Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Timote 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Timote

      • Masɛngami mpo na bakɛngɛli (1-7)

      • Masɛngami mpo na basaleli na misala (8-13)

      • Sekele mosantu ya kokangama na Nzambe (14-16)

1 Timote 3:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, mokɛngɛli na lisangá.

Mitindami

  • +Mis 20:28; Tit 1:5-9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

    Tobongisami, nk. 32-33, 40

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2016, lok. 16

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2014, nk. 3-4

    15/5/2010, lok. 24

    1/1/2001, lok. 9

    1/7/2000, lok. 29

    1/12/1999, lok. 26

    1/8/1999, lok. 14

    1/9/1990, nk. 18-23

    15/8/1990, lok. 19

    Mokanda mpo na Eteyelo, nk. 190-191

    “Makomami nyonso,” nk. 236-237

1 Timote 3:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moto ya bososoli.”

Mitindami

  • +Ro 12:3; 1Pe 4:7
  • +Mis 28:7; 1Pe 4:9
  • +1Ti 5:17; 2Ti 2:24; Tit 1:7, 9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 42

    Tobongisami, nk. 32, 34-37

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2013, lok. 29

    15/9/1999, lok. 8

    1/1/1997, lok. 28

    15/10/1996, lok. 17

    1/9/1990, nk. 24, 27

1 Timote 3:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moto oyo abɛtaka bato te.”

Mitindami

  • +Ro 13:13
  • +Flp 4:5; Yk 3:17
  • +Ro 12:18; Yk 3:18
  • +Ebr 13:5; 1Pe 5:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 32, 35-36

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/1990, nk. 25-26, 27-28

1 Timote 3:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “atambwisaka.”

Mitindami

  • +Ef 6:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 32, 34, 133-134

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2011, lok. 26

    15/10/1996, nk. 20-21

    15/5/1993, nk. 17-19

    1/9/1990, lok. 25

1 Timote 3:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kotambwisa.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 32, 34

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2012, nk. 9-10

    15/10/1996, nk. 20-24

    15/5/1993, nk. 17-19

    1/9/1990, lok. 25

1 Timote 3:6

Mitindami

  • +1Ti 5:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 32, 33-34

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/1990, lok. 26

1 Timote 3:7

Mitindami

  • +Mis 22:12; 1Te 4:11, 12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 32, 34-35

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2005, lok. 30

    1/9/1990, lok. 24

1 Timote 3:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bato oyo bakosaka te na maloba na bango.”

Mitindami

  • +Mis 6:3; Tit 1:7; 1Pe 5:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/1990, nk. 25-26

1 Timote 3:9

Mitindami

  • +1Ti 1:5, 18, 19; 2Ti 1:3; 1Pe 3:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/1990, lok. 26

1 Timote 3:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpo na koyeba soki bakokisi masɛngami.”

Mitindami

  • +1Pe 2:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 54-55

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2011, lok. 11

    1/5/2006, nk. 23-24

    1/9/1990, nk. 24, 26

    Mosala ya Bokonzi,

    5/2000, lok. 8

1 Timote 3:11

Mitindami

  • +1Ti 5:13
  • +Tit 2:3-5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/1996, lok. 17

1 Timote 3:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 133-134

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/1997, lok. 28

    1/9/1990, nk. 24-25

1 Timote 3:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

1 Timote 3:15

Mitindami

  • +Ebr 3:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2007, lok. 29

1 Timote 3:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Yesu amonanaki.”

  • *

    To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Yn 1:14; Flp 2:7
  • +1Pe 3:18
  • +1Pe 3:19, 20
  • +Kol 1:23
  • +Kol 1:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Penepene na Yehova, lok. 196

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2008, nk. 30-31

    15/6/2008, lok. 13

    15/2/2006, lok. 19

    15/10/1997, lok. 11

    1/3/1990, nk. 18-23

    15/1/1990, nk. 10-20

    Tósambela Nzambe, lok. 57

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Tim. 3:1Mis 20:28; Tit 1:5-9
1 Tim. 3:2Ro 12:3; 1Pe 4:7
1 Tim. 3:2Mis 28:7; 1Pe 4:9
1 Tim. 3:21Ti 5:17; 2Ti 2:24; Tit 1:7, 9
1 Tim. 3:3Ro 13:13
1 Tim. 3:3Flp 4:5; Yk 3:17
1 Tim. 3:3Ro 12:18; Yk 3:18
1 Tim. 3:3Ebr 13:5; 1Pe 5:2
1 Tim. 3:4Ef 6:4
1 Tim. 3:61Ti 5:22
1 Tim. 3:7Mis 22:12; 1Te 4:11, 12
1 Tim. 3:8Mis 6:3; Tit 1:7; 1Pe 5:2
1 Tim. 3:91Ti 1:5, 18, 19; 2Ti 1:3; 1Pe 3:16
1 Tim. 3:101Pe 2:12
1 Tim. 3:111Ti 5:13
1 Tim. 3:11Tit 2:3-5
1 Tim. 3:15Ebr 3:6
1 Tim. 3:16Yn 1:14; Flp 2:7
1 Tim. 3:161Pe 3:18
1 Tim. 3:161Pe 3:19, 20
1 Tim. 3:16Kol 1:23
1 Tim. 3:16Kol 1:6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Timote 3:1-16

Mokanda ya liboso epai ya Timote

3 Liloba oyo ebongi kotyelama motema: Soki moto azali koluka kozala mokɛngɛli,*+ azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi. 2 Na yango, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami na likambo moko te, mobali ya mwasi kaka moko, moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu,*+ moto ya makambo na molɔngɔ, moyambi bapaya,+ moto oyo ayebi koteya,+ 3 molangwi-masanga te,+ moto ya mobulu te,* moto ya makambo makasimakasi te,+ oyo aswanaka na bato te,+ moto oyo alingá mbongo te,+ 4 moto oyo akambaka* libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te+ 5 (mpo soki moto ayebi te kokamba* libota na ye moko, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?), 6 azala mondimi ya sika te,+ noki avimba na lolendo mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo. 7 Lisusu, asengeli mpe kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu,+ mpo akwea te na nsɔni mpe na motambo ya Zabolo.

8 Basaleli na misala mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, bato ya minɔkɔ mibale te,* bato oyo bamipesá na vinyo te, bázala bato ya lokoso te oyo balukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+ 9 bábatelaka sekele mosantu ya kondima na lisosoli ya pɛto.+

10 Lisusu, bámekama liboso mpo na koyeba soki bakoki,* na nsima básala lokola basaleli, soki bafundami ata na likambo moko te.+

11 Basi mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, oyo bakoselaka bato makambo te,+ oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bato ya sembo na makambo nyonso.+

12 Basaleli na misala bázala mibali ya mwasi kaka moko, bato oyo bakambaka bana na bango mpe mabota na bango na ndenge ya malamu mpenza. 13 Mpo mibali oyo bazali kosala mosala na ndenge ya malamu mpenza bazali kozwa esika ya lokumu, koloba polele mpe na bosembo mpo na kondima oyo bandimeli Kristo Yesu.

14 Nazali kokomela yo makambo oyo, atako nazali na mposa makasi ya koya epai na yo nsima ya mwa ntango moke, 15 mpo soki esalemi ete nayei noki te, oyeba ndenge osengeli komitambwisa na ndako ya Nzambe,+ oyo ezali lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzí mpe eloko oyo esimbi solo. 16 Ya solo, sekele mosantu ya ezaleli oyo ya kokangama na Nzambe ezali mpenza monene: ‘Amonanaki* polele na nzoto,+ atángamaki moto ya sembo* na elimo,+ abimelaki baanzelu,+ basakolaki ye na bikólo,+ bandimelaki ye na mokili,+ azwamaki na likoló na nkembo.’

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto