Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bafilipi 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Bafilipi

      • Mbote (1, 2)

      • Matɔndi epai ya Nzambe; libondeli ya Paulo (3-11)

      • Nsango malamu ezali kokende liboso atako mikakatano (12-20)

      • Kozala na bomoi ezali mpo na Kristo, kokufa ezali litomba (21-26)

      • “Bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu” (27-30)

Bafilipi 1:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bankulutu.”

Mitindami

  • +Mis 16:12
  • +1Ti 3:1, 8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, lok. 53

Bafilipi 1:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lilɔmbɔ.”

Mitindami

  • +1Te 1:2

Bafilipi 1:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bopesaki mabɔkɔ mpo na bokoli ya.”

Bafilipi 1:6

Mitindami

  • +Flp 2:13
  • +1Ko 1:8

Bafilipi 1:7

Mitindami

  • +Ef 3:1; Flp 1:13; Kol 4:18; 2Ti 1:8; Flm 13
  • +Mis 24:10, 14; 25:10-12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 21

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2015, lok. 19

    15/8/1999, lok. 19

    1/12/1998, lok. 18

    Tópesa litatoli, nk. 131-132

    “Makomami nyonso,” lok. 94

Bafilipi 1:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Nzambe azali motatoli na ngai mpo na.”

Bafilipi 1:9

Mitindami

  • +1Te 3:12
  • +Yn 17:3
  • +Ebr 5:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2019, nk. 9-10

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1997, nk. 16-17

    15/6/1995, lok. 20

Bafilipi 1:10

Mitindami

  • +Ro 12:2
  • +Ro 14:13, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 12

    Lamuká!,

    No. 1 2020 lok. 12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2019, nk. 10-12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2008, lok. 24

    15/3/1997, nk. 16-17

Bafilipi 1:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mbuma ya boyengebene.”

Mitindami

  • +Yn 15:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2019, lok. 12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2007, lok. 24

Bafilipi 1:13

Mitindami

  • +Mis 28:30, 31
  • +Ef 3:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2013, nk. 14-16

Bafilipi 1:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/1991, nk. 20-21

Bafilipi 1:16

Mitindami

  • +Flp 1:7

Bafilipi 1:19

Mitindami

  • +2Ko 1:11
  • +Yn 15:26

Bafilipi 1:20

Mitindami

  • +Ro 14:8; 1Pe 4:16

Bafilipi 1:21

Mitindami

  • +Ga 2:20
  • +1Te 4:14; 2Ti 4:8; Em 14:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1995, lok. 30

Bafilipi 1:23

Mitindami

  • +2Ti 4:6
  • +2Ko 5:6, 8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2008, lok. 28

    1/3/1995, nk. 30-31

Bafilipi 1:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na elimo moko.”

  • *

    Lil., “molimo moko.”

Mitindami

  • +Ef 4:1, 3; Kol 1:10
  • +Ro 15:5, 6; 1Ko 1:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2012, nk. 11-12

    15/9/2010, nk. 13-14

Bafilipi 1:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “elembo.”

Mitindami

  • +2Te 1:6
  • +Lk 21:19; 2Te 1:4, 5

Bafilipi 1:29

Mitindami

  • +Mis 5:41

Bafilipi 1:30

Mitindami

  • +Mis 16:22, 23; 1Te 2:2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Flp. 1:1Mis 16:12
Flp. 1:11Ti 3:1, 8
Flp. 1:41Te 1:2
Flp. 1:6Flp 2:13
Flp. 1:61Ko 1:8
Flp. 1:7Ef 3:1; Flp 1:13; Kol 4:18; 2Ti 1:8; Flm 13
Flp. 1:7Mis 24:10, 14; 25:10-12
Flp. 1:91Te 3:12
Flp. 1:9Yn 17:3
Flp. 1:9Ebr 5:14
Flp. 1:10Ro 12:2
Flp. 1:10Ro 14:13, 21
Flp. 1:11Yn 15:5
Flp. 1:13Mis 28:30, 31
Flp. 1:13Ef 3:1
Flp. 1:16Flp 1:7
Flp. 1:192Ko 1:11
Flp. 1:19Yn 15:26
Flp. 1:20Ro 14:8; 1Pe 4:16
Flp. 1:21Ga 2:20
Flp. 1:211Te 4:14; 2Ti 4:8; Em 14:13
Flp. 1:232Ti 4:6
Flp. 1:232Ko 5:6, 8
Flp. 1:27Ef 4:1, 3; Kol 1:10
Flp. 1:27Ro 15:5, 6; 1Ko 1:10
Flp. 1:282Te 1:6
Flp. 1:28Lk 21:19; 2Te 1:4, 5
Flp. 1:29Mis 5:41
Flp. 1:30Mis 16:22, 23; 1Te 2:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Bafilipi 1:1-30

Epai ya Bafilipi

1 Paulo ná Timote, baombo ya Kristo Yesu, topesi mbote na basantu nyonso oyo bazali na bomoko na Kristo Yesu, oyo bazali na Filipi,+ ná bakɛngɛli* mpe basaleli na misala:+

2 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.

3 Napesaka Nzambe na ngai matɔndi ntango nyonso oyo nakanisaka bino. 4 Mbala nyonso nasalaka libondeli* mpo na bino nyonso. Mpe nasalaka yango na esengo,+ 5 mpo bopesaki mabɔkɔ na* nsango malamu banda mokolo ya liboso tii sikoyo. 6 Mpo nandimi mpenza ete Nzambe akosilisa mosala ya malamu oyo abandaki epai na bino+ mpe ekokoba tii na mokolo ya Yesu Kristo.+ 7 Ebongi mpenza nakanisela bino nyonso ndenge wana, mpo bozali na motema na ngai, mpe bozali kozwa boboto monene elongo na ngai na ndenge bozali kobɔndisa ngai na minyɔlɔlɔ na ngai+ mpo na kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.+

8 Mpo Nzambe ayebi* mposa makasi oyo nazali na yango ya komona bino. Bolingo oyo nazali na yango mpo na bino ezali lokola bolingo oyo Kristo Yesu azali na yango mpo na bino. 9 Mpe nazali kokoba kobondela ete bolingo na bino ebakisama lisusu mingi mpenza,+ ná boyebi ya solosolo+ ná bososoli mingi mpenza;+ 10 ete bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina,+ mpo bózala pɛto mpe bóbɛtisa bamosusu libaku te+ tii na mokolo ya Kristo; 11 mpe bótonda na misala ya malamu,* oyo eyaka na nzela ya Yesu Kristo,+ mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.

12 Sikoyo bandeko, nalingi bóyeba ete ndenge makambo na ngai etamboli malamu esalisi mpo nsango malamu ekende liboso, 13 mpo Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma mpe bato mosusu nyonso bayoki+ ete nakangami na bolɔkɔ+ mpo na Kristo. 14 Sikoyo bandeko mingi na kati ya Nkolo bazali kozwa makasi mpo na kokangama na ngai, mpe bazali komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga.

15 Ya solo, bamosusu bazali kosakola Kristo na likunya mpe kowelana, kasi bamosusu na makanisi malamu. 16 Baoyo ya makanisi malamu bazali kosakola Kristo mpo na bolingo, mpo bayebi ete natyami mpo na kokɔtela nsango malamu;+ 17 kasi baoyo wana basalaka yango nde mpo na kowelana, bazalaka na likanisi ya pɛto te, mpo bazali koluka kobimisela ngai minyoko atako nazali na minyɔlɔlɔ. 18 Likambo ezali nini? Ezala na lokuta to na solo, Kristo azali kosakolama, mpe nazali kosepela na likambo yango. Kutu, nakokoba kosepela lisusu, 19 mpo nayebi ete yango ekomemela ngai lobiko na nzela ya lilɔmbo na bino+ mpe ya lisalisi ya elimo ya Yesu Kristo.+ 20 Yango ezali na boyokani na mposa makasi mpe elikya oyo nazali na yango ete nakoyoka nsɔni ata moke te. Nazali mpenza na kondima ete nakozala na likoki ya kokoba koloba polele, mpo nazala na likoki ya kopesa Kristo nkembo sikoyo, ndenge azwaka nkembo banda kala, ezala nazali na bomoi to nakufi.+

21 Soki nazali na bomoi, nakosalela bomoi na ngai mpo na Kristo,+ mpe soki nakufi, ekozala mpo na litomba na ngai.+ 22 Nzokande soki esengeli nazala na bomoi na nzoto oyo, ezali litomba ya mosala na ngai; kasi nakoloba te eloko oyo nakopona. 23 Makambo wana mibale esilisi ngai mayele, mpo nazali na mposa ya kosikolama na nzoto oyo mpo nazala elongo na Kristo,+ yango nde eloko oyo eleki mpenza malamu.+ 24 Nzokande, ezali na ntina koleka natikala na nzoto oyo mpo na litomba na bino. 25 Na yango, lokola nazali mpenza kondima likambo yango, nayebi ete nakotikala mpe nakokoba kozala elongo na bino nyonso mpo bókola mpe bózala na esengo na kondima na bino, 26 mpo na nzela na ngai, ntango nakozala lisusu elongo na bino, esengo na bino ebakisama mpo bozali bayekoli ya Kristo Yesu.

27 Kaka nde bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu etali Kristo.+ Ezala nayei kotala bino to nazali te, nayoka nsango mpo na bino ete bozali kotɛlɛma ngwi, mpe bozali na bomoko,* na mokano moko*+ wana bozali kobunda elongo mpo na kondima ya nsango malamu. 28 Bótika ata moke te ete banguna na bino bábangisa bino. Kozanga kobanga na bino ezali elembeteli* ya libebi+ mpo na bango, kasi elembeteli ya lobiko mpo na bino;+ mpe yango euti epai ya Nzambe. 29 Mpo bozwi libaku malamu kaka ya kondimela Kristo te, kasi mpe ya komona mpasi mpo na ye.+ 30 Bozali kobunda etumba oyo bomonaki ngai mpe nazali kobunda+ mpe oyo boyoki nazali kokoba kobunda sikoyo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto