Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Mibali ya Efraime basilikeli Gideone (1-3)

      • Balandi bakonzi ya Midiane mpe babomi bango (4-21)

      • Gideone aboyi bokonzi (22-27)

      • Bomoi ya Gideone na mokuse (28-35)

Basambisi 8:1

Mitindami

  • +Bas 7:2
  • +Bas 12:1; 2Nt 25:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2000, lok. 25

Basambisi 8:2

Mitindami

  • +Bas 7:24
  • +Bas 6:11, 34

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    7/2021, nk. 16-17

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2000, lok. 25

    Lamuká!,

    1/1993, lok. 12

Basambisi 8:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “alobaki maloba yango.”

  • *

    Lil., “elimo na bango ezalaki lisusu na nkanda te mpo na ye.”

Mitindami

  • +Bas 7:24, 25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2000, lok. 25

Basambisi 8:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2004, lok. 16

Basambisi 8:7

Mitindami

  • +Bas 8:16

Basambisi 8:9

Mitindami

  • +Bas 8:17

Basambisi 8:10

Mitindami

  • +Bas 7:12

Basambisi 8:11

Mitindami

  • +Mit 32:34, 35

Basambisi 8:15

Mitindami

  • +Bas 8:5, 6

Basambisi 8:16

Mitindami

  • +Bas 8:7

Basambisi 8:17

Mitindami

  • +Bas 8:8, 9

Basambisi 8:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndenge moto azali, ndenge mpe nguya na ye ezali.”

Mitindami

  • +Nz 83:11

Basambisi 8:22

Mitindami

  • +Bas 6:14

Basambisi 8:23

Mitindami

  • +Kob 15:18; 1Sa 10:19; Yis 33:22; 43:15

Basambisi 8:24

Mitindami

  • +Eb 16:11; 25:13; 28:9; 37:28

Basambisi 8:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Bas 8:21

Basambisi 8:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 28:6; Bas 17:5
  • +Bas 6:11
  • +Bas 2:17
  • +Nz 106:36

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2005, lok. 16

Basambisi 8:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “batombolaki motó na bango lisusu te.”

Mitindami

  • +Bas 6:1
  • +Bas 3:11; 5:31

Basambisi 8:29

Mitindami

  • +Bas 6:32; 1Sa 12:11

Basambisi 8:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “azalaki na bana mibali 70 oyo babimaki na ebɛlo na ye.”

Basambisi 8:31

Mitindami

  • +Bas 9:1, 2; 2Sa 11:21

Basambisi 8:32

Mitindami

  • +Bas 6:11, 24

Basambisi 8:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “basalaki lisusu pite na Babaala.”

Mitindami

  • +Bas 2:17, 19; 10:6
  • +Bas 9:4

Basambisi 8:34

Mitindami

  • +Bas 3:7
  • +Nz 106:43

Basambisi 8:35

Mitindami

  • +Bas 9:16-18

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 8:1Bas 7:2
Bas. 8:1Bas 12:1; 2Nt 25:10
Bas. 8:2Bas 7:24
Bas. 8:2Bas 6:11, 34
Bas. 8:3Bas 7:24, 25
Bas. 8:7Bas 8:16
Bas. 8:9Bas 8:17
Bas. 8:10Bas 7:12
Bas. 8:11Mit 32:34, 35
Bas. 8:15Bas 8:5, 6
Bas. 8:16Bas 8:7
Bas. 8:17Bas 8:8, 9
Bas. 8:21Nz 83:11
Bas. 8:22Bas 6:14
Bas. 8:23Kob 15:18; 1Sa 10:19; Yis 33:22; 43:15
Bas. 8:24Eb 16:11; 25:13; 28:9; 37:28
Bas. 8:26Bas 8:21
Bas. 8:27Kob 28:6; Bas 17:5
Bas. 8:27Bas 6:11
Bas. 8:27Bas 2:17
Bas. 8:27Nz 106:36
Bas. 8:28Bas 6:1
Bas. 8:28Bas 3:11; 5:31
Bas. 8:29Bas 6:32; 1Sa 12:11
Bas. 8:31Bas 9:1, 2; 2Sa 11:21
Bas. 8:32Bas 6:11, 24
Bas. 8:33Bas 2:17, 19; 10:6
Bas. 8:33Bas 9:4
Bas. 8:34Bas 3:7
Bas. 8:34Nz 106:43
Bas. 8:35Bas 9:16-18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 8:1-35

Basambisi

8 Na nsima mibali ya Efraime balobaki na ye boye: “Likambo nini osali biso? Mpo na nini obengaki biso te ntango okendaki kobunda na Bamidiane?”+ Mpe basilikelaki ye makasi.+ 2 Kasi alobaki na bango: “Eloko nini nasali koleka bino? Mosala ya kolɔkɔta mbuma oyo Efraime+ asali eleki mosala ya kobuka mbuma ya vinyo oyo Abi-ezere+ asali, boye te? 3 Nzambe apesaki Orebe ná Zeebe,+ bankumu ya Midiane, na lobɔkɔ na bino, boye te? Sikoyo, eloko nini ngai nasali koleka bino?” Ntango alobaki bongo,* nkanda na bango ekitaki.*

4 Na nsima Gideone akómaki na Ebale Yordani mpe akatisaki yango. Ye ná mibali 300 oyo bazalaki elongo na ye balɛmbaki, kasi bakobaki kolanda banguna. 5 Bongo alobaki na mibali ya Sukote boye: “Nabondeli bino, bópesa bato oyo bazali elongo na ngai mampa, mpo balɛmbi, mpe ngai nazali kolanda Zeba ná Zalamuna, bakonzi ya Midiane.” 6 Kasi bankumu ya Sukote balobaki: “Mpo na nini tópesa limpinga na yo mampa? Osili nde kokanga Zeba ná Zalamuna na lobɔkɔ na yo?” 7 Na yango Gideone alobaki boye: “Lokola bolobi bongo, ntango Yehova akopesa Zeba ná Zalamuna na lobɔkɔ na ngai, nakobɛta bino na fimbo ya banzubɛ mpe na bansinga ya nsendensende ya esobe.”+ 8 Bongo alongwaki wana, amataki tii na Penuele, mpe asɛngaki bato ya Penuele kaka ndenge wana, kasi mibali ya Penuele bapesaki ye kaka eyano oyo mibali ya Sukote bapesaki ye. 9 Bongo alobaki mpe na mibali ya Penuele boye: “Ntango nakozonga na kimya, nakobuka linɔ́ngi oyo.”+

10 Nzokande, Zeba ná Zalamuna bazalaki na Karakore, elongo na mampinga na bango: mibali soki 15 000. Kaka bango nde batikalaki na kati ya limpinga mobimba ya bato ya Ɛsti,+ mpo mibali 120 000 oyo bazalaki na mipanga basilaki kokufa. 11 Gideone akobaki komata na nzela ya bato oyo bafandaka na bahema, na ɛsti ya Noba mpe Yogebeha,+ mpe abundisaki kaka yango, ntango oyo bato bamilɛngɛlaki te. 12 Ntango Zeba ná Zalamuna, bakonzi mibale ya Midiane, bakimaki, alandaki bango mpe akangaki bango. Mpe yango ekɔtisaki yikiyiki na kaa mobimba.

13 Na nsima, Gideone mwana ya Yoashe autaki na etumba mpe azongaki na nzela oyo ematá tii na Herese. 14 Na nzela, akangaki elenge mobali moko ya Sukote mpe atunaki ye mituna. Elenge mobali yango akomelaki ye bankombo ya mibali 77, oyo bazalaki bankumu mpe bankulutu na Sukote. 15 Bongo akendaki epai ya mibali ya Sukote mpe alobaki na bango: “Bótala Zeba ná Zalamuna, oyo botumolaki ngai mpo na bango, mpe bolobaki: ‘Mpo na nini tópesa bato na yo oyo balɛmbi mampa? Osili nde kokanga Zeba ná Zalamuna?’”+ 16 Bongo azwaki bankulutu ya engumba yango, mpe apesaki mibali yango ya Sukote liteya na fimbo ya banzubɛ ná bansinga ya nsendensende ya esobe.+ 17 Na nsima, abukaki linɔ́ngi ya Penuele,+ mpe abomaki mibali ya engumba yango.

18 Atunaki Zeba ná Zalamuna boye: “Mibali oyo bobomaki na Tabore bazalaki ndenge nini?” Bongo bango balobaki: “Bazalaki lokola yo, nzoto na bango ezalaki lokola ya bana ya mokonzi.” 19 Na yango alobaki: “Bazalaki bandeko na ngai, bana ya mama na ngai. Lokola Yehova azali solo na bomoi, nalingaki koboma bino te soki bótikaka bango na bomoi.” 20 Na nsima, alobaki na Yetere mwana na ye ya liboso ete: “Tɛlɛmá, bomá bango.” Kasi elenge mobali yango abendaki mopanga na ye te; azalaki kobanga, mpo azalaki naino elenge. 21 Bongo Zeba ná Zalamuna balobaki: “Yo moko tɛlɛmá mpe bomá biso, mpo mobali ya solosolo ayebanaka na nguya na ye.”* Na yango, Gideone atɛlɛmaki mpe abomaki Zeba ná Zalamuna,+ mpe azwaki babiju oyo ezalaki na bankingo ya bakamela na bango; babiju yango egumbamá lokola sanza oyo ebimi sika.

22 Na nsima, mibali ya Yisraele balobaki na Gideone boye: “Yangelá biso, yo ná mwana na yo, ná mwana ya mwana na yo, mpo obikisaki biso na lobɔkɔ ya Bamidiane.”+ 23 Kasi Gideone alobaki na bango: “Ngai nakoyangela bino te, mwana na ngai mpe akoyangela bino te. Yehova nde akoyangela bino.”+ 24 Gideone alobaki lisusu boye: “Nalingi kosɛnga bino eloko moko: Mokomoko na bino apesa ngai lopɛtɛ ya zolo, na biloko oyo apunzaki.” (Banguna na bango bazalaki na mpɛtɛ ya wolo na zolo, mpo bazalaki Bayishimaele.)+ 25 Balobaki: “Tokopesa yo yango.” Bongo batandaki elamba moko mpe moto na moto abwakaki likoló na yango lopɛtɛ ya zolo oyo ezalaki na kati ya biloko oyo apunzaki na etumba. 26 Kilo ya mpɛtɛ ya wolo ya zolo oyo asɛngaki ezalaki shekele 1 700;* bakisa mpe babiju oyo egumbamá lokola sanza oyo ebimi sika, bashɛnɛti, bilamba ya lɛnɛ ya mwa motane-bulé oyo bakonzi ya Midiane bazalaki kolata, mpe bansinga oyo bazalaki kolatisa bakamela na nkingo.+

27 Gideone asalaki na yango efode*+ mpe atyaki yango na engumba na ye Ofra;+ mpe Yisraele mobimba esalaki bondumba ya elimo kuna+ na ndenge esambelaki efode yango, mpe ekómelaki Gideone ná libota na ye motambo.+

28 Na ndenge yango, Bamidiane+ batyamaki na nse ya bokonzi ya Bayisraele, mpe babundisaki lisusu Bayisraele te;* mpe mokili yango ekómaki na kimya mbula 40 na mikolo ya Gideone.+

29 Bongo, Yerubaala+ mwana ya Yoashe azongaki na ndako na ye mpe afandaki kuna.

30 Gideone akómaki tata ya bana mibali 70,* mpo azalaki na basi ebele. 31 Mwasi na ye mosusu oyo azalaki na Shekeme abotelaki ye mpe mwana mobali, mpe Gideone apesaki ye nkombo Abimeleke.+ 32 Mpe Gideone mwana ya Yoashe akufaki nsima ya kozala na bomoi moko ya malamu mpe ya molai; bakundaki ye na lilita ya tata na ye Yoashe, na Ofra ya Baabi-ezere.+

33 Ntango kaka Gideone akufaki, Bayisraele basalaki lisusu bondumba ya elimo na ndenge basambelaki Babaala,*+ mpe bakómisaki Baala-berite nzambe na bango.+ 34 Bayisraele babosanaki Yehova Nzambe na bango,+ oyo abikisaki bango na lobɔkɔ ya banguna na bango nyonso ya zingazinga;+ 35 mpe bamoniselaki bato ya ndako ya Yerubaala, elingi koloba Gideone, bolingo ya sembo te mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto