Ezekiele
13 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela basakoli ya Yisraele,+ mpe lobá boye na baoyo bazali kosakola makambo na ndenge na bango moko:*+ ‘Bóyoka liloba ya Yehova. 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basakoli oyo bazali bazoba, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,* nzokande bamoni ata eloko moko te!+ 4 Ee Yisraele, basakoli na bino bakómi lokola bagambala na bisika oyo etikalá mpamba. 5 Bokokende te kobongisa bisika oyo bifelo ya mabanga ebukaná, mpo na kosalisa bato ya Yisraele,+ mpo Yisraele ebika na etumba na mokolo ya Yehova.”+ 6 “Bamoni bimonaneli ya lokuta mpe basakoli makambo ya lokuta, baoyo bazali koloba ete: ‘Talá oyo Yehova alobi,’ nzokande Yehova ye moko atindi bango te, mpe bazeli ete liloba na bango ekokisama.+ 7 Ezali te emonaneli ya lokuta oyo bomoni, makambo ya lokuta oyo bosakoli, ntango bozali koloba ete: ‘Talá oyo Yehova alobi,’ nzokande nalobi eloko moko te?”’
8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Lokola bolobi lokuta mpe bimonaneli na bino ezali ya lokuta, nazali kotɛmɛla bino,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”+ 9 Nakosembola lobɔkɔ na ngai mpe nakopesa etumbu na basakoli oyo bimonaneli na bango ezali ya lokuta mpe basakolaka makambo ya lokuta.+ Bakozala lisusu te na kati ya baninga na ngai ya motema; bankombo na bango ekokomama te na mokanda ya bato ya Yisraele, bakozonga te na mokili ya Yisraele; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ 10 Nyonso wana ezali mpo babungisi bato na ngai nzela ntango balobi ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ moto moko atɛlɛmisi efelo oyo ezali makasi te, mpe bango, bazali kopakola yango mpɛmbɛ.’*+
11 “Lobá na baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ ete ekokwea. Mbula makasi oyo ezindisaka ekoya, mbula ya mabanga* ekobɛta, mipɛpɛ makasi mpenza ekobuka yango.+ 12 Mpe ntango efelo ekokwea, bakotuna bino ete: ‘Wapi mpɛmbɛ oyo bopakolaki?’+
13 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakosala ete mipɛpɛ makasi epɛpa, mpe mbula makasi oyo ezindisaka enɔka, mpo nazali na nkanda. Nakotinda mbula ya mabanga ebebisa efelo mpo nazali na nkanda makasi. 14 Nakobuka efelo oyo bopakoli mpɛmbɛ mpe nakolalisa yango na mabele, mpe moboko na yango ekomonana mpenza polele. Ntango engumba ekokwea, bokokufa na kati na yango; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
15 “‘Ntango nakosopa mpenza nkanda na ngai likoló ya efelo mpe likoló ya baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ, nakoloba na bino ete: “Efelo ezali lisusu te, mpe baoyo bazalaki kopakola yango mpɛmbɛ bazali lisusu te.+ 16 Basakoli ya Yisraele bazali lisusu te, baoyo bazalaki kosakwela Yerusaleme mpe baoyo bazalaki komona bimonaneli ya kimya mpo na yango, nzokande kimya ezali te,”’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
17 “Nde yo, Ee mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya bana basi ya bato na yo, oyo bazali kosakola makambo na bango moko, mpe sakolá mpasi oyo ekokómela bango. 18 Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basi oyo bazali kotonga bilamba mpo na mabɔkɔ nyonso* mpe bazali kosala matambala mpo na mitó ya bato, ezala bazali milai to mikuse, mpo na kokanga bomoi ya bato na motambo! Bozali koluka kokanga bomoi* ya bato na ngai na motambo, mpe koluka kobatela bomoi na bino moko? 19 Bokokómisa ngai nde eloko mpamba epai ya bato na ngai mpo na mwa ɔrje na mabɔkɔ mpe mpo na biteni ya mampa oyo etikali?+ Bozali koboma baoyo basengelaki kokufa te mpe kotika na bomoi baoyo basengelaki kokufa, bozali koyebisa bato na ngai makambo ya lokuta mpe bazali koyoka yango!”’+
20 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ee basi, nakopasola bilamba oyo bosalelaka mpo na kokanga bato na motambo, lokola nde bazalaki bandɛkɛ, nakopasola yango na mabɔkɔ na bino mpe baoyo bozali kokanga na motambo lokola bandɛkɛ, nakotika bango bákende. 21 Nakopasola matambala na bino, mpe nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino, mpe bakozala lisusu te epai na bino eloko oyo bokoki kokanga na bokila; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 22 Mpo bolɛmbisi moto ya sembo nzoto mpo na makambo na bino ya lokuta,+ nzokande ngai nayokisaki ye mpasi te, bolendisaki moto mabe,+ yango wana atikaki te nzela na ye ya mabe mpe akotikala te na bomoi.+ 23 Na yango, bino basi, bokomona lisusu te bimonaneli ya lokuta, mpe bokosakola lisusu te makambo oyo ebombaná;+ nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino, mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”