Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Kobotama ya Yisaka (1-7)

      • Yishimaele asɛki Yisaka (8, 9)

      • Babengani Agare ná Yishimaele (10-21)

      • Abrahama asali kondimana ná Abimeleke (22-34)

Ebandeli 21:1

Mitindami

  • +Eb 18:10

Ebandeli 21:2

Mitindami

  • +Ebr 11:11
  • +Eb 17:21; 18:10, 14; Ro 9:9

Ebandeli 21:3

Mitindami

  • +Eb 17:19; Yos 24:3; Ro 9:7

Ebandeli 21:4

Mitindami

  • +Eb 17:12; Le 12:3; Mis 7:8

Ebandeli 21:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “akosɛka ngai.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 nk. 14-15

Ebandeli 21:9

Mitindami

  • +Eb 16:4, 15
  • +Eb 15:13; Ga 4:22, 29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2001, lok. 26

    “Makomami nyonso,” lok. 18

Ebandeli 21:10

Mitindami

  • +Eb 15:2, 4; Ga 4:30

Ebandeli 21:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “Yishimaele.”

Mitindami

  • +Eb 17:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 lok. 15

Ebandeli 21:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mongongo na ye.”

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 17:19; Ro 9:7; Ebr 11:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2006, nk. 6-7

Ebandeli 21:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Ga 4:22
  • +Eb 16:9, 10; 17:20; 25:12, 16

Ebandeli 21:14

Mitindami

  • +Eb 25:5, 6
  • +Eb 22:19

Ebandeli 21:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “likula.”

Ebandeli 21:17

Mitindami

  • +Eb 16:11
  • +Eb 16:7, 8

Ebandeli 21:18

Mitindami

  • +1Nt 1:29-31

Ebandeli 21:20

Mitindami

  • +Eb 16:16

Ebandeli 21:21

Mitindami

  • +Mit 10:12

Ebandeli 21:22

Mitindami

  • +Eb 20:17, 18; 26:26, 28

Ebandeli 21:23

Mitindami

  • +Eb 20:14, 15

Ebandeli 21:25

Mitindami

  • +Eb 26:15, 20

Ebandeli 21:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu elimboli, “libulu ya ndai” to “libulu ya nsambo.”

Mitindami

  • +Eb 26:32, 33

Ebandeli 21:32

Mitindami

  • +Eb 26:26, 28
  • +Eb 10:13, 14; 26:1

Ebandeli 21:33

Mitindami

  • +Eb 12:8, 9; 26:25
  • +Nz 90:2; Yis 40:28; 1Ti 1:17

Ebandeli 21:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “afandaki mopaya.”

  • *

    Lil., “mikolo ebele.”

Mitindami

  • +Ebr 11:8, 9

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 21:1Eb 18:10
Eba. 21:2Ebr 11:11
Eba. 21:2Eb 17:21; 18:10, 14; Ro 9:9
Eba. 21:3Eb 17:19; Yos 24:3; Ro 9:7
Eba. 21:4Eb 17:12; Le 12:3; Mis 7:8
Eba. 21:9Eb 16:4, 15
Eba. 21:9Eb 15:13; Ga 4:22, 29
Eba. 21:10Eb 15:2, 4; Ga 4:30
Eba. 21:11Eb 17:18
Eba. 21:12Eb 17:19; Ro 9:7; Ebr 11:18
Eba. 21:13Ga 4:22
Eba. 21:13Eb 16:9, 10; 17:20; 25:12, 16
Eba. 21:14Eb 25:5, 6
Eba. 21:14Eb 22:19
Eba. 21:17Eb 16:11
Eba. 21:17Eb 16:7, 8
Eba. 21:181Nt 1:29-31
Eba. 21:20Eb 16:16
Eba. 21:21Mit 10:12
Eba. 21:22Eb 20:17, 18; 26:26, 28
Eba. 21:23Eb 20:14, 15
Eba. 21:25Eb 26:15, 20
Eba. 21:31Eb 26:32, 33
Eba. 21:32Eb 26:26, 28
Eba. 21:32Eb 10:13, 14; 26:1
Eba. 21:33Eb 12:8, 9; 26:25
Eba. 21:33Nz 90:2; Yis 40:28; 1Ti 1:17
Eba. 21:34Ebr 11:8, 9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 21:1-34

Ebandeli

21 Yehova atyelaki Sara likebi kaka ndenge alobaki, mpe Yehova asalelaki Sara makambo oyo alakaki.+ 2 Na yango, Sara azwaki zemi+ mpe na nsima, abotelaki Abrahama mwana mobali na bobange na ye, na ntango oyo etyamaki, ndenge Nzambe apesaki ye elaka.+ 3 Abrahama apesaki mwana yango nkombo Yisaka, mwana oyo Sara abotelaki ye.+ 4 Mpe Abrahama akataki Yisaka ngenga ntango akokisaki mikolo mwambe, kaka ndenge Nzambe apesaki ye etinda.+ 5 Abrahama azalaki na mbula 100 ntango mwana na ye Yisaka abotamaki. 6 Na nsima, Sara alobaki ete: “Nzambe apesi ngai likambo ya kosɛka; moto nyonso oyo akoyoka yango akosɛka elongo na ngai.”* 7 Mpe alobaki lisusu ete: “Nani akokaki koloba na Abrahama ete: ‘Sara akomɛlisa mpenza bana mabɛlɛ’? Kasi naboteli ye mwana mobali na bobange na ye.”

8 Sikoyo mwana yango akolaki mpe batikaki komɛlisa ye mabɛlɛ. Abrahama asalaki fɛti monene mokolo oyo batikaki komɛlisa Yisaka mabɛlɛ. 9 Kasi Sara azalaki komona ndenge mwana ya Agare+ moto ya Ezipito, mwana oyo abotelaki Abrahama, azalaki kosɛka Yisaka.+ 10 Bongo alobaki na Abrahama ete: “Benganá moombo mwasi oyo ná mwana na ye, mpo mwana ya moombo oyo akozwa te libula elongo na mwana na ngai, elongo na Yisaka!”+ 11 Kasi likambo oyo alobaki mpo na mwana na ye* esepelisaki Abrahama+ ata moke te. 12 Na nsima, Nzambe alobaki na Abrahama ete: “Koyoka nkanda te na oyo Sara azali koloba na yo mpo na mwana wana mpe mpo na moombo na yo. Yoká ye,* mpo oyo ekobengama libota* na yo ekoya na nzela ya Yisaka.+ 13 Mpo na mwana ya moombo mwasi+ oyo, nakokómisa ye+ mpe ekólo, mpo azali libota* na yo.”

14 Bongo Abrahama alamukaki ntɔngɔntɔngɔ, azwaki mampa mpe molangi ya mai ya mposo ya nyama mpe apesaki yango Agare. Atyaki yango na lipeka na ye mpe atikaki ye akende ná mwana.+ Bongo akendaki mpe azalaki koyengayenga na esobe ya Beere-sheba.+ 15 Nsukansuka, mai esilaki na molangi ya mposo ya nyama, mpe abwakaki mwana na nse ya mwa banzete ya mikemike. 16 Na nsima, akendaki kofanda ye moko, mwa mosika, na ntaka ya kobwaka mbanzi,* mpo alobaki ete: “Namona te ntango mwana akokufa.” Bongo afandaki mwa mosika mpe abandaki koganga na kolela.

17 Na yango, Nzambe ayokaki mongongo ya mwana,+ mpe anzelu ya Nzambe abengaki Agare longwa na likoló mpe alobaki na ye+ ete: “Agare, likambo nini? Kobanga te, mpo Nzambe ayoki mongongo ya mwana esika azali. 18 Tɛlɛmá, tombolá mwana mpe simbá ye na lobɔkɔ, mpo nakokómisa ye ekólo moko monene.”+ 19 Na nsima, Nzambe afungolaki ye miso mpe amonaki libulu moko ya mai, atondisaki mai na molangi ya mposo ya nyama mpe apesaki mwana mai. 20 Nzambe azalaki elongo na mwana+ yango mpe akolaki. Afandaki na esobe mpe akómaki mobwaki-mbanzi. 21 Abandaki kofanda na esobe ya Parane,+ mpe mama na ye azwelaki ye mwasi na mokili ya Ezipito.

22 Na ntango yango, Abimeleke azalaki elongo na Pikole mokonzi ya basoda na ye; mpe alobaki na Abrahama ete: “Nzambe azali elongo na yo na likambo nyonso oyo ozali kosala.+ 23 Sikoyo lapelá ngai ndai na nkombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, ezala libota na ngai mpe bana oyo bakoya nsima na ngai, mpe ete kaka ndenge namoniselaki yo bolingo ya sembo, yo mpe okomonisela ngai bolingo ya sembo ná mokili oyo ozali kofanda.”+ 24 Bongo Abrahama alobaki ete: “Nalapi ndai.”

25 Kasi Abrahama ayebisaki Abimeleke ete, asepelaki te ndenge basaleli ya Abimeleke babɔtɔlaki libulu ya mai na nko.+ 26 Abimeleke alobaki ete: “Nayebi te nani asalaki likambo yango; oyebisaki ngai yango te, mpe nayoki yango kaka lelo.” 27 Na yango, Abrahama azwaki bampate ná bangɔmbɛ mpe apesaki yango Abimeleke, mpe bango mibale basalaki kondimana. 28 Ntango Abrahama atyaki pembeni bana-mpate nsambo ya basi ya etonga, 29 Abimeleke alobaki lisusu na Abrahama ete: “Mpo na nini otye bana-mpate nsambo ya basi pembeni?” 30 Bongo alobaki ete: “Osengeli kozwa na lobɔkɔ na ngai bana-mpate nsambo oyo ya basi mpo ezala elembo oyo ekomonisa ete ngai nde natimolaki libulu oyo.” 31 Yango wana abengaki esika yango Beere-sheba,*+ mpo bango mibale balapaki ndai kuna. 32 Na yango, basalaki kondimana+ na Beere-sheba, na nsima Abimeleke atɛlɛmaki elongo na Pikole mokonzi ya basoda na ye, mpe bazongaki na mokili ya Bafilistia.+ 33 Nsima na yango, alonaki nzete ya tamarisi na Beere-sheba, mpe kuna abelelaki nkombo ya Yehova,+ Nzambe ya seko.+ 34 Mpe Abrahama afandaki* na mokili ya Bafilistia ntango molai.*+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto