Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Gideone ná bato na ye 300 (1-8)

      • Limpinga ya Gideone elongi Midiane (9-25)

        • “Mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!” (20)

        • Mobulungano ekɔti na kaa ya Bamidiane (21, 22)

Basambisi 7:1

Mitindami

  • +Bas 6:11, 32

Basambisi 7:2

Mitindami

  • +1Sa 14:6; 2Nt 14:11
  • +1Sa 17:47

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, nk. 25-26

Basambisi 7:3

Mitindami

  • +Mib 20:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 41

Basambisi 7:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “akolɛta.”

Basambisi 7:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “balɛtaki mai.”

Basambisi 7:7

Mitindami

  • +Bas 7:2

Basambisi 7:8

Mitindami

  • +Bas 6:33

Basambisi 7:9

Mitindami

  • +Bas 3:9, 10; 4:14

Basambisi 7:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mabɔkɔ na yo ekokóma makasi.”

Basambisi 7:12

Mitindami

  • +Bas 6:33
  • +Bas 6:3, 5

Basambisi 7:13

Mitindami

  • +Bas 6:16

Basambisi 7:14

Mitindami

  • +Bas 6:14
  • +Bas 7:7

Basambisi 7:15

Mitindami

  • +Bas 7:11

Basambisi 7:16

Mitindami

  • +Bas 7:8

Basambisi 7:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Na ebandeli ya ntango ya kokɛngɛla na katikati ya butu,” ezalaki kobanda pene na ngonga ya 22:00 tii pene na ngonga ya 2:00 ya ntɔngɔ.

Mitindami

  • +Bas 7:8
  • +Bas 7:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2005, lok. 16

    1/8/1991, lok. 20

Basambisi 7:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/1997, lok. 31

Basambisi 7:21

Mitindami

  • +Kob 14:25; 2Ba 7:6, 7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/1997, lok. 31

Basambisi 7:22

Mitindami

  • +2Nt 20:23
  • +1Ba 19:16

Basambisi 7:23

Mitindami

  • +Bas 6:35

Basambisi 7:25

Mitindami

  • +Nz 83:11; Yis 10:26
  • +Bas 8:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 7:1Bas 6:11, 32
Bas. 7:21Sa 14:6; 2Nt 14:11
Bas. 7:21Sa 17:47
Bas. 7:3Mib 20:8
Bas. 7:7Bas 7:2
Bas. 7:8Bas 6:33
Bas. 7:9Bas 3:9, 10; 4:14
Bas. 7:12Bas 6:33
Bas. 7:12Bas 6:3, 5
Bas. 7:13Bas 6:16
Bas. 7:14Bas 6:14
Bas. 7:14Bas 7:7
Bas. 7:15Bas 7:11
Bas. 7:16Bas 7:8
Bas. 7:19Bas 7:8
Bas. 7:19Bas 7:16
Bas. 7:21Kob 14:25; 2Ba 7:6, 7
Bas. 7:222Nt 20:23
Bas. 7:221Ba 19:16
Bas. 7:23Bas 6:35
Bas. 7:25Nz 83:11; Yis 10:26
Bas. 7:25Bas 8:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 7:1-25

Basambisi

7 Na nsima, Yerubaala, elingi koloba Gideone,+ elongo na bato nyonso oyo bazalaki na ye, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe batyaki kaa na Liziba ya Harode; nzokande kaa ya Bamidiane ezalaki na nɔrdi ya esika oyo azalaki, na ngomba moke ya More, na lobwaku patatalu. 2 Bongo Yehova alobaki na Gideone: “Bato oyo bazali elongo na yo baleki ebele mpo napesa Bamidiane na lobɔkɔ na bango.+ Noki te Yisraele atutela ngai ntolo mpe aloba: ‘Lobɔkɔ na ngai moko nde ebikisaki ngai.’+ 3 Sikoyo nabondeli yo, yebisá bato na yo: ‘Moto nyonso oyo azali kobanga mpe kolɛnga, azonga ndako.’”+ Mpe Gideone amekaki bango na maloba yango. Bongo, bato 22 000 bazongaki ndako mpe bato 10 000 batikalaki.

4 Kasi Yehova alobaki na Gideone boye: “Bato baleki kaka ebele. Kitá na bango na mai mpo nameka bango mpo na yo kuna. Soki nalobi na yo ete: ‘Moto oyo akokende na yo,’ ye nde akokende na yo. Kasi soki nalobi na yo: ‘Moto oyo akokende elongo na yo te,’ akokende elongo na yo te.” 5 Bongo akitaki na bato yango na mai.

Na nsima Yehova alobaki na Gideone: “Okokabola moto nyonso oyo akomɛla* mai na lolemo na ye kaka ndenge mbwa emɛlaka, na baoyo bakofukama mpo na komɛla.” 6 Motángo ya bato oyo bamɛlaki mai,* oyo bazwaki yango na mabɔkɔ mpe bamemaki yango na monɔkɔ, ezalaki mibali 300. Kasi mibali mosusu nyonso bafukamaki mpo na komɛla mai.

7 Bongo Yehova alobaki na Gideone boye: “Nakobikisa bino na nzela ya mibali 300 oyo bazwaki mai na mabɔkɔ na bango mpe bamɛlaki yango, mpe nakopesa Bamidiane na lobɔkɔ na yo.+ Kasi tiká bato mosusu wana nyonso bázonga ndako.” 8 Bongo, mibali 300 bazwaki biloko ya kolya mpe maseke ya bato wana mosusu, mpe Gideone azongisaki mibali yango mosusu ya Yisraele ndako. Atikalaki kaka na mibali 300. Kaa ya Midiane ezalaki na nse na bango, na lobwaku patatalu.+

9 Na butu yango, Yehova alobaki na ye boye: “Tɛlɛmá, kende kobundisa kaa yango, mpo napesi yango na lobɔkɔ na yo.+ 10 Kasi soki ozali kobanga kobundisa yango, kitá na kaa yango elongo na mosaleli na yo, Pura. 11 Yoká makambo oyo bazali koloba, mpe na nsima, okokóma na mpiko* mpo na kobundisa kaa yango.” Na yango, ye ná mosaleli na ye Pura bakitaki tii pembenipembeni ya kaa ya basoda yango.

12 Nzokande Bamidiane ná Baamaleke mpe bato nyonso ya Ɛsti+ batondaki na lobwaku patatalu, lokola limpinga ya mayoyo, mpe bakamela na bango ekokaki kotángama te;+ ezalaki ebele lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu. 13 Ntango Gideone akómaki kuna, ayokaki soda moko azali koyebisa moninga na ye ndɔtɔ moko; alobaki boye: “Yoká ndɔtɔ oyo nalɔti. Namoni limpa moko ya ɔrje, ya libungutulu, ezali kobalukabaluka na kati ya kaa ya Midiane. Limpa yango eyaki tii na hema moko mpe etutaki yango makasi mpe hema yango ekweaki.+ Ɛɛ, ebalolaki hema yango, mpe hema elalaki na nse.” 14 Na yango, moninga na ye alobaki: “Wana ekoki kozala kaka mopanga ya Gideone+ mwana ya Yoashe, mobali moko ya Yisraele. Nzambe apesi Midiane mpe kaa mobimba na lobɔkɔ na ye.”+

15 Ntango kaka Gideone ayokaki lisolo ya ndɔtɔ yango mpe ndimbola na yango,+ agumbamaki mpo na kosambela. Na nsima, azongaki na kaa ya Yisraele mpe alobaki: “Bótɛlɛma, mpo Yehova apesi kaa ya Bamidiane na lobɔkɔ na bino.” 16 Na nsima, akabolaki mibali yango 300 na bituluku misato mpe apesaki bango nyonso maseke+ mpe bilokó ya minene oyo ezalaki mpamba, ná mwa nzete ya mɔtɔ na kati na yango. 17 Na nsima alobaki na bango boye: “Bokotala ngai, mpe bokosala kaka ndenge ngai nakosala. Ntango nakokóma pembenipembeni ya kaa, bosengeli kosala kaka ndenge ngai nakosala. 18 Ntango ngai ná bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokoyula liseke, bino mpe bosengeli koyula maseke na bisika bozali zingazinga ya kaa mpe koganga: ‘Mpo na Yehova mpe mpo na Gideone!’”

19 Pene na katikati ya butu,* wana bautaki kotya basinzili na bisika na bango, Gideone ná mibali 100 oyo bazalaki elongo na ye bayaki pembenipembeni ya kaa. Bayulaki maseke+ mpe bapanzaki bilokó minene ya mai oyo ezalaki na mabɔkɔ na bango.+ 20 Na yango, bituluku yango misato bayulaki maseke mpe bapanzaki bilokó yango ya minene. Basimbaki mwa nzete ya mɔtɔ na lobɔkɔ ya mwasi, mpe bayulaki maseke oyo ezalaki na lobɔkɔ ya mobali, mpe bagangaki: “Mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!” 21 Na ntango wana nyonso, moto na moto atɛlɛmaki na esika na ye zingazinga ya kaa, mpe kaa mobimba ya Bamidiane ekimaki, mpe bazalaki koganga nzelanzela.+ 22 Mibali yango 300 bazalaki se koyula maseke, mpe Yehova asalaki ete moto na moto aboma moninga na ye na mopanga na kati ya kaa mobimba.+ Mpe limpinga yango ya basoda ekimaki tii na Bete-shita, kolanda epai Zerera ezali, tii na pembenipembeni ya Abele-mehola,+ pene na Tabate.

23 Mpe mibali ya Yisraele ya libota ya Nafatali, ya Ashere mpe ya Manase mobimba+ babengisamaki mpe balandaki Bamidiane. 24 Gideone atindaki bamemi-nsango na etúká mobimba ya ngombangomba ya Efraime mpo báloba boye: “Bókita mpo na kobundisa Bamidiane mpe bókanga banzela oyo ememi na mai tii na Bete-bara mpe na Yordani.” Na yango, mibali nyonso ya Efraime bayanganisamaki mpe bakangaki banzela oyo ememi na mai tii na Bete-bara mpe na Yordani. 25 Bakangaki mpe bankumu mibale ya Bamidiane: Orebe ná Zeebe. Babomaki Orebe na libanga ya Orebe,+ mpe babomaki Zeebe na ekamwelo ya vinyo ya Zeebe. Bakobaki kolanda Bamidiane,+ mpe bamemelaki Gideone motó ya Orebe mpe ya Zeebe na etúká ya Yordani.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto