Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Davidi alei mampa ya kolakisa na Nobe (1-9)

      • Davidi amikómisi lokola moto ya ligboma na Gate (10-15)

1 Samwele 21:1

Mitindami

  • +1Sa 22:9, 19
  • +1Sa 18:13

1 Samwele 21:4

Mitindami

  • +Kob 25:30; Le 24:5, 9; Mt 12:3, 4
  • +Kob 19:15; Le 15:16; 2Sa 11:11

1 Samwele 21:5

Mitindami

  • +Le 15:18

1 Samwele 21:6

Mitindami

  • +Le 24:7-9; Mr 2:25, 26; Lk 6:3, 4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Yesu azali nzela, lok. 76

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 30

    1/9/2002, lok. 18

1 Samwele 21:7

Mitindami

  • +1Sa 22:9; Nz 52:maloba ya ebandeli ya loyembo
  • +Eb 36:1

1 Samwele 21:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku patatalu.”

Mitindami

  • +1Sa 17:51, 54
  • +1Sa 17:2, 50
  • +Kob 28:6

1 Samwele 21:10

Mitindami

  • +1Sa 27:1
  • +Yos 11:22; 1Sa 5:8; 17:4; 27:2; Nz 56:maloba ya ebandeli ya loyembo

1 Samwele 21:11

Mitindami

  • +1Sa 18:6-8; 29:4, 5

1 Samwele 21:12

Mitindami

  • +Nz 56:3, 6

1 Samwele 21:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na lobɔkɔ na bango.”

Mitindami

  • +Nz 34:maloba ya ebandeli ya loyembo

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 24

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 21:11Sa 22:9, 19
1 Sa. 21:11Sa 18:13
1 Sa. 21:4Kob 25:30; Le 24:5, 9; Mt 12:3, 4
1 Sa. 21:4Kob 19:15; Le 15:16; 2Sa 11:11
1 Sa. 21:5Le 15:18
1 Sa. 21:6Le 24:7-9; Mr 2:25, 26; Lk 6:3, 4
1 Sa. 21:71Sa 22:9; Nz 52:maloba ya ebandeli ya loyembo
1 Sa. 21:7Eb 36:1
1 Sa. 21:91Sa 17:51, 54
1 Sa. 21:91Sa 17:2, 50
1 Sa. 21:9Kob 28:6
1 Sa. 21:101Sa 27:1
1 Sa. 21:10Yos 11:22; 1Sa 5:8; 17:4; 27:2; Nz 56:maloba ya ebandeli ya loyembo
1 Sa. 21:111Sa 18:6-8; 29:4, 5
1 Sa. 21:12Nz 56:3, 6
1 Sa. 21:13Nz 34:maloba ya ebandeli ya loyembo
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 21:1-15

Mokanda ya liboso ya Samwele

21 Na nsima, Davidi akómaki na Nobe,+ epai ya nganga-nzambe Ahimeleke. Ahimeleke abandaki kolɛnga ntango akutanaki na Davidi, mpe alobaki na ye: “Mpo na nini ozali yo moko? Mpo na nini ata moto moko te azali elongo na yo?”+ 2 Davidi ayanolaki nganga-nzambe Ahimeleke boye: “Mokonzi atindi ngai nasala likambo moko, kasi alobaki na ngai: ‘Moto moko te ayeba likambo oyo nazali kotinda yo osala mpe mitindo oyo napesi yo.’ Nayokanaki na bilenge mibali na ngai ete tókutana na esika moko boye. 3 Sikoyo, soki ozali na mampa mitano to na eloko mosusu nyonso ya kolya oyo ekoki komonana, pesá ngai yango.” 4 Kasi nganga-nzambe ayanolaki Davidi ete: “Mampa ya mpamba ezali te, nazali kaka na mampa mosantu.+ Nakoki kopesa yo yango kaka soki bilenge mibali yango basangisaki nzoto na basi te.”+ 5 Davidi ayanolaki nganga-nzambe ete: “Tosangisi nzoto na basi te, kaka ndenge ezalaki liboso na mabaku oyo nabimaki mpo na etumba.+ Bilenge mibali yango bazalaka pɛto, ata ntango batindami mpo na mosala oyo ezali mosantu te. Bongo tokoloba nini na mokolo lokola ya lelo!” 6 Na yango, nganga-nzambe apesaki ye mampa mosantu+ mpo mampa mosusu ezalaki te, longola kaka mampa ya kolakisa oyo balongolaki liboso ya Yehova mpo na kotya mampa ya sika na mokolo oyo balongolaki yango.

7 Nzokande na mokolo yango, mosaleli moko ya Saulo azalaki wana, likambo moko ekangaki ye liboso ya Yehova. Nkombo na ye ezalaki Doege+ moto ya Edome,+ mokonzi ya babateli ya mpate ya Saulo.

8 Na nsima, Davidi alobaki na Ahimeleke boye: “Ozali na likɔnga to mopanga awa? Nazwaki ata mopanga to bibundeli na ngai te, mpo mosala oyo mokonzi apesi ngai esengelaki kosalema nokinoki.” 9 Na yango, nganga-nzambe alobaki ete: “Mopanga ya Goliate Mofilistia,+ oyo obomaki na Lobwaku* ya Ela,+ ezali awa; elíngami na elamba moko, nsima ya efode.+ Soki olingi kozwa yango, zwá yango, mpo kaka yango nde ezali awa.” Davidi alobaki: “Ekokani na mosusu te. Pesá ngai yango.”

10 Mokolo yango, Davidi atɛlɛmaki mpe akobaki kokima+ Saulo, mpe nsukansuka akómaki epai ya Akishe, mokonzi ya Gate.+ 11 Basaleli ya Akishe balobaki na ye ete: “Oyo ezali Davidi, mokonzi ya Yisraele, boye te? Ezali ye te moto oyo bazalaki kobinela mpe koyembela ete:

‘Saulo abomi bankóto ya banguna,

Mpe Davidi abomi bankóto zomi zomi’?”+

12 Davidi azwaki maloba yango na lisɛki te, mpe akómaki kobanga Akishe mokonzi ya Gate mingi.+ 13 Na yango akosaki ete azali na ligboma+ liboso na bango mpe asalaki makambo lokola moto ya ligboma ntango azalaki na kati na bango.* Azalaki kosala bilembo na bizipeli ya porte ya engumba mpe kotangisa nsoi na mandefu na ye. 14 Nsukansuka, Akishe alobaki na basaleli na ye ete: “Bozali komona te ete moto oyo azali na ligboma? Mpo na nini boyei na ye epai na ngai? 15 Nazangi nde bato ya magboma, mpo bómemela ngai mosusu? Moto oyo asengeli kokɔta na ndako na ngai te!”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto