Yobo
Na mibali oyo bazali baleki na ngai,
Baoyo nalingaki koboya
Kotya batata na bango esika moko na bambwa oyo ezalaki kobatela etonga na ngai.
2 Makasi ya mabɔkɔ na bango ezalaki na ntina nini epai na ngai?
Makasi na bango esili.
3 Balɛmbá mpo na mpasi mpe nzala;
Bazali kolyalya mabele oyo ekauká
Oyo esilaki kobebisama mpe etikalaki mpamba.
4 Bazalaki kobuka matiti ya mungwa pene na banzete ya mike;
Bilei na bango ezali mosisa ya banzete ya retama.
7 Uta na banzete ya mike, bazalaki koganga
Na nse ya matiti ya nsendensende bazalaki kokangana liboke.
12 Na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bazali kotɛlɛma lokola lisangá ya bato mabe;
Basali ete nakima
Mpe bakangi nzela na ngai mpo namona mpasi.
13 Bazali kobuka balabala na ngai nyonso;
Bazali kobakisa mpenza mpasi na ngai,+
Moto moko te apekisi* bango.
14 Bazali kokɔta lokola nde na lidusu moko monene ya efelo;
Bazali kokende na esika oyo ebebisami.
15 Nsɔmɔ ekangi ngai;
Babengani lokumu na ngai lokola mopɛpɛ,
Mpe lobiko na ngai elimwe lokola lipata.
19 Nzambe abwaki ngai na kati ya pɔtɔpɔtɔ;
Nakómi lokola putulu ya mabele mpe putulu ya mɔtɔ.
20 Nazali kobelela yo mpo na koluka lisalisi, kasi ozali koyanola te;+
Natɛlɛmi, kasi otali ngai kaka mpamba.
23 Mpo nayebi ete okomema ngai na liwa,
Na ndako epai bato nyonso ya bomoi bakoyangana.
24 Kasi moto moko te akobɛta moto oyo abukani*+
Wana azali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi na ntango ya likama.
25 Nalelá te mpo na baoyo balekisaki bantango ya mpasi?*
Nayoká* mawa te mpo na mobola?+
26 Nazalaki kozela bolamu, kasi mabe nde eyaki;
Nazalaki kozela pole, kasi molili nde eyaki.
27 Motungisi na kati na ngai ezalaki kosila te;
Mikolo ya mpasi ekómelaki ngai.
28 Nayengiyengi, mawamawa;+ pole ya moi ezali te.
Na liyangani, natɛlɛmi mpe nabeleli mpo na kosɛnga lisalisi.
31 Nzɛnzɛ na ngai ezali kosalelama kaka mpo na kolela,
Mpe piololo na ngai mpo na makɛlɛlɛ ya kolela.