Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Emoniseli 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Emoniseli

      • Nyama mabe ya mitó nsambo ebimi na mbu (1-10)

      • Nyama ya maseke mibale ebimi na mabele (11-13)

      • Elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo (14, 15)

      • Elembo mpe motángo ya nyama mabe (16-18)

Emoniseli 13:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “dragɔ etɛlɛmaki.”

  • *

    To, “bilembo ya bokonzi.”

Mitindami

  • +Em 11:7; 13:18
  • +Yis 57:20; Em 21:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Biyano na mituna ya Biblia, lok. 73

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2012, nk. 8-11, 14-18

    15/2/2009, lok. 4

    1/4/2004, lok. 4

    Emoniseli, nk. 187-189

Emoniseli 13:2

Mitindami

  • +Em 12:9
  • +Lk 4:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 187-189, 227

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/4/2004, lok. 4

    15/7/1990, lok. 30

    Ndenge ya kosolola, lok. 389

Emoniseli 13:3

Mitindami

  • +Em 13:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 190-191

Emoniseli 13:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 191-192

Emoniseli 13:5

Mitindami

  • +Em 11:2, 3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 192

Emoniseli 13:6

Mitindami

  • +Da 7:25
  • +Em 12:12

Emoniseli 13:7

Mitindami

  • +Em 12:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2012, lok. 15

    Emoniseli, lok. 192

Emoniseli 13:8

Mitindami

  • +Em 3:5; 21:27
  • +Yis 53:7; Mt 27:50; Em 5:6, 12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 3

    Emoniseli, lok. 192

Emoniseli 13:9

Mitindami

  • +Mt 11:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 192-193

Emoniseli 13:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “Soki moto asengeli kobomama na mopanga.”

Mitindami

  • +Mt 26:52
  • +Da 7:18; 1Ko 6:2; Em 20:6
  • +Mt 24:13; Ebr 10:36; 12:3
  • +Em 2:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 192-193

Emoniseli 13:11

Mitindami

  • +Em 16:13; 20:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 3

    Emoniseli, nk. 193-194

Emoniseli 13:12

Mitindami

  • +Em 13:1
  • +Em 13:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 193-194

Emoniseli 13:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 3

    Emoniseli, nk. 193-194

Emoniseli 13:14

Mitindami

  • +Em 19:20; 20:4
  • +Em 13:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 194-195, 240-241

Emoniseli 13:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “elimo.” Lil., “mpema.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 194-196, 240-241

Emoniseli 13:16

Mitindami

  • +Em 14:9, 10; 16:2; 19:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    9/2021, lok. 18

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 4

    1/4/2004, nk. 6-7

    1/11/1997, nk. 15-16

    Emoniseli, nk. 196, 197-198

Emoniseli 13:17

Mitindami

  • +Em 14:11
  • +Em 15:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 4

    1/11/1997, nk. 15-16

    Emoniseli, nk. 196, 197-198

Emoniseli 13:18

Mitindami

  • +Da 3:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2009, lok. 4

    1/4/2004, nk. 3, 4-7

    Emoniseli, nk. 196-197

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Em. 13:1Em 11:7; 13:18
Em. 13:1Yis 57:20; Em 21:1
Em. 13:2Em 12:9
Em. 13:2Lk 4:6
Em. 13:3Em 13:14
Em. 13:5Em 11:2, 3
Em. 13:6Da 7:25
Em. 13:6Em 12:12
Em. 13:7Em 12:17
Em. 13:8Em 3:5; 21:27
Em. 13:8Yis 53:7; Mt 27:50; Em 5:6, 12
Em. 13:9Mt 11:15
Em. 13:10Mt 26:52
Em. 13:10Da 7:18; 1Ko 6:2; Em 20:6
Em. 13:10Mt 24:13; Ebr 10:36; 12:3
Em. 13:10Em 2:10
Em. 13:11Em 16:13; 20:2
Em. 13:12Em 13:1
Em. 13:12Em 13:3
Em. 13:14Em 19:20; 20:4
Em. 13:14Em 13:3
Em. 13:16Em 14:9, 10; 16:2; 19:20
Em. 13:17Em 14:11
Em. 13:17Em 15:2
Em. 13:18Da 3:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Emoniseli 13:1-18

Emoniseli epai ya Yoane

13 Mpe etɛlɛmaki* na zɛlo ya mbu.

Mpe namonaki nyama mabe moko+ ebimi na mbu,+ ezali na maseke zomi mpe na mitó nsambo, mpe na maseke na yango mitole* zomi, kasi na mitó na yango bankombo ya kofinga. 2 Sikoyo nyama mabe oyo namonaki ezalaki lokola nkoi, kasi makolo na yango lokola ya urse, mpe monɔkɔ na yango lokola monɔkɔ ya nkɔsi. Mpe dragɔ+ epesaki nyama yango nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.+

3 Namonaki moko ya mitó na yango lokola nde ezoki mpota ya liwa, kasi mpota na yango ya liwa ekaukaki,+ mpe mabele mobimba elandaki nyama mabe yango na kokamwa. 4 Basambelaki dragɔ mpo epesaki nyama mabe yango bokonzi, mpe basambelaki nyama mabe yango na maloba oyo: “Nani azali lokola nyama mabe oyo, mpe nani akoki kobunda na yango etumba?” 5 Bapesaki yango monɔkɔ oyo elobaka makambo minene mpe efingaka, mpe bapesaki yango bokonzi mpo esala makambo na boumeli ya sanza 42.+ 6 Mpe efungolaki monɔkɔ na yango mpo na kofinga+ Nzambe, mpo na kofinga nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda, elingi koloba baoyo bafandi na likoló.+ 7 Bapesaki yango nzela ya kobunda etumba na basantu mpe kolonga bango,+ mpe bapesaki yango bokonzi likoló ya mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso. 8 Bato nyonso oyo bafandi na mabele bakosambela yango. Baoyo banda na ebandeli ya mokili nkombo na bango ekomamá te na rulo ya bomoi+ ya Mwana-Mpate oyo abomamaki.+

9 Soki moto azali na matoi, ayoka.+ 10 Soki moto asengeli kokangama, akokangama. Soki moto akoboma na mopanga,* bakoboma ye na mopanga.+ Awa nde basantu+ basengeli koyika mpiko+ mpe kozala na kondima.+

11 Bongo namonaki nyama mabe mosusu ebimi na mabele, mpe ezalaki na maseke mibale lokola mwana-mpate, kasi ezalaki koloba lokola dragɔ.+ 12 Ezali kosalela bokonzi nyonso ya nyama mabe ya liboso+ na miso na yango. Mpe ezali kotinda mabele ná bato oyo bafandi wana básambela nyama mabe ya liboso, oyo mpota na yango ya liwa ekaukaki.+ 13 Mpe ezali kosala bilembo minene, ezali kosala ete ata mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabele na miso ya bato.

14 Ezali kokosa bato oyo bafandi na mabele na bilembo oyo bapesaki yango nzela esala na miso ya nyama mabe, ezali koyebisa bato oyo bafandi na mabele ete básala elilingi+ ya nyama mabe yango oyo ezalaki na mpota ya liwa kasi ezongaki lisusu na bomoi.+ 15 Bapesaki yango nzela ya kopesa elilingi ya nyama mabe yango bomoi,* mpo elilingi ya nyama mabe yango eloba mpe ebomisa bato nyonso oyo baboyi kosambela elilingi ya nyama mabe yango.

16 Ezali kotinda bato nyonso na makasi—bato mike ná bato minene, bazwi ná babola, bato ya bonsomi ná baombo—bázwa elembo na lobɔkɔ na bango ya mobali to na elongi na bango,+ 17 mpe moto moko te akoka kosomba to kotɛka longola kaka moto oyo azali na elembo yango, elingi koloba nkombo+ ya nyama mabe yango to motángo ya nkombo na yango.+ 18 Awa nde esengeli kozala na bwanya: Moto oyo azali na bososoli atánga motángo ya nyama mabe yango, mpo ezali motángo ya moto, mpe motángo na yango ezali 666.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto