Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Moto na moto akomema ngambo mpo na masumu na ye moko (1-32)

        • Molimo oyo esali lisumu ekokufa (4)

        • Mwana akofuta te masumu ya tata na ye (19, 20)

        • Asepelaka te na liwa ya moto mabe (23)

        • Kobongola motema ememaka na bomoi (27, 28)

Ezekiele 18:2

Mitindami

  • +Yir 31:29, 30

Ezekiele 18:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Bomoi.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “Moto.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/1997, lok. 19

    Ndenge ya kosolola, lok. 180

Ezekiele 18:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali mpe komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +Mib 12:2; Yir 3:6
  • +Le 20:10
  • +Le 18:19; 20:18

Ezekiele 18:7

Mitindami

  • +Mas 14:21
  • +Mib 24:12, 13
  • +Le 6:2, 4
  • +Mib 15:11
  • +Yis 58:6, 7; Yk 2:15, 16

Ezekiele 18:8

Mitindami

  • +Kob 22:25; Nz 15:5; Lk 6:34, 35
  • +Le 19:35
  • +Le 19:15; 25:14; Mib 1:16

Ezekiele 18:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 18:5

Ezekiele 18:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mosopi ya makila.”

Mitindami

  • +Le 19:13
  • +Eb 9:6; Kob 21:12

Ezekiele 18:12

Mitindami

  • +Mib 15:7, 8
  • +Le 26:30
  • +2Ba 21:11

Ezekiele 18:13

Mitindami

  • +Ezk 22:12

Ezekiele 18:19

Mitindami

  • +Mib 16:20; Ro 10:5

Ezekiele 18:20

Mitindami

  • +Mib 24:16; Yir 31:30; Ezk 18:4
  • +Yis 3:10, 11; Ga 6:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2010, nk. 28-29

    1/10/1997, lok. 19

Ezekiele 18:21

Mitindami

  • +Yis 55:7; Ezk 3:21; 33:12, 19; Mis 3:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2012, lok. 18

Ezekiele 18:22

Mitindami

  • +2Nt 33:12, 13; Nz 25:7; Yis 43:25
  • +Ezk 33:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2012, lok. 18

    Lamuká!,

    7/1995, lok. 10

Ezekiele 18:23

Mitindami

  • +Bil 3:33; Ezk 33:11; 1Ti 2:3, 4; 2Pe 3:9
  • +Mik 7:18

Ezekiele 18:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “makambo oyo ezali sembo te.”

Mitindami

  • +Ezk 33:12, 18; Ebr 10:38; 2Yn 8
  • +Mas 21:16; Ezk 3:20

Ezekiele 18:25

Mitindami

  • +Yb 35:2; Mas 19:3; Ezk 33:17, 20
  • +Mib 32:4
  • +Yis 55:9; Yir 2:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2010, nk. 3-4

Ezekiele 18:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Ezekiele 18:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Yis 55:7; 1Ti 4:16

Ezekiele 18:29

Mitindami

  • +Eb 18:25; Nz 145:17; Yis 40:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2013, nk. 11-12

Ezekiele 18:30

Mitindami

  • +Yb 34:11; Ro 2:6

Ezekiele 18:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bómizwela.”

Mitindami

  • +Nz 34:14; Yis 1:16
  • +Nz 51:10; Yir 32:39; Ezk 11:19; Ef 4:23, 24
  • +Mib 30:15; Mas 8:36; Mis 13:46

Ezekiele 18:32

Mitindami

  • +Yir 29:11; Bil 3:33; Ezk 33:11; Lk 15:10; 2Pe 3:9
  • +Mib 30:16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 18:2Yir 31:29, 30
Ezk. 18:6Mib 12:2; Yir 3:6
Ezk. 18:6Le 20:10
Ezk. 18:6Le 18:19; 20:18
Ezk. 18:7Mas 14:21
Ezk. 18:7Mib 24:12, 13
Ezk. 18:7Le 6:2, 4
Ezk. 18:7Mib 15:11
Ezk. 18:7Yis 58:6, 7; Yk 2:15, 16
Ezk. 18:8Kob 22:25; Nz 15:5; Lk 6:34, 35
Ezk. 18:8Le 19:35
Ezk. 18:8Le 19:15; 25:14; Mib 1:16
Ezk. 18:9Le 18:5
Ezk. 18:10Le 19:13
Ezk. 18:10Eb 9:6; Kob 21:12
Ezk. 18:12Mib 15:7, 8
Ezk. 18:12Le 26:30
Ezk. 18:122Ba 21:11
Ezk. 18:13Ezk 22:12
Ezk. 18:19Mib 16:20; Ro 10:5
Ezk. 18:20Mib 24:16; Yir 31:30; Ezk 18:4
Ezk. 18:20Yis 3:10, 11; Ga 6:7
Ezk. 18:21Yis 55:7; Ezk 3:21; 33:12, 19; Mis 3:19
Ezk. 18:222Nt 33:12, 13; Nz 25:7; Yis 43:25
Ezk. 18:22Ezk 33:16
Ezk. 18:23Bil 3:33; Ezk 33:11; 1Ti 2:3, 4; 2Pe 3:9
Ezk. 18:23Mik 7:18
Ezk. 18:24Ezk 33:12, 18; Ebr 10:38; 2Yn 8
Ezk. 18:24Mas 21:16; Ezk 3:20
Ezk. 18:25Yb 35:2; Mas 19:3; Ezk 33:17, 20
Ezk. 18:25Mib 32:4
Ezk. 18:25Yis 55:9; Yir 2:17
Ezk. 18:27Yis 55:7; 1Ti 4:16
Ezk. 18:29Eb 18:25; Nz 145:17; Yis 40:14
Ezk. 18:30Yb 34:11; Ro 2:6
Ezk. 18:31Nz 34:14; Yis 1:16
Ezk. 18:31Nz 51:10; Yir 32:39; Ezk 11:19; Ef 4:23, 24
Ezk. 18:31Mib 30:15; Mas 8:36; Mis 13:46
Ezk. 18:32Yir 29:11; Bil 3:33; Ezk 33:11; Lk 15:10; 2Pe 3:9
Ezk. 18:32Mib 30:16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 18:1-32

Ezekiele

18 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Lisese oyo bolobaka na Yisraele elimboli nini: ‘Batata nde bazali kolya mbuma ya vinyo oyo eteli te, kasi mino ya bana nde ekómi ngayi’?+

3 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Lokola nazali solo na bomoi,’ bokoloba lisese oyo lisusu te na Yisraele. 4 Talá! Milimo* nyonso ezali ya ngai. Molimo ya tata ndenge moko mpe molimo ya mwana ezali ya ngai. Molimo* oyo esali lisumu, yango nde ekokufa.

5 “‘Kanisá ete moto azali sembo, mpe asalaka makambo ya boyengebene mpe ya sembo. 6 Alyaka te bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba;+ atyaka elikya te na bikeko ya bosɔtɔ* ya bato ya Yisraele, akómisaka mwasi ya moninga na ye mbindo te+ mpe asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza;+ 7 anyokolaka moto te,+ kasi azongiselaka modefi eloko oyo azwaki na ndanga;+ ayibaka moto te,+ kasi apesaka bilei na ye moko epai ya moto oyo azali na nzala+ mpe azipaka moto oyo azali bolumbu elamba;+ 8 apesaka eloko moko te mpo azwa benefisi mpe alukaka te benefisi ya lokoso,+ kasi amipekisaka kosala makambo ya kozanga bosembo;+ akataka likambo kati na moto ná moninga na ye na bosembo ya solosolo;+ 9 mpe akobaka kotosa mibeko na ngai mpe alandaka bikateli na ngai mpo asala makambo na bosembo, moto ya ndenge wana azali sembo.* Mpe akokoba kozala na bomoi,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

10 “‘Kasi, kanisá ete moto yango aboti mwana oyo azali moyibi,+ to mobomi,*+ to mpe asalaka moko ya makambo oyo 11 (atako tata na ye asali ata moko te ya makambo oyo): alyaka bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba, mpe akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo, 12 anyokolaka moto oyo azangá mpe mobola,+ ayibaka, azongisaka te eloko oyo epesamaki ndanga, atyaka elikya na bikeko ya bosɔtɔ,+ amipesaka na misala oyo eyinamá.+ 13 Apesaka biloko mpo na koluka benefisi ya lokoso, mpe azwaka benefisi.+ Bongo, mwana yango akotikala na bomoi te. Akobomama mpenza mpo asali makambo nyonso wana oyo eyinamá. Makila na ye moko ekozala na motó na ye.

14 “‘Kasi, kanisá ete mwana amoni masumu nyonso oyo tata na ye asali, mpe atako amoni yango, asali makambo yango te. 15 Alyaka te bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba; atyaka elikya te na bikeko ya bosɔtɔ ya bato ya Yisraele; akómisaka mwasi ya moninga na ye mbindo te; 16 anyokolaka moto moko te, akangaka eloko moko te oyo epesami ndanga, ayibaka te; kasi apesaka bilei na ye moko epai ya moto oyo azali na nzala, mpe azipaka moto oyo azali bolumbu elamba; 17 amipekisaka konyokola mobola; alukaka te benefisi ya lokoso to azwaka benefisi te; alandaka bikateli na ngai mpe atosaka mibeko na ngai. Moto yango akokufa te mpo na libunga ya tata na ye. Akokoba kozala na bomoi. 18 Kasi lokola tata na ye azalaki kobuba, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki oyo ezali mabe na kati ya bato na ye, akokufa mpo na libunga na ye.

19 “‘Kasi bokoloba ete: “Mpo na nini mwana amemi ngambo te mpo na libunga ya tata na ye?” Lokola mwana asali oyo ezali sembo mpe boyengebene, atosi mibeko na ngai nyonso mpe asaleli yango, akokoba kozala na bomoi.+ 20 Molimo oyo esali lisumu, yango nde ekokufa.+ Mwana akomema ngambo te mpo na libunga ya tata, mpe tata akomema ngambo te mpo na libunga ya mwana. Bosembo ya moto ya sembo ekozala na motó na ye moko, mpe mabe ya moto mabe ekozala na motó na ye moko.+

21 “‘Kasi soki moto mabe abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki, atosi mibeko na ngai nyonso mpe asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala na bomoi. Akokufa te.+ 22 Bakokanisela ye lisusu te ata likambo moko ya kobuka mobeko oyo asalaki.+ Akokoba kozala na bomoi, na ndenge azali kosala oyo ezali sembo.’+

23 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Nasepelaka nde na liwa ya moto mabe?’+ Nasepelaka te ete atika etamboli na ye ya mabe mpe akoba kozala na bomoi?’+

24 “‘Moto ya sembo akotikala nde na bomoi soki atiki bosembo na ye, asali oyo ezali mabe* mpe azali kosala makambo nyonso oyo eyinamá, oyo moto mabe asalaka? Bakokanisa lisusu te ata mosala moko te ya bosembo oyo asalaki.+ Akokufa mpo na kozanga bosembo na ye mpe lisumu oyo asalaki.+

25 “‘Kasi bokoloba ete: “Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.”+ Nabondeli bino, bóyoka, Ee bato ya Yisraele. Makambo oyo nasalaka nde ezangi bosembo?+ Ezali te makambo oyo bino bosalaka nde ezangi bosembo?+

26 “‘Soki moto ya sembo* atiki bosembo* na ye, asali oyo ezali mabe mpe akufi mpo na yango, akokufa mpo na mabe na ye moko.

27 “‘Ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye oyo asalaki mpe abandi kosala oyo ezali malamu mpe sembo, akobatela bomoi* na ye moko.+ 28 Ntango asosoli mpe abongwani, atiki makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki, akokoba kozala na bomoi. Akokufa te.

29 “‘Kasi bato ya Yisraele bakoloba ete: “Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.” Makambo oyo nasalaka nde ezangi bosembo, Ee bato ya Yisraele?+ Ezali te makambo oyo bino bosalaka nde ezangi bosembo?’

30 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Na yango, Ee bato ya Yisraele, nakosambisa mokomoko na bino na kolanda etamboli na ye.+ Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana mpenza, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko, mpo eloko moko te ezala libaku oyo ezali kotinda bino na lisumu. 31 Bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko oyo bosalaki+ mpe bózwa* motema ya sika ná elimo ya sika,+ mpo na nini bókufa,+ Ee bato ya Yisraele?’

32 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Nasepelaka ata moke te na liwa ya moto.+ Na yango, bóbongwana mpe bózala na bomoi.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto