Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yehoyada amonisi mpiko; Yehoashe atyami mokonzi (1-11)

      • Babomi Atalia (12-15)

      • Yehoyada abongisi makambo (16-21)

2 Ntango 23:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kondimana.”

Mitindami

  • +2Ba 11:4

2 Ntango 23:2

Mitindami

  • +2Nt 8:14

2 Ntango 23:3

Mitindami

  • +2Sa 5:3
  • +2Sa 7:8, 12; 1Ba 2:4; 9:5; Nz 89:20, 29

2 Ntango 23:4

Mitindami

  • +1Nt 24:3
  • +2Ba 11:5-8; 1Nt 9:22-25; 26:1

2 Ntango 23:5

Mitindami

  • +1Ba 7:1
  • +1Ba 7:12

2 Ntango 23:6

Mitindami

  • +1Nt 23:28, 32

2 Ntango 23:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ntango azali kokɔta mpe ntango azali kobima.”

2 Ntango 23:8

Mitindami

  • +2Ba 11:9-12
  • +1Nt 24:1; 26:1

2 Ntango 23:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mingi babɛti-makula nde bazalaki kosimba yango.

Mitindami

  • +2Ba 11:4
  • +2Sa 8:7
  • +1Nt 26:26, 27; 2Nt 5:1

2 Ntango 23:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ebundeli na ye ya kobwela.”

2 Ntango 23:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔti ya bokonzi.”

  • *

    Mbala mosusu, rulo moko oyo ezalaki na Mobeko ya Nzambe.

Mitindami

  • +2Ba 11:2
  • +Mib 17:18
  • +1Sa 10:1, 24

2 Ntango 23:12

Mitindami

  • +2Ba 11:13-16

2 Ntango 23:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kopesa nzela ya koyemba.”

Mitindami

  • +2Nt 23:1
  • +1Ba 1:39, 40

2 Ntango 23:16

Mitindami

  • +2Ba 11:17, 18; 2Nt 34:1, 31

2 Ntango 23:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “tempelo.”

Mitindami

  • +2Ba 10:27, 28
  • +Mib 12:3; 2Nt 34:1, 4
  • +Mib 13:5; 1Ba 18:40

2 Ntango 23:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na mabɔkɔ ya Davidi.”

Mitindami

  • +1Nt 23:6, 30, 31
  • +Kob 29:38; Mit 28:2

2 Ntango 23:19

Mitindami

  • +1Nt 9:26; 26:1, 13

2 Ntango 23:20

Mitindami

  • +2Ba 11:9
  • +1Ba 7:7
  • +2Ba 11:19, 20

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 23:12Ba 11:4
2 Nt. 23:22Nt 8:14
2 Nt. 23:32Sa 5:3
2 Nt. 23:32Sa 7:8, 12; 1Ba 2:4; 9:5; Nz 89:20, 29
2 Nt. 23:41Nt 24:3
2 Nt. 23:42Ba 11:5-8; 1Nt 9:22-25; 26:1
2 Nt. 23:51Ba 7:1
2 Nt. 23:51Ba 7:12
2 Nt. 23:61Nt 23:28, 32
2 Nt. 23:82Ba 11:9-12
2 Nt. 23:81Nt 24:1; 26:1
2 Nt. 23:92Ba 11:4
2 Nt. 23:92Sa 8:7
2 Nt. 23:91Nt 26:26, 27; 2Nt 5:1
2 Nt. 23:112Ba 11:2
2 Nt. 23:11Mib 17:18
2 Nt. 23:111Sa 10:1, 24
2 Nt. 23:122Ba 11:13-16
2 Nt. 23:132Nt 23:1
2 Nt. 23:131Ba 1:39, 40
2 Nt. 23:162Ba 11:17, 18; 2Nt 34:1, 31
2 Nt. 23:172Ba 10:27, 28
2 Nt. 23:17Mib 12:3; 2Nt 34:1, 4
2 Nt. 23:17Mib 13:5; 1Ba 18:40
2 Nt. 23:181Nt 23:6, 30, 31
2 Nt. 23:18Kob 29:38; Mit 28:2
2 Nt. 23:191Nt 9:26; 26:1, 13
2 Nt. 23:202Ba 11:9
2 Nt. 23:201Ba 7:7
2 Nt. 23:202Ba 11:19, 20
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 23:1-21

Mokanda ya mibale ya Ntango

23 Na mbula ya nsambo, Yehoyada amonisaki mpiko mpe asalaki boyokani* ná bakonzi ya bato nkama,+ elingi koloba, Azaria mwana ya Yerohame, Yishimaele mwana ya Yehohanane, Azaria mwana ya Obede, Maaseya mwana ya Adaya ná Elishafate mwana ya Zikri. 2 Bongo batambolaki na Yuda mobimba mpe bayanganisaki Balevi+ ya bingumba nyonso ya Yuda ná bankumu ya batata ya mabota ya Yisraele. Ntango bakómaki na Yerusaleme, 3 lisangá mobimba esalaki kondimana+ na mokonzi na ndako ya Nzambe ya solo; na nsima Yehoyada alobaki na bango boye:

“Bóyoka! Mwana ya mokonzi nde akoyangela, kaka ndenge Yehova alakaki yango mpo na bana ya Davidi.+ 4 Talá oyo bokosala: Moko ya bituluku misato ya banganga-nzambe mpe ya Balevi oyo ekozala na mosala+ na Sabata ekokɛngɛla baporte;+ 5 etuluku ya mibale ekozala na ndako ya mokonzi,+ mpe etuluku ya misato ekozala na Porte ya Moboko; mpe bato nyonso bakozala na kati ya mapango ya ndako ya Yehova.+ 6 Bótika moto moko te akɔta na ndako ya Yehova, longola kaka banganga-nzambe mpe Balevi oyo bazali kosala mosala.+ Bango bakoki kokɔta mpo bazali etuluku moko mosantu, mpe bato nyonso bakokokisa mokumba na bango epai ya Yehova. 7 Balevi basengeli kozinga mokonzi bipai nyonso, moto na moto na bibundeli na ye na lobɔkɔ. Moto nyonso oyo akomeka kokɔta na ndako bóboma ye. Bózala elongo na mokonzi esika nyonso oyo akokende.”*

8 Balevi ná Yuda mobimba basalaki kaka ndenge nganga-nzambe Yehoyada apesaki bango mitindo. Moto na moto azwaki bato na ye oyo bazalaki na mosala na Sabata ná baoyo bazalaki na mosala te na Sabata,+ mpo nganga-nzambe Yehoyada apemisaki bituluku+ yango te na mokumba na bango. 9 Bongo nganga-nzambe Yehoyada apesaki bakonzi ya bato nkama+ makɔnga, banguba mike* mpe banguba ya sɛrklɛ oyo ezalaki ya Mokonzi Davidi,+ oyo ezalaki na ndako ya Nzambe ya solo.+ 10 Atɛlɛmisaki bato nyonso na bisika na bango, moto na moto na ebundeli na ye* na lobɔkɔ, banda na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako ya Nzambe ya solo tii na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako yango, pene na etumbelo mpe pene na ndako yango, bazingi mokonzi bipai nyonso. 11 Na nsima babimisaki mwana ya mokonzi+ mpe balatisaki ye motole* mpe batyaki Litatoli*+ likoló na ye; bakómisaki ye mokonzi mpe Yehoyada ná bana na ye batyaki ye mafuta. Na nsima balobaki: “Mokonzi azala na bomoi!”+

12 Ntango Atalia ayokaki makɛlɛlɛ ya bato bazali kokima mbangu mpe kokumisa mokonzi, akendaki mbala moko epai bato oyo bazalaki na ndako ya Yehova.+ 13 Bongo amonaki mokonzi atɛlɛmi wana pene na likonzí na ye, na esika ya kokɔta. Bankumu+ ná babɛti-kelelo bazalaki elongo na mokonzi, mpe bato nyonso ya ekólo bazalaki kosepela+ mpe kobɛta kelelo. Mpe bato oyo bayembaka na bibɛtɛlo ya miziki bazalaki kokamba* nzembo ya masanzoli. Na mbala moko, Atalia apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: “Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!” 14 Kasi nganga-nzambe Yehoyada abimisaki bakonzi ya bato nkama, baoyo batyamaki mpo na kokamba limpinga ya basoda, mpe alobaki na bango: “Bólongola ye na milɔngɔ, mpe soki moto moko alandi ye, bóboma ye na mopanga!” Mpo nganga-nzambe alobaki na bango liboso ete: “Bóboma ye na ndako ya Yehova te.” 15 Bongo bakangaki ye, mpe ntango bakómaki na ye na esika ya kokɔta ya Porte ya Mpunda, na ndako ya mokonzi, na mbala moko babomaki ye kuna.

16 Bongo Yehoyada asalaki kondimana kati na ye ná bato nyonso ya ekólo mpe mokonzi ete bakokoba kozala bato ya Yehova.+ 17 Nsima na yango, bato nyonso bayaki na ndako* ya nzambe Baala mpe bakweisaki yango;+ babukaki bitumbelo na ye mpe bikeko na ye,+ mpe babomaki Matane nganga-nzambe ya Baala,+ liboso ya bitumbelo yango. 18 Na nsima Yehoyada apesaki mokumba ya kokɛngɛla ndako ya Yehova na mabɔkɔ ya banganga-nzambe mpe ya Balevi, oyo Davidi akabolá na bituluku na ndako ya Yehova mpo na mosala ya kopesa Yehova makabo ya kotumba+ ndenge ekomami na Mobeko ya Moize,+ na esengo mpe na nzembo, ndenge Davidi apesaki mitindo.* 19 Atyaki mpe bakɛngɛli na baporte+ ya ndako ya Yehova mpo moto oyo azali mbindo, ata mpo na ntina nini, akɔta te. 20 Bongo azwaki bakonzi ya bato nkama,+ bato ya lokumu, bayangeli ya bato mpe bato nyonso ya ekólo mpo bákende elongo na mokonzi longwa na ndako ya Yehova tii na ndako ya mokonzi. Balekaki na nzela ya porte ya likoló, mpe ntango bakómaki, bafandisaki mokonzi na kiti+ ya bokonzi.+ 21 Bongo bato nyonso ya ekólo basepelaki mpe engumba ekómaki na kimya, mpo babomaki Atalia na mopanga.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto