; Lk 6:38
2 Ko. 9:7Mib 15:7, 10
2 Ko. 9:7Kob 22:29; Mas 11:25; Mis 20:35; Ebr 13:16
2 Ko. 9:8Mas 28:27; Mal 3:10; Flp 4:18, 19
2 Ko. 9:9Nz 112:9
2 Ko. 9:12Ro 15:26, 27; 2Ko 8:14
2 Ko. 9:13Mt 5:16; Ebr 13:16; Yk 1:27; 1Yn 3:17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakorinti 9:1-15

Mokanda ya mibale epai ya Bakorinti

9 Nzokande na likambo oyo etali mosala yango mpo na basantu,+ ezali kutu na ntina te nakomela bino, 2 mpo nayebi mposa makasi na bino mpe nazali komikumisa na yango epai ya bato ya Masedonia, ete Akaya emibongisá esali sikoyo mbula moko; mpe molende na bino elamwisi mingi na bango. 3 Kasi nazali kotinda bandeko, mpo komikumisa oyo tomikumisaka mpo na bino ezala mpamba te na likambo yango mpe bómibongisa mpenza, ndenge kaka nazalaki koloba yango ete bokomibongisa. 4 Soki bongo te, ezala na ndenge nini, soki bato ya Masedonia bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bomibongisi te, biso—naboyi kotánga bino—tokoyoka nsɔni na ndenge totyelaki bino motema. 5 Na yango, namonaki malamu kolendisa bandeko báya epai na bino liboso mpe bábongisa libelalibela likabo na bino ya motema malamu oyo bolakaki, mpo ebongisama lokola likabo oyo epesami na motema malamu kasi te lokola eloko oyo ebɔtɔlami.

6 Kasi na likambo yango, moto oyo azali kolona mingi te akobuka mpe mingi te mpe moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.+ 7 Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te,+ mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.+

8 Kutu, Nzambe akoki kosala ete boboto monene na ye nyonso etonda epai na bino, mpo bózala ntango nyonso na oyo ekoki na bino na makambo nyonso, bózala mpe na mingi oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.+ 9 (Kaka ndenge ekomamá ete: “Akabi biloko mingi, apesi babola. Bosembo na ye ezali mpo na libela.”+ 10 Moto oyo apesaka moloni mboto mingi mpe limpa ya kolya akopesa mpe akobakisa mboto mpo bólona mpe akokómisa mbuma ya bosembo* na bino ebele.) 11 Nzambe apamboli bino mingi mpo bókoka kokaba mingi, mpe bato bakopesa Nzambe matondi mpo na makabo na bino oyo tokopesa mpe basusu; 12 mpo mosala oyo bozali kosala mpo na bolamu ya bato nyonso ezali te kaka mpo na kokokisa malamu bamposa ya basantu,+ kasi ezali mpe mpo matɔndi mingi epesama na Nzambe. 13 Mpo na elembeteli oyo mosala yango ya kopesa lisungi ezali kopesa, bazali kopesa Nzambe nkembo mpo bozali kotosa ndenge bozali kosakola polele nsango malamu oyo etali Kristo, mpe bozali kopesa makabo na motema mobimba mpo na bango mpe mpo na bato nyonso.+ 14 Mpe elongo na mabondeli* oyo bazali kosala mpo na bino bazali komonisa ete balingaka bino mpo na boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza, oyo azali komonisela bino.

15 Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto