Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Ntango

      • Davidi akotonga tempelo te (1-6)

      • Nzambe asali ná Davidi kondimana mpo na bokonzi (7-15)

      • Libondeli ya Davidi mpo na kopesa matɔndi (16-27)

1 Ntango 17:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako ya mokonzi.”

Mitindami

  • +1Ba 1:8; 1Nt 29:29
  • +1Nt 14:1
  • +2Sa 7:1-3; 1Nt 15:1; 2Nt 1:4

1 Ntango 17:4

Mitindami

  • +2Sa 7:4-7; 1Ba 8:17-19; 1Nt 22:7, 8

1 Ntango 17:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu elimboli, “longwa na esika oyo, epai batye hema mpe kende na mosusu, mpe longwa na esika oyo ya kofanda mpe kende na mosusu.”

Mitindami

  • +Kob 40:2; Mit 4:24, 25; 2Sa 6:17; Nz 78:60

1 Ntango 17:7

Mitindami

  • +1Sa 16:11, 12; 17:15; 25:30; 2Sa 7:8-11; Nz 78:70, 71

1 Ntango 17:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakokata liboso na yo.”

Mitindami

  • +1Sa 18:14; 2Sa 8:6
  • +1Sa 25:29; 26:10; Nz 89:20, 22
  • +1Sa 18:30

1 Ntango 17:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bakolɛmbisa.”

Mitindami

  • +Kob 2:23

1 Ntango 17:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lit., “Nakotonga ndako mpo na yo.”

Mitindami

  • +Bas 2:16
  • +Nz 18:40

1 Ntango 17:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “okokende kozala esika moko na bankɔkɔ na yo.”

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +1Ba 8:20; Nz 132:11
  • +2Sa 7:12-17; 1Ba 9:5; 1Nt 28:5; Yir 23:5

1 Ntango 17:12

Mitindami

  • +1Ba 5:5; 1Nt 22:10
  • +Nz 89:3, 4; Yis 9:7; Da 2:44

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mokili mozangi bitumba?, lok. 12

1 Ntango 17:13

Mitindami

  • +2Sa 7:14; Lk 9:35; Ebr 1:5
  • +Yis 55:3
  • +1Sa 15:24, 28; 1Nt 10:13, 14

1 Ntango 17:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bokonzi na ngai.”

Mitindami

  • +Da 2:44; Yn 1:49; 2Pe 1:11
  • +Nz 89:36; Yir 33:20, 21; Lk 1:32, 33; Ebr 1:8; Em 3:21

1 Ntango 17:16

Mitindami

  • +2Sa 7:8, 18-20

1 Ntango 17:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

  • *

    To, “moto monene mpenza.”

Mitindami

  • +Mt 22:42; Mis 13:34; Em 22:16

1 Ntango 17:18

Mitindami

  • +Nz 139:1

1 Ntango 17:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na boyokani na mokano na yo.”

Mitindami

  • +2Sa 7:21-24

1 Ntango 17:20

Mitindami

  • +Kob 15:11
  • +Yis 43:10

1 Ntango 17:21

Mitindami

  • +Mib 4:7; Nz 147:20
  • +Kob 19:5; Nz 77:15
  • +Mib 4:34; Ne 9:10; Yis 63:12; Ezk 20:9
  • +Mib 7:1; Yos 10:42; 21:44

1 Ntango 17:22

Mitindami

  • +1Sa 12:22
  • +Eb 17:7; Mib 7:6, 9

1 Ntango 17:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Sa 7:25-29

1 Ntango 17:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezala sembo.”

  • *

    Lil. “ndako.”

Mitindami

  • +2Nt 6:33; Nz 72:19; Mt 6:9; Yn 12:28
  • +Nz 89:35, 36

1 Ntango 17:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kotongela ye ndako.”

1 Ntango 17:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Nt. 17:11Ba 1:8; 1Nt 29:29
1 Nt. 17:11Nt 14:1
1 Nt. 17:12Sa 7:1-3; 1Nt 15:1; 2Nt 1:4
1 Nt. 17:42Sa 7:4-7; 1Ba 8:17-19; 1Nt 22:7, 8
1 Nt. 17:5Kob 40:2; Mit 4:24, 25; 2Sa 6:17; Nz 78:60
1 Nt. 17:71Sa 16:11, 12; 17:15; 25:30; 2Sa 7:8-11; Nz 78:70, 71
1 Nt. 17:81Sa 18:14; 2Sa 8:6
1 Nt. 17:81Sa 25:29; 26:10; Nz 89:20, 22
1 Nt. 17:81Sa 18:30
1 Nt. 17:9Kob 2:23
1 Nt. 17:10Bas 2:16
1 Nt. 17:10Nz 18:40
1 Nt. 17:111Ba 8:20; Nz 132:11
1 Nt. 17:112Sa 7:12-17; 1Ba 9:5; 1Nt 28:5; Yir 23:5
1 Nt. 17:121Ba 5:5; 1Nt 22:10
1 Nt. 17:12Nz 89:3, 4; Yis 9:7; Da 2:44
1 Nt. 17:132Sa 7:14; Lk 9:35; Ebr 1:5
1 Nt. 17:13Yis 55:3
1 Nt. 17:131Sa 15:24, 28; 1Nt 10:13, 14
1 Nt. 17:14Da 2:44; Yn 1:49; 2Pe 1:11
1 Nt. 17:14Nz 89:36; Yir 33:20, 21; Lk 1:32, 33; Ebr 1:8; Em 3:21
1 Nt. 17:162Sa 7:8, 18-20
1 Nt. 17:17Mt 22:42; Mis 13:34; Em 22:16
1 Nt. 17:18Nz 139:1
1 Nt. 17:192Sa 7:21-24
1 Nt. 17:20Kob 15:11
1 Nt. 17:20Yis 43:10
1 Nt. 17:21Mib 4:7; Nz 147:20
1 Nt. 17:21Kob 19:5; Nz 77:15
1 Nt. 17:21Mib 4:34; Ne 9:10; Yis 63:12; Ezk 20:9
1 Nt. 17:21Mib 7:1; Yos 10:42; 21:44
1 Nt. 17:221Sa 12:22
1 Nt. 17:22Eb 17:7; Mib 7:6, 9
1 Nt. 17:232Sa 7:25-29
1 Nt. 17:242Nt 6:33; Nz 72:19; Mt 6:9; Yn 12:28
1 Nt. 17:24Nz 89:35, 36
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Ntango 17:1-27

Mokanda ya liboso ya Ntango

17 Ntango kaka Davidi akómaki kofanda na ndako na ye,* alobaki na mosakoli Natane+ boye: “Talá, ngai nazali kofanda na ndako batongi na mabaya ya sɛdrɛ,+ nzokande sanduku ya kondimana ya Yehova ezali na kati ya hema.”+ 2 Natane azongiseli Davidi ete: “Salá nyonso oyo ezali na motema na yo, mpo Nzambe ya solo azali elongo na yo.”

3 Kaka na butu yango, Nzambe alobaki na Natane ete: 4 “Kende koloba na mosaleli na ngai Davidi boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Yo te moto okotongela ngai ndako oyo nakofanda.+ 5 Mpo banda mokolo oyo nabimisaki Bayisraele na Ezipito tii na mokolo ya lelo, nafandá na ndako moko te. Kasi nazalaki se kokende hema na hema mpe tabernakle na tabernakle.*+ 6 Ntango nyonso oyo natambolaki elongo na Yisraele mobimba, natunaki nde ata moko ya basambisi ya Yisraele, oyo natyaki mpo na kobatela bato na ngai, ete: ‘Mpo na nini otongeli ngai ndako ya mabaya ya sɛdrɛ te?’”’

7 “Sikoyo kende koloba boye na mosaleli na ngai Davidi, ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nazwaki yo na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti, epai ozalaki kobatela etonga, mpo okóma mokambi ya bato na ngai Yisraele.+ 8 Nakozala na yo esika nyonso oyo okokende,+ mpe nakolongola* banguna na yo nyonso;+ mpe nakokómisa nkombo na yo monene lokola nkombo ya bato minene oyo bazali na mabele.+ 9 Nakopesa bato na ngai Yisraele esika mpe nakotya bango kuna. Bakofanda wana mpe eloko moko te ekoya kotungisa bango. Bato mabe bakonyokola* bango lisusu te, ndenge basalaki liboso,+ 10 banda mokolo oyo natyaki basambisi mpo na bato na ngai Yisraele.+ Mpe nakokitisa banguna na yo nyonso.+ Lisusu, nayebisi yo boye: ‘Ngai Yehova nakobimisa molɔngɔ ya bakonzi na libota na yo.’*

11 “‘“Ntango okokóma na nsuka ya bomoi na yo mpe okokufa,* nakopona moto ya libota* na yo, moko ya bana na yo,+ mpo azala mokonzi nsima na yo, mpe nakokómisa bokonzi na ye makasi.+ 12 Ye nde akotonga ndako mpo na ngai,+ mpe nakokómisa kiti ya bokonzi na ye makasi mpo na libela.+ 13 Nakokóma tata na ye, mpe ye akokóma mwana na ngai.+ Nakolongola bolingo na ngai ya sembo epai na ye te+ ndenge nalongolaki yango epai ya moto oyo azalaki mokonzi liboso na yo.+ 14 Nakotya ye na ndako na ngai mpe nakopesa ye bokonzi* mpo na libela.+ Kiti ya bokonzi na ye ekoumela mpo na libela.”’”+

15 Natane ayebisaki Davidi maloba wana nyonso mpe emonaneli yango mobimba.

16 Bongo Mokonzi Davidi akendaki kofanda na mabele liboso ya Yehova mpe alobaki: “Ee Yehova Nzambe, ngai nde nani? Mpe libota na ngai nde nini, mpo okómisa ngai ndenge nazali lelo?+ 17 Mpe osuki wana te, Ee Nzambe, olobi makambo oyo okosalela libota* na ngai mosaleli na yo tii mosika na mikolo oyo ekoya,+ mpe otali ngai lokola nde nazalaki moto oyo abongi kozwa lisusu lokumu mingi,* Ee Yehova Nzambe. 18 Ngai mosaleli na yo Davidi nakoki koloba na yo lisusu nini mpo na lokumu oyo opesi ngai, lokola oyebi ngai malamu?+ 19 Ee Yehova, mpo na mosaleli na yo mpe ndenge motema na yo elingi,* osali makambo minene wana nyonso na ndenge olakisi bonene na yo.+ 20 Ee Yehova, mosusu lokola yo azali te,+ mpe Nzambe mosusu azali te, kaka yo.+ Nyonso oyo toyoká na matoi na biso emonisi ete ezali bongo. 21 Mpe awa na mabele, ekólo mosusu nini ezali lokola bato na yo Yisraele?+ Yo, Nzambe ya solo, okendaki kosikola bango mpo bázala bato na yo.+ Osalaki ete nkombo na yo eyebana na makambo minene mpe ya nsɔmɔ oyo osalaki,+ na ndenge obenganaki bikólo liboso ya bato na yo,+ oyo osikolaki na Ezipito. 22 Okómisaki Yisraele bato na yo moko mpo na libela;+ mpe yo, Ee Yehova, okómaki Nzambe na bango.+ 23 Sikoyo, Ee Yehova, tiká ete elaka oyo opesi mpo na ngai mosaleli na yo mpe libota* na ngai ekokisama mpo na libela, mpe tiká ete osala kaka ndenge olaki.+ 24 Tiká nkombo na yo eumela seko* mpe ekumisama+ libela na libela, mpo bato báloba ete: ‘Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, azali Nzambe mpo na Yisraele,’ mpe tiká libota* ya mosaleli na yo Davidi epikama makasi liboso na yo.+ 25 Mpo yo, Nzambe na ngai, nde oyebisi ngai mosaleli na yo mokano na yo ya kobimisa bakonzi na libota na ngai.* Yango wana ngai mosaleli na yo nazwi mpiko ya kosala libondeli oyo. 26 Mpe sikoyo, Ee Yehova, ozali Nzambe ya solo, mpe olaki makambo wana ya malamu mpo na mosaleli na yo. 27 Boye, tiká ete osepela kopambola libota* ya mosaleli na yo, mpe tiká ete eumela libela na libela liboso na yo; mpo yo, Ee Yehova, opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto