Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Ebenga oyo ezali mosika mpe efandi nyɛɛ.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango Bafilistia bakangaki ye na Gate.+
56 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, mpo bato bazali kobundisa* ngai.
Mokolo mobimba bazali kaka kobundisa ngai mpe konyokola ngai.
2 Banguna na ngai bazali koluka koswa ngai mokolo mobimba;
Mingi bazali kobundisa ngai na lofundo nyonso.
3 Ntango nazali kobanga,+ natyelaka yo motema.+
4 Natyeli Nzambe motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.
Natyeli Nzambe motema; nakobanga te.
Moto* akoki kosala ngai nini?+
6 Bazali kobunda mpe bazali komibomba;
Bazali kolandela likambo nyonso oyo nazali kosala,+
Bazali kokanisa koboma ngai.+
7 Boyá bango mpo na misala na bango ya mabe.
Ee Nzambe, na nkanda na yo, pesá bikólo etumbu.+
8 Oyebi malamu matambe na ngai nyonso ntango nazali koyengayenga.+
Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.+
Yango ekomami te na kati ya buku na yo?+
9 Banguna na ngai bakozonga nsima na mokolo oyo nakobenga mpo na koluka lisalisi.+
Nazali kondima likambo oyo: Nzambe azali na ngámbo na ngai.+
10 Natyelaka Nzambe motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.
Natyelaka Yehova motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.
Moto akoki kosala ngai nini?+