Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Atalia abɔtɔli bokonzi (1-3)

      • Yehoashe atyami mokonzi na kobombana (4-12)

      • Babomi Atalia (13-16)

      • Yehoyada abongisi makambo (17-21)

2 Bakonzi 11:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto nyonso ya bokonzi.”

Mitindami

  • +2Ba 8:26; 11:20; 2Nt 21:5, 6; 24:7
  • +2Ba 9:27
  • +2Nt 21:4; 22:10-12

2 Bakonzi 11:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ayibaki.”

Mitindami

  • +2Ba 12:1

2 Bakonzi 11:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bakari.”

  • *

    Lil., “bapoti-mbangu.”

  • *

    To, “kondimana.”

Mitindami

  • +1Ba 14:27
  • +2Nt 23:1-3

2 Bakonzi 11:5

Mitindami

  • +1Ba 7:1; 2Nt 23:4-7

2 Bakonzi 11:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “ndako ya mokonzi.”

2 Bakonzi 11:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ntango azali kobima mpe ntango azali kokɔta.”

2 Bakonzi 11:9

Mitindami

  • +2Ba 11:4
  • +2Nt 23:8-11

2 Bakonzi 11:11

Mitindami

  • +1Ba 14:27
  • +1Ba 8:22; 2Nt 4:1

2 Bakonzi 11:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔti ya bokonzi.”

  • *

    Mbala mosusu ezali rulo oyo ezalaki na Mibeko ya Nzambe.

Mitindami

  • +2Ba 11:2
  • +Kob 25:21; 31:18
  • +1Ba 1:39, 40

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/1991, lok. 31

2 Bakonzi 11:13

Mitindami

  • +2Nt 23:12-15

2 Bakonzi 11:14

Mitindami

  • +2Ba 23:3
  • +2Nt 5:12

2 Bakonzi 11:15

Mitindami

  • +2Ba 11:4; 2Nt 23:9

2 Bakonzi 11:16

Mitindami

  • +1Ba 7:1

2 Bakonzi 11:17

Mitindami

  • +1Sa 10:25; 2Sa 5:3
  • +2Nt 23:16, 17

2 Bakonzi 11:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “tempelo.”

Mitindami

  • +Mib 12:3
  • +Mib 7:25
  • +Mib 13:5
  • +2Nt 23:18-21

2 Bakonzi 11:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Bakari.”

Mitindami

  • +2Ba 11:4, 15
  • +1Ba 14:27
  • +2Sa 7:8, 16

2 Bakonzi 11:21

Mitindami

  • +2Ba 11:2
  • +2Nt 24:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 11:12Ba 8:26; 11:20; 2Nt 21:5, 6; 24:7
2 Bak. 11:12Ba 9:27
2 Bak. 11:12Nt 21:4; 22:10-12
2 Bak. 11:22Ba 12:1
2 Bak. 11:41Ba 14:27
2 Bak. 11:42Nt 23:1-3
2 Bak. 11:51Ba 7:1; 2Nt 23:4-7
2 Bak. 11:92Ba 11:4
2 Bak. 11:92Nt 23:8-11
2 Bak. 11:111Ba 14:27
2 Bak. 11:111Ba 8:22; 2Nt 4:1
2 Bak. 11:122Ba 11:2
2 Bak. 11:12Kob 25:21; 31:18
2 Bak. 11:121Ba 1:39, 40
2 Bak. 11:132Nt 23:12-15
2 Bak. 11:142Ba 23:3
2 Bak. 11:142Nt 5:12
2 Bak. 11:152Ba 11:4; 2Nt 23:9
2 Bak. 11:161Ba 7:1
2 Bak. 11:171Sa 10:25; 2Sa 5:3
2 Bak. 11:172Nt 23:16, 17
2 Bak. 11:18Mib 12:3
2 Bak. 11:18Mib 7:25
2 Bak. 11:18Mib 13:5
2 Bak. 11:182Nt 23:18-21
2 Bak. 11:192Ba 11:4, 15
2 Bak. 11:191Ba 14:27
2 Bak. 11:192Sa 7:8, 16
2 Bak. 11:212Ba 11:2
2 Bak. 11:212Nt 24:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 11:1-21

Mokanda ya mibale ya

11 Ntango Atalia,+ mama ya Ahazia, amonaki ete mwana na ye akufi,+ atɛlɛmaki mpo na koboma baoyo nyonso bazalaki na molɔngɔ ya kokóma bakonzi.*+ 2 Kasi Yehosheba mwana mwasi ya mokonzi Yehorame, ndeko mwasi ya Ahazia, azwaki Yehoashe+ mwana ya Ahazia mpe alongolaki ye na ndenge ya mayele* na kati ya bana ya mokonzi oyo basengelaki kobomama. Abombaki ye ná mwasi oyo azalaki kobɔkɔla ye na shambrɛ moko ya kolala. Balongaki kombomba Yehoashe mpo Atalia amona ye te, na yango abomaki ye te. 3 Atikalaki elongo na mwasi oyo azalaki kobɔkɔla ye mbula motoba, abombani na ndako ya Yehova, wana Atalia azalaki koyangela ekólo.

4 Na mbula ya nsambo, Yehoyada atindaki bázwa bakonzi ya bato nkama kati na bakɛngɛli ya mokonzi* mpe kati na bakɛngɛli ya ndako ya mokonzi.*+ Abengisaki bango epai na ye na ndako ya Yehova. Asalaki ná bango boyokani* mpe alapisaki bango ndai na ndako ya Yehova; na nsima, alakisaki bango mwana ya mokonzi.+ 5 Apesaki bango mitindo oyo: “Tála oyo bokosala: Moko ya bituluku na bino misato ekozala na Sabata mpe ekokɛngɛla malamumalamu ndako ya mokonzi,+ 6 etuluku ya mibale ekozala na Porte ya Moboko, mpe etuluku ya misato ekozala na porte nsima ya bakɛngɛli ya ndako ya mokonzi. Bokokɛngɛla tempelo* bato na bato na ngala na bango. 7 Bituluku na bino mosusu mibale oyo esengeli kosala te mokolo ya sabata, ekotikala kokɛngɛla malamumalamu ndako ya Yehova mpo na kobatela mokonzi. 8 Bosengeli kozinga mokonzi bipai nyonso, moto na moto na bibundeli na ye na lobɔkɔ. Moto nyonso oyo akomeka kokɔta na katikati ya milɔngɔ na bino bóboma ye. Bózala elongo na mokonzi esika nyonso oyo akokende.”*

9 Bakonzi ya bato nkama+ basalaki kaka ndenge nganga-nzambe Yehoyada apesaki bango mitindo. Moto na moto azwaki bato na ye oyo bazalaki na mosala na Sabata, elongo na baoyo bazalaki na mosala te na Sabata. Mpe bango nyonso bayaki epai ya nganga-nzambe Yehoyada.+ 10 Bongo nganga-nzambe apesaki bakonzi ya bato nkama makɔnga mpe banguba ya sɛrklɛ oyo ezalaki ya Mokonzi Davidi, oyo ezalaki na ndako ya Yehova. 11 Mpe bakɛngɛli ya ndako ya mokonzi+ batɛlɛmaki na bisika na bango, moto na moto na bibundeli na ye na lobɔkɔ, banda na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali ya ndako ya Nzambe ya solo tii na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako yango, pene na etumbelo+ mpe pene na ndako, bazingi mokonzi bipai nyonso. 12 Na nsima Yehoyada abimisaki mwana ya mokonzi+ mpe alatisaki ye motole* mpe atyaki Litatoli*+ likoló na ye; bakómisaki ye mokonzi mpe batyaki ye mafuta. Babandaki kobɛta mabɔkɔ mpe koloba: “Mokonzi azala na bomoi!”+

13 Ntango Atalia ayokaki makɛlɛlɛ ya bato bazali kokima mbangu, akendaki mbala moko epai ya bato oyo bazalaki na ndako ya Yehova.+ 14 Bongo amonaki mokonzi atɛlɛmi wana pene na likonzí, na kolanda momeseno.+ Bakapita ná babɛti-kelelo+ bazalaki elongo na mokonzi, mpe bato nyonso ya ekólo bazalaki kosepela mpe kobɛta kelelo. Na mbala moko, Atalia apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: “Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!” 15 Kasi nganga-nzambe Yehoyada apesaki mitindo na bakonzi ya bato nkama,+ baoyo batyamaki mpo na kokamba limpinga ya basoda, mpe alobaki na bango: “Bólongola ye na milɔngɔ, mpe soki moto moko alandi ye, bóboma moto yango na mopanga!” Mpo nganga-nzambe alobaki na bango liboso ete: “Bóboma ye na ndako ya Yehova te.” 16 Bongo bakangaki ye, mpe ntango bakómaki na ndako ya mokonzi,+ na esika oyo bakɔtisaka bampunda, babomaki ye kuna.

17 Bongo Yehoyada asalaki kondimana kati na Yehova mpe mokonzi ná bato ya ekólo+ ete bakokoba kozala bato ya Yehova; asalaki mpe kondimana kati na mokonzi ná bato ya ekólo.+ 18 Nsima na yango, bato nyonso ya ekólo bayaki na ndako* ya Baala mpe bakweisaki bitumbelo+ na ye; babukaki mpenza bikeko+ na ye mpe babomaki Matane, nganga-nzambe ya Baala,+ liboso ya bitumbelo yango.

Na nsima, nganga-nzambe atyaki bakɛngɛli mpo na ndako ya Yehova.+ 19 Lisusu, azwaki bakonzi ya bato nkama,+ basoda* oyo bakɛngɛlaka mokonzi, bakɛngɛli ya ndako ya mokonzi,+ mpe bato nyonso ya ekólo mpo bákende elongo na mokonzi longwa na ndako ya Yehova tii na ndako ya mokonzi. Balekaki na nzela ya porte ya bakɛngɛli ya ndako ya mokonzi mpo na kokóma kuna. Ntango bakómaki, Yehoashe afandaki na kiti ya bakonzi.+ 20 Bongo bato nyonso ya ekólo basepelaki mpe engumba ekómaki na kimya, mpo babomaki Atalia na mopanga na ndako ya mokonzi.

21 Yehoashe+ azalaki na mbula nsambo ntango akómaki mokonzi.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto