Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosakoli 9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mosakoli

      • Bato nyonso basukaka ndenge moko (1-3)

      • Sepelá na bomoi atako liwa (4-12)

        • Bakufi bayebi eloko te (5)

        • Mosala ezali te na Nkunda (10)

        • Ntango mpe makambo oyo ekanami te (11)

      • Bato basepelaka na bwanya ntango nyonso te (13-18)

Mosakoli 9:1

Mitindami

  • +Mib 33:3; 1Sa 2:9; Nz 37:5

Mosakoli 9:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mos 5:15
  • +Mos 8:10

Mosakoli 9:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpe nsima na yango bakei epai ya bakufi.”

Mitindami

  • +Yb 3:17-19; Mos 2:15

Mosakoli 9:4

Mitindami

  • +Yis 38:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    10/2014, lok. 6

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/4/1993, lok. 29

    15/5/1991, lok. 30

Mosakoli 9:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lifuti.”

Mitindami

  • +Eb 3:19; Ro 5:12
  • +Nz 88:10; 115:17; 146:4; Yis 38:18; Yn 11:11
  • +Yb 7:9, 10; Mos 2:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 29

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2005, lok. 3

    15/2/1997, lok. 16

    1/6/1995, nk. 6-7

    15/5/1995, nk. 4-5

Mosakoli 9:6

Mitindami

  • +Mos 9:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1995, nk. 6-7

Mosakoli 9:7

Mitindami

  • +Mib 12:7; Nz 104:15; Mos 2:24
  • +Mib 16:15; Mis 14:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/1997, lok. 17

Mosakoli 9:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “bilamba ya kongɛnga oyo ezali komonisa esengo, kasi bilamba ya matanga te.”

Mitindami

  • +Da 10:2, 3

Mosakoli 9:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “eteni.”

Mitindami

  • +Mas 5:18
  • +Mos 5:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2006, nk. 27-28

Mosakoli 9:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Nz 115:17; 146:3, 4; Yis 38:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 29

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2006, lok. 5

Mosakoli 9:11

Mitindami

  • +1Sa 17:50; Nz 33:16
  • +Mos 2:15
  • +2Sa 17:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 3 2021 lok. 8

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2017, lok. 29

    Lamuká!,

    No. 3 2017 lok. 6

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/2009, nk. 4-5

    15/9/2007, lok. 5

    1/9/2003, nk. 9-10

    15/10/2001, nk. 13-14

    15/8/1998, nk. 15-16

    15/9/1992, lok. 5

    15/10/1991, lok. 5

Mosakoli 9:12

Mitindami

  • +Mos 8:8; Yk 4:13, 14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2005, nk. 3-4

Mosakoli 9:15

Mitindami

  • +Mos 9:11

Mosakoli 9:16

Mitindami

  • +Mas 21:22; 24:5; Mos 7:12, 19; 9:18
  • +Mr 6:3; 1Ko 2:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2000, lok. 32

Mosakoli 9:18

Mitindami

  • +Yos 22:20; 1Ko 5:6; Ebr 12:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 3 2021 lok. 11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mos. 9:1Mib 33:3; 1Sa 2:9; Nz 37:5
Mos. 9:2Mos 5:15
Mos. 9:2Mos 8:10
Mos. 9:3Yb 3:17-19; Mos 2:15
Mos. 9:4Yis 38:19
Mos. 9:5Eb 3:19; Ro 5:12
Mos. 9:5Nz 88:10; 115:17; 146:4; Yis 38:18; Yn 11:11
Mos. 9:5Yb 7:9, 10; Mos 2:16
Mos. 9:6Mos 9:10
Mos. 9:7Mib 12:7; Nz 104:15; Mos 2:24
Mos. 9:7Mib 16:15; Mis 14:17
Mos. 9:8Da 10:2, 3
Mos. 9:9Mas 5:18
Mos. 9:9Mos 5:18
Mos. 9:10Nz 115:17; 146:3, 4; Yis 38:18
Mos. 9:111Sa 17:50; Nz 33:16
Mos. 9:11Mos 2:15
Mos. 9:112Sa 17:23
Mos. 9:12Mos 8:8; Yk 4:13, 14
Mos. 9:15Mos 9:11
Mos. 9:16Mas 21:22; 24:5; Mos 7:12, 19; 9:18
Mos. 9:16Mr 6:3; 1Ko 2:8
Mos. 9:18Yos 22:20; 1Ko 5:6; Ebr 12:15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mosakoli 9:1-18

Mosakoli

9 Bongo natyaki oyo nyonso na motema, mpe namonaki ete: Moto ya sembo ná moto ya bwanya, ezala mpe misala na bango, bazali na mabɔkɔ ya Nzambe ya solo.+ Bato bayebi te bolingo mpe koyina oyo emonisamaki liboso na bango. 2 Bango nyonso basukaka ndenge moko.+ Moto ya sembo* ná moto mabe,+ moto malamu ná moto ya pɛto ná moto ya mbindo, baoyo bapesaka mbeka ná baoyo bapesaka mbeka te. Moto malamu azali ndenge moko na mosumuki; moto oyo alapi ndai ná moto oyo abangaki kolapa ndai. 3 Likambo ya mpasi oyo esalemaka na nse ya moi yango oyo: Lokola bato nyonso bazali na nsuka moko,+ motema na bango mpe etondi na mabe; mpe ligboma ezali na motema na bango na bomoi na bango mobimba, mpe na nsima bakufaka!*

4 Elikya ezali mpo na moto oyo azali na kati ya bato oyo bazali na bomoi, mpo mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá.+ 5 Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa,+ kasi bakufi bayebi ata eloko moko te,+ bazali lisusu na mbano* te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango.+ 6 Lisusu, bolingo na bango, koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe basalaka lisusu eloko te na makambo nyonso oyo ezali kosalema na nse ya moi.+

7 Kende, lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema ya esengo,+ mpo Nzambe ya solo asepeli na misala na yo.+ 8 Bilamba na yo ezala ntango nyonso mpɛmbɛ,* mpe kozanga te kotya mafuta na motó na yo.+ 9 Sepelá na bomoi elongo na mwasi oyo olingaka+ mikolo nyonso ya bomoi na yo ya mpamba, oyo Nzambe apesá yo na nse ya moi, mikolo nyonso ya makambo na yo ya mpamba, mpo yango nde mbano* na yo na bomoi mpe na mosala na yo ya makasi oyo ozali kosala na nse ya moi.+ 10 Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo nyonso, mpo mosala ezali te, mikano te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda,*+ esika ozali kokende.

11 Namoná eloko mosusu na nse ya moi: Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka ntango nyonso na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba,+ ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei ntango nyonso, ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo ntango nyonso,+ mpe ezali te bato oyo bazali na boyebi nde balongaka ntango nyonso,+ mpo ntango ná makambo oyo ekanami te ekómelaka bango nyonso. 12 Mpo moto ayebaka te ntango nini mpasi ekokómela ye.+ Kaka ndenge mbisi oyo ezwamaka na monyama oyo ebomaka, mpe ndenge bandɛkɛ ezwamaka na motambo, bana ya bato mpe bakangamaka na motambo na ntango ya mpasi, ntango mpasi ezwaka bango na mbalakaka.

13 Lisusu natalatalaki na nse ya moi likambo oyo ya kokamwa etali bwanya: 14 Ezalaki na mwa engumba moko, mpe bato moke bazalaki na kati; mpe mokonzi moko ya nguya ayelaki yango, azingaki yango mpe atongaki bifelo minene mpo na kozinga engumba yango. 15 Mpe kuna ezalaki na mobola moko, kasi azalaki moto ya bwanya, mpe abikisaki engumba na bwanya na ye. Kasi moto moko te akanisaki lisusu mobola yango.+ 16 Mpe ngai nalobaki boye: “Bwanya ezali malamu koleka nguya;+ nzokande batyolaka bwanya ya mobola, mpe balandaka maloba na ye te.”+

17 Malamu nde kolanda maloba ya kimya ya moto ya bwanya, na esika ya kolanda koganga ya moto oyo azali koyangela na kati ya bazoba.

18 Bwanya eleki bibundeli ya etumba, kasi mosumuki kaka moko akoki kobebisa makambo ebele ya malamu.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto