Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakorinti 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakorinti

      • Makebisi ya nsuka mpe malendisi (1-14)

        • “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima” (5)

        • Bóndima kosembolama; bókanisaka ndenge moko (11)

2 Bakorinti 13:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Na monɔkɔ.”

Mitindami

  • +Mib 19:15; Mt 18:16

2 Bakorinti 13:4

Mitindami

  • +Ro 6:4; 1Pe 3:18
  • +2Ti 2:11, 12
  • +1Ko 6:14

2 Bakorinti 13:5

Mitindami

  • +1Ko 11:28; Ga 6:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2018, lok. 13

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/2014, lok. 11

    15/3/2014, lok. 13

    15/7/2008, lok. 28

    15/7/2005, nk. 21-25

    15/2/2005, lok. 13

    15/9/2002, lok. 18

    15/4/1999, nk. 19-20

    15/1/1998, lok. 14

2 Bakorinti 13:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1997, lok. 9

2 Bakorinti 13:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/1990, lok. 29

2 Bakorinti 13:10

Mitindami

  • +1Ko 4:21

2 Bakorinti 13:11

Mitindami

  • +2Ko 1:3, 4
  • +Flp 2:2
  • +1Te 5:13; Yk 3:17; 1Pe 3:11; 2Pe 3:14
  • +1Ko 14:33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    11/2020, nk. 18-23

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2008, lok. 5

    1/6/1996, lok. 25

    1/3/1991, nk. 21-22

    1/11/1990, lok. 29

2 Bakorinti 13:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Trinité?, lok. 23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Ko. 13:1Mib 19:15; Mt 18:16
2 Ko. 13:4Ro 6:4; 1Pe 3:18
2 Ko. 13:42Ti 2:11, 12
2 Ko. 13:41Ko 6:14
2 Ko. 13:51Ko 11:28; Ga 6:4
2 Ko. 13:101Ko 4:21
2 Ko. 13:112Ko 1:3, 4
2 Ko. 13:11Flp 2:2
2 Ko. 13:111Te 5:13; Yk 3:17; 1Pe 3:11; 2Pe 3:14
2 Ko. 13:111Ko 14:33
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakorinti 13:1-14

Mokanda ya mibale epai ya Bakorinti

13 Oyo ezali mbala ya misato nazali koya epai na bino. “Na maloba* ya batatoli mibale to misato nde likambo nyonso esengeli kondimama.”+ 2 Atako sikoyo nazali kuna te, ezali lokola nde nazali kuna mpo na mbala ya mibale, mpe nazali kokebisa libelalibela baoyo basalaki masumu liboso mpe na bamosusu nyonso oyo batikali, ete soki mpenza nayei lisusu, moto moko te akokoka kokima disiplini, 3 lokola bozali koluka elembeteli oyo emonisi ete Kristo oyo azali moto ya bolɛmbu te epai na bino, kasi azali moto ya nguya na kati na bino, azali mpenza koloba na nzela na ngai. 4 Ɛɛ, ezali solo ete, abakamaki na nzete mpo na bolɛmbu, kasi azali na bomoi mpo na nguya ya Nzambe.+ Ezali mpe solo ete tozali bato ya bolɛmbu ndenge ye azalaki, kasi tokozala na bomoi elongo na ye+ mpo na nguya ya Nzambe oyo ezali kosala na kati na bino.+

5 Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima; bókoba kotala soki bozali ndenge nini.+ Bozali koyeba te ete Yesu Kristo azali na bomoko elongo na bino? Loba nde soki bozali bato oyo baboyami. 6 Nazali mpenza kolikya ete bokoyeba ete biso tozali te bato oyo baboyami.

7 Nzokande tozali kobondela Nzambe ete bósala likambo moko te ya mabe. Ezali te mpo tolingi ete tózala bato oyo bandimami, kasi tolingi nde ete bósalaka makambo oyo ezali malamu mingi, ata soki biso tozali komonana lokola bato oyo baboyami. 8 Mpo tokoki kosala eloko moko te mpo na kotɛmɛla solo, kasi kaka mpo na kosimba solo. 9 Ya solo mpenza tosepelaka ntango nyonso oyo biso tozali bato ya bolɛmbu, kasi bino bozali bato ya nguya. Mpe tozali kobondela mpo na likambo oyo: bósembolama. 10 Yango wana nakomeli bino makambo oyo ntango nazali kuna te, mpo ntango nakozala kuna, nasalela na makasi te bokonzi oyo Nkolo apesá ngai,+ kasi nasalela yango nde mpo na kotonga kasi kobuka te.

11 Bandeko, mpo na kosukisa, bókoba kosepela, kosembolama, kobɔndisama,+ kokanisa ndenge moko,+ kofanda na kimya;+ mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya+ akozala na bino. 12 Bópesana mbote na lipwɛpwɛ mosantu. 13 Basantu nyonso batindeli bino mbote.

14 Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo, bolingo ya Nzambe mpe mapamboli oyo bozali kozwa elongo na nzela ya elimo santu ezala na bino nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto