Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Samsone na Gaza (1-3)

      • Samsone ná Dalila (4-22)

      • Samsone azongisi mabe, mpe akufi (23-31)

Basambisi 16:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 27

Basambisi 16:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2004, lok. 15

Basambisi 16:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Bas 16:18

Basambisi 16:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Ndimisá.”

Mitindami

  • +Bas 14:15

Basambisi 16:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mintulu.”

Basambisi 16:9

Mitindami

  • +Bas 15:14

Basambisi 16:12

Mitindami

  • +Bas 16:9

Basambisi 16:13

Mitindami

  • +Bas 16:7, 11

Basambisi 16:15

Mitindami

  • +Bas 14:16
  • +Bas 16:7, 11, 13

Basambisi 16:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo ya Samsone.”

Mitindami

  • +Bas 14:17

Basambisi 16:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Banda na libumu ya mama na ngai.”

Mitindami

  • +Mit 6:5; Bas 13:5, 7

Basambisi 16:18

Mitindami

  • +Bas 16:5

Basambisi 16:20

Mitindami

  • +Bas 16:9, 12, 14

Basambisi 16:22

Mitindami

  • +Bas 13:5

Basambisi 16:23

Mitindami

  • +1Sa 5:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2003, lok. 26

Basambisi 16:24

Mitindami

  • +Bas 15:4, 5
  • +Bas 15:7, 8, 15, 16

Basambisi 16:28

Mitindami

  • +Ebr 11:32
  • +Bas 14:5, 6, 19; 15:14
  • +Bas 16:21

Basambisi 16:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai ekufa.”

Mitindami

  • +Bas 16:27
  • +Bas 14:19; 15:7, 8, 15, 16

Basambisi 16:31

Mitindami

  • +Bas 13:2
  • +Bas 13:8
  • +Bas 2:16; 15:20

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 16:4Bas 16:18
Bas. 16:5Bas 14:15
Bas. 16:9Bas 15:14
Bas. 16:12Bas 16:9
Bas. 16:13Bas 16:7, 11
Bas. 16:15Bas 14:16
Bas. 16:15Bas 16:7, 11, 13
Bas. 16:16Bas 14:17
Bas. 16:17Mit 6:5; Bas 13:5, 7
Bas. 16:18Bas 16:5
Bas. 16:20Bas 16:9, 12, 14
Bas. 16:22Bas 13:5
Bas. 16:231Sa 5:4
Bas. 16:24Bas 15:4, 5
Bas. 16:24Bas 15:7, 8, 15, 16
Bas. 16:28Ebr 11:32
Bas. 16:28Bas 14:5, 6, 19; 15:14
Bas. 16:28Bas 16:21
Bas. 16:30Bas 16:27
Bas. 16:30Bas 14:19; 15:7, 8, 15, 16
Bas. 16:31Bas 13:2
Bas. 16:31Bas 13:8
Bas. 16:31Bas 2:16; 15:20
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 16:1-31

Basambisi

16 Mokolo moko, Samsone akendaki na Gaza mpe amonaki mwasi moko ya ndumba kuna, mpe akɔtaki epai na ye. 2 Bayebisaki bato ya Gaza: “Samsone ayei awa.” Bongo bazingaki ye mpe babombanaki mpo na kozela ye butu mobimba na porte ya engumba. Bafandaki nyɛɛ butu mobimba, bazali kolobana: “Ntango kaka ntɔngɔ ekotana, tokoboma ye.”

3 Nzokande, Samsone alalaki kuna tii na midi ya butu. Na nsima alamukaki na midi ya butu, akangaki baporte ya engumba ná makonzí mibale ya mipanzi na yango mpe apikolaki yango ná fungola na yango. Atyaki yango na mapeka na ye mpe amataki na yango tii na ngomba oyo etalani na Hebrone.

4 Nsima na yango, alingaki mwasi moko na Lobwaku* ya Soreke, nkombo na ye Dalila.+ 5 Bongo bankolo ya Bafilistia bakendaki epai ya mwasi yango mpe balobaki na ye: “Kosá* ye+ mpe luká koyeba nini epesaka ye makasi mingi oyo azali na yango, mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, kokanga ye bansinga mpe kosukisa ye. Soki osali bongo, mokomoko na biso akopesa yo shekele ya palata 1 100.”

6 Na nsima Dalila alobaki na Samsone: “Nabondeli yo, yebisá ngai: Makasi mingi oyo ozali na yango eutaka wapi, mpe bakoki kokanga yo na eloko nini mpo básukisa yo?” 7 Samsone alobaki na ye: “Soki bakangi ngai na bansinga ya litimbo* nsambo ya sika oyo bakausi naino te, nakolɛmba mpenza mpe nakokóma lokola moto nyonso.” 8 Na yango, bankolo ya Bafilistia bayelaki mwasi yango bansinga ya litimbo nsambo ya sika, oyo bakausi naino te; mpe akangaki Samsone na yango. 9 Nzokande, bato babombanaki na shambrɛ na ye ya kati, mpe mwasi yango agangaki: “Samsone, Bafilistia bayei!” Bongo akataki bansinga ya litimbo yango, ndenge kaka nsinga ya lini ekatanaka na pɛtɛɛ nyonso ntango ezwi mɔtɔ.+ Mpe moto moko te ayebaki sekele ya makasi na ye.

10 Na nsima, Dalila alobaki na Samsone: “Talá! Osakani na ngai mpe okosi ngai. Sikoyo, nabondeli yo, yebisá ngai soki bakoki kokanga yo na eloko nini.” 11 Bongo Samsone alobaki na ye: “Soki bakangi ngai na bansinga ya sika oyo basalá na yango naino mosala te, nakolɛmba mpenza mpe nakokóma lokola moto nyonso.” 12 Na yango, Dalila azwaki bansinga ya sika, akangaki ye na yango mpe agangaki: “Samsone, Bafilistia bayei!” (Na ntango nyonso wana, bato babombanaki na shambrɛ ya kati.) Na mbala moko, akataki yango lokola nsinga ya elamba mpe elongwaki na mabɔkɔ na ye.+

13 Nsima na yango, Dalila alobaki na Samsone: “Tii sikoyo, ozali kaka kotyola ngai mpe kokosa ngai.+ Yebisá ngai soki bakoki kokanga yo na eloko nini.” Na yango, Samsone alobaki na ye: “Osengeli kozwa nsinga ya mosali-bilamba mpe kolita na yango nsuki nsambo oyo bakangá na motó na ngai.” 14 Na yango akangisaki nsuki ya Samsone na nzete ya mosali-bilamba mpe agangaki: “Samsone, Bafilistia bayei!” Bongo alamukaki na mpɔngi mpe abendaki nzete yango ná nsinga ya bilamba na nsuki na ye.

15 Sikoyo, Dalila alobaki na ye: “Ndenge nini okoki koloba: ‘Nalingaka yo,’+ nzokande motema na yo ezali epai na ngai te? Mbala misato mobimba osakani na ngai mpe oyebisi ngai te soki makasi mingi oyo ozali na yango eutaka wapi.”+ 16 Lokola, mokolo na mokolo, azalaki se kotungisa ye mpe kotya ye mbamba, Samsone* alɛmbaki nzoto mpe ayokaki mpasi lokola akufa.+ 17 Nsukansuka afungolelaki ye motema, mpe alobaki na ye: “Banda nabotamá,* razware eleká naino te na motó na ngai, mpo nazali Monaziri ya Nzambe.+ Soki bakati ngai nsuki, makasi na ngai ekosila, nakolɛmba mpenza mpe nakokóma lokola bato nyonso.”

18 Ntango Dalila amonaki ete afungoleli ye motema, na mbala moko abengisaki bankolo ya Bafilistia,+ mpe alobaki: “Mbala oyo bokoki koya, mpo afungoleli ngai motema na ye.” Bongo bankolo ya Bafilistia bayaki epai na ye, mpe bamemaki mbongo. 19 Alalisaki Samsone mpɔngi na mabɔlɔngɔ na ye. Na nsima, abengaki mobali moko mpe mobali yango akataki nsuki nsambo oyo bakangá na motó na ye. Nsima na yango mwasi yango abandaki komonela ye, mpo makasi ya Samsone ebandaki kosila ye. 20 Bongo agangaki: “Samsone, Bafilistia bayei!” Alamukaki na mpɔngi mpe alobaki: “Nakobima lokola na mbala ya liboso+ mpe nakokata nsinga.” Kasi, ayebaki te ete Yehova asilaki kotika ye. 21 Bongo Bafilistia bakangaki ye mpe batɔbɔlaki ye miso. Na nsima bakitaki na ye na Gaza mpe bakangaki ye na bikangeli mibale ya kwivre, mpe akómaki moniki-mbuma na bolɔkɔ. 22 Kasi nsuki na ye ebandaki kokola lisusu kaka na nsima ntango basilisaki kokata ye yango.+

23 Bankolo ya Bafilistia bayanganaki mpo na kosala fɛti mpe kopesa nzambe na bango Dagone+ mbeka moko monene, mpo bazalaki koloba ete: “Nzambe na biso apesi monguna na biso Samsone na lobɔkɔ na biso!” 24 Ntango bato yango bamonaki ye, basanzolaki nzambe na bango mpe balobaki: “Nzambe na biso apesi biso monguna na biso, moto oyo abebisaki mokili na biso+ mpe abomaki ebele ya bandeko na biso.”+

25 Lokola motema na bango etondaki na esengo, balobaki: “Bóbenga Samsone aya kosɛkisa biso mwa moke.” Na yango, bazwaki Samsone na bolɔkɔ mpo asakana liboso na bango; mpe batɛlɛmisaki ye na katikati ya makonzí. 26 Na nsima, Samsone alobaki na mwana mobali oyo asimbaki ye na lobɔkɔ: “Simbisá ngai makonzí oyo esimbi ndako mpo nayekama.” 27 (Nzokande, ndako yango etondaki mpenza na mibali ná basi. Bankolo nyonso ya Bafilistia bazalaki wana, mpe mibali ná basi soki 3 000 bazalaki likoló ya nsamba, mpe bazalaki kotala ndenge Samsone azalaki kosɛkisa bato.)

28 Bongo Samsone+ abelelaki Yehova, alobaki: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kanisá ngai, nabondeli yo, mpe pesá ngai makasi,+ ata mpo na mbala oyo, nabondeli yo, Ee Nzambe na ngai, mpe tiká nazongisela Bafilistia mabe ata mpo na moko ya miso na ngai mibale.”+

29 Na nsima, Samsone asimbaki makasi makonzí mibale ya katikati oyo esimbaki mpenza ndako yango; asimbaki moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi. 30 Samsone agangaki: “Tiká nakufa* elongo na Bafilistia!” Bongo atindikaki makonzí yango na makasi na ye nyonso, mpe ndako yango ekwelaki bankolo ya Bafilistia mpe bato nyonso oyo bazalaki na kati na yango.+ Na ndenge yango, abomaki Bafilistia mingi ntango akufaki koleka baoyo abomaki ntango azalaki na bomoi.+

31 Na nsima, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso ya libota ya tata na ye bakitaki mpo na kozwa ebembe na ye. Bamataki mpe bakundaki ye na katikati ya Zora+ ná Eshetaole, na lilita ya tata na ye, Manoa.+ Samsone asambisaki Yisraele mbula 20.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto