Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Mosambisi Samsone alingi kozwa mwasi Mofilistia (1-4)

      • Samsone abomi nkɔsi na lisalisi ya elimo ya Yehova (5-9)

      • Samsone apesi sambole na fɛti ya libala (10-19)

      • Babalisi mwasi ya Samsone na mobali mosusu (20)

Basambisi 14:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “amonaki mwasi moko kati na bana basi ya Bafilistia.”

Basambisi 14:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “abongi na miso na ngai.”

Mitindami

  • +Mib 7:3

Basambisi 14:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    “Ye” ekoki kozala Nzambe.

Mitindami

  • +Bas 13:1

Basambisi 14:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

Basambisi 14:6

Mitindami

  • +Bas 13:24, 25

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 31

Basambisi 14:7

Mitindami

  • +Bas 14:2

Basambisi 14:8

Mitindami

  • +Eb 24:67; Mt 1:24

Basambisi 14:14

Mitindami

  • +Bas 14:8, 9

Basambisi 14:15

Mitindami

  • +Bas 16:5

Basambisi 14:16

Mitindami

  • +Bas 16:15

Basambisi 14:17

Mitindami

  • +Bas 16:16, 18

Basambisi 14:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “liboso Samsone akɔta na shambrɛ na ye ya kati.”

  • *

    Lil., “Soki bóbalolaka mabele elongo na mwana-ngɔmbɛ na ngai ya mwasi te.”

Mitindami

  • +Bas 14:14
  • +Bas 14:15

Basambisi 14:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “komata.”

Mitindami

  • +Bas 13:24, 25; 14:6; 15:14
  • +Yos 13:2, 3; Bas 1:18
  • +Bas 14:12

Basambisi 14:20

Mitindami

  • +Bas 14:2
  • +Bas 14:11; 15:1, 2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 14:3Mib 7:3
Bas. 14:4Bas 13:1
Bas. 14:6Bas 13:24, 25
Bas. 14:7Bas 14:2
Bas. 14:8Eb 24:67; Mt 1:24
Bas. 14:14Bas 14:8, 9
Bas. 14:15Bas 16:5
Bas. 14:16Bas 16:15
Bas. 14:17Bas 16:16, 18
Bas. 14:18Bas 14:14
Bas. 14:18Bas 14:15
Bas. 14:19Bas 13:24, 25; 14:6; 15:14
Bas. 14:19Yos 13:2, 3; Bas 1:18
Bas. 14:19Bas 14:12
Bas. 14:20Bas 14:2
Bas. 14:20Bas 14:11; 15:1, 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 14:1-20

Basambisi

14 Na nsima Samsone akitaki na Timina, mpe kuna amonaki mwasi moko Mofilistia.* 2 Bongo amataki koyebisa tata na ye ná mama na ye ete: “Na Timina, namoni mwasi moko Mofilistia oyo asepelisi ngai, mpe nalingi bózwela ngai ye mpo akóma mwasi na ngai.” 3 Kasi tata na ye ná mama na ye balobaki na ye: “Okoki te koluka mwasi ya kobala kati na bandeko na yo to kati na bato nyonso ya ekólo na biso?+ Mpo na nini okende kozwa mwasi epai ya Bafilistia, bato oyo bakatamá ngenga te?” Kasi Samsone alobaki na tata na ye: “Zwelá ngai ye, mpo ngai nalingi kaka ye.”* 4 Tata na ye ná mama na ye bazalaki koyeba te ete likambo yango eutaki epai ya Yehova, mpo Ye* azalaki koluka libaku ya kobundisa Bafilistia, mpo Bafilistia bazalaki kokonza Yisraele na ntango wana.+

5 Na yango Samsone akitaki na Timina elongo na tata na ye ná mama na ye. Ntango akómaki na bilanga ya vinyo ya Timina, talá! nkɔsi* moko ezalaki koyela ye na koganga. 6 Bongo elimo ya Yehova epesaki ye nguya,+ mpe apasolaki nkɔsi yango na ndambo mibale kaka na mabɔkɔ mpamba, ndenge kaka bapasolaka mwana-ntaba na ndambo mibale. Kasi ayebisaki tata na ye to mama na ye te likambo oyo asalaki. 7 Na nsima akitaki mpe asololaki na mwasi yango, mpe Samsone amonaki ete mwasi yango abongi mpenza na ye.+

8 Na nsima, ntango azalaki kozonga na Timina mpo na komema mwasi yango na ndako,+ Samsone alekaki mpo na kotala ebembe ya nkɔsi wana. Akutaki ndako ya banzoi mpe mafuta ya nzoi na kati ya ebembe ya nkɔsi yango. 9 Bongo azwaki mafuta ya nzoi na mabɔkɔ na ye mpe azalaki kolya yango nzelanzela. Ntango akómaki esika tata na ye ná mama na ye bazalaki, apesaki bango ndambo, mpe balyaki. Kasi ayebisaki bango te ete azwaki yango na ebembe ya nkɔsi.

10 Tata na ye akendaki epai ya mwasi yango, mpe Samsone asalaki fɛti kuna; mpo ezali ndenge wana nde bilenge mibali bazalaki kosala. 11 Ntango bamonaki ye, bazwaki bilenge mibali 30 mpo bákɔtisa ye na fɛti mpe báfanda elongo na ye. 12 Na nsima, Samsone alobaki na bango boye: “Nabondeli bino, tiká napesa bino sambole moko. Soki mpenza bolimboleli ngai yango na boumeli ya mikolo nsambo ya fɛti oyo, nakopesa bino bilamba ya lini 30 mpe bilamba mosusu 30 ya kitoko. 13 Kasi soki bokoki te kolimbolela ngai yango, bino nde bokopesa ngai bilamba ya lini 30 mpe bilamba mosusu ya kitoko 30.” Balobaki: “Yebisá biso sambole yango; tolingi koyoka yango.” 14 Bongo ye alobaki na bango:

“Na molei, eloko moko ya kolya ebimi,

Mpe na oyo azalaka makasi, eloko moko ya elɛngi ebimi.”+

Kasi bakokaki te kolimbola sambole yango na boumeli ya mikolo misato. 15 Na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samsone: “Kosá mobali na yo+ mpo alimbolela biso sambole yango. Soki te, tokotumba yo ná ndako ya tata na yo na mɔtɔ. Bobengisaki biso awa nde mpo na kozwa biloko na biso?” 16 Na yango, mwasi ya Samsone alelelaki ye mpe azalaki koloba ete: “Namoni oyinaka ngai mpenza, olingaka na yo ngai te.+ Opesi bato ya ekólo na ngai sambole, kasi olimboleli ngai yango te.” Bongo Samsone alobaki na ye boye: “Talá, nalimboleli yango ata baboti na ngai te, bongo mpo na nini nalimbolela yo yango?” 17 Kasi akobaki kolelela ye mikolo nyonso oyo etikalaki na mikolo nsambo ya fɛti na bango. Nsukansuka na mokolo ya nsambo, alimbolelaki ye yango mpo atyaki ye mbamba. Na nsima mwasi yango alimbolelaki bato ya ekólo na ye sambole yango.+ 18 Bongo na mokolo ya nsambo, liboso moi elala,* mibali ya engumba balobaki na ye boye:

“Eloko nini eleki mafuta ya nzoi na elɛngi,

Mpe eloko nini eleki nkɔsi na makasi?”+

Samsone alobaki na bango:

“Soki mwasi na ngai asalisaka bino te,*+

Bolingaki kolimbola sambole na ngai te.”

19 Mpe elimo ya Yehova epesaki ye nguya,+ mpe akitaki na Ashekelone,+ abomaki mibali 30 kati na bango, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango bato oyo balimbolaki sambole.+ Kasi asilikaki makasi wana azalaki kozonga* na ndako ya tata na ye.

20 Na nsima, babalisaki mwasi ya Samsone+ na moko ya bilenge mibali oyo bakɔtisaki Samsone na fɛti ya libala.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto