Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 36
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Esakweli mpo na bangomba ya Yisraele (1-15)

      • Kozongisama ya Yisraele (16-38)

        • ‘Nakosantisa nkombo na ngai monene’ (23)

        • “Lokola elanga ya Edene” (35)

Ezekiele 36:2

Mitindami

  • +Yir 49:1; Ezk 35:10

Ezekiele 36:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baoyo batikali.”

Mitindami

  • +Mib 28:37; 1Ba 9:7; Bil 2:15; Da 9:16

Ezekiele 36:4

Mitindami

  • +Yir 25:9
  • +Nz 79:4; Ezk 34:28

Ezekiele 36:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lityo na kati ya molimo.”

Mitindami

  • +Sef 3:8
  • +Ob 12
  • +Ezk 25:12, 13; 35:10, 11; Am 1:11

Ezekiele 36:6

Mitindami

  • +Nz 74:10; 123:4

Ezekiele 36:7

Mitindami

  • +Yir 25:9; 49:17

Ezekiele 36:8

Mitindami

  • +Yis 44:23; 51:3; Ezk 36:30

Ezekiele 36:10

Mitindami

  • +Zek 8:4
  • +Yis 51:3; Yir 30:18, 19; Am 9:14

Ezekiele 36:11

Mitindami

  • +Yir 31:27
  • +Yis 54:7; Yir 30:18
  • +Hag 2:9
  • +Hos 2:20; Yoe 3:17

Ezekiele 36:12

Mitindami

  • +Yir 32:44; Ob 17
  • +Yis 65:23

Ezekiele 36:15

Mitindami

  • +Yis 54:4; 60:14; Mik 7:8; Sef 2:8; 3:19

Ezekiele 36:17

Mitindami

  • +Nz 106:38; Yis 24:5; Yir 2:7; 16:18
  • +Le 12:2; Yis 64:6

Ezekiele 36:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +Yis 42:24, 25
  • +Ezk 23:37

Ezekiele 36:19

Mitindami

  • +Le 26:38; Ezk 22:15

Ezekiele 36:20

Mitindami

  • +Yis 52:5; Ro 2:24

Ezekiele 36:21

Mitindami

  • +Nz 74:18; Yis 48:9; Ezk 20:9

Ezekiele 36:22

Mitindami

  • +Nz 106:7, 8

Ezekiele 36:23

Mitindami

  • +Yis 5:16; Ezk 20:41
  • +Nz 102:13-15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2007, lok. 11

    “Makomami nyonso,” lok. 137

Ezekiele 36:24

Mitindami

  • +Mib 30:3; Yis 43:5; Yir 23:3; Ezk 34:13; Hos 1:11

Ezekiele 36:25

Mitindami

  • +Mit 19:13; Nz 51:7
  • +Yis 4:4; Yir 33:8
  • +Ezk 6:4

Ezekiele 36:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “báyoka toli ya Nzambe.”

Mitindami

  • +Yir 32:39
  • +Nz 51:10; Ezk 11:19, 20
  • +Zek 7:12

Ezekiele 36:27

Mitindami

  • +Yir 31:33

Ezekiele 36:28

Mitindami

  • +Yir 30:22; Ezk 37:25, 27

Ezekiele 36:29

Mitindami

  • +Ezk 34:29

Ezekiele 36:30

Mitindami

  • +Ezk 34:27

Ezekiele 36:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bokomiyokela mpii.”

Mitindami

  • +Ezr 9:6; Ne 9:26; Yir 31:18; Ezk 6:9

Ezekiele 36:32

Mitindami

  • +Mib 9:5; Da 9:19

Ezekiele 36:33

Mitindami

  • +Zek 8:8
  • +Yis 58:12; Yir 33:10, 11; Am 9:14

Ezekiele 36:35

Mitindami

  • +Eb 2:8
  • +Yis 51:3

Ezekiele 36:36

Mitindami

  • +Ezk 28:26; 37:14

Ezekiele 36:38

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “lokola mbeka ya bitonga ya bampate na Yerusaleme.”

Mitindami

  • +Kob 23:17
  • +Yir 30:18, 19

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 36:2Yir 49:1; Ezk 35:10
Ezk. 36:3Mib 28:37; 1Ba 9:7; Bil 2:15; Da 9:16
Ezk. 36:4Yir 25:9
Ezk. 36:4Nz 79:4; Ezk 34:28
Ezk. 36:5Sef 3:8
Ezk. 36:5Ob 12
Ezk. 36:5Ezk 25:12, 13; 35:10, 11; Am 1:11
Ezk. 36:6Nz 74:10; 123:4
Ezk. 36:7Yir 25:9; 49:17
Ezk. 36:8Yis 44:23; 51:3; Ezk 36:30
Ezk. 36:10Zek 8:4
Ezk. 36:10Yis 51:3; Yir 30:18, 19; Am 9:14
Ezk. 36:11Yir 31:27
Ezk. 36:11Yis 54:7; Yir 30:18
Ezk. 36:11Hag 2:9
Ezk. 36:11Hos 2:20; Yoe 3:17
Ezk. 36:12Yir 32:44; Ob 17
Ezk. 36:12Yis 65:23
Ezk. 36:15Yis 54:4; 60:14; Mik 7:8; Sef 2:8; 3:19
Ezk. 36:17Nz 106:38; Yis 24:5; Yir 2:7; 16:18
Ezk. 36:17Le 12:2; Yis 64:6
Ezk. 36:18Yis 42:24, 25
Ezk. 36:18Ezk 23:37
Ezk. 36:19Le 26:38; Ezk 22:15
Ezk. 36:20Yis 52:5; Ro 2:24
Ezk. 36:21Nz 74:18; Yis 48:9; Ezk 20:9
Ezk. 36:22Nz 106:7, 8
Ezk. 36:23Yis 5:16; Ezk 20:41
Ezk. 36:23Nz 102:13-15
Ezk. 36:24Mib 30:3; Yis 43:5; Yir 23:3; Ezk 34:13; Hos 1:11
Ezk. 36:25Mit 19:13; Nz 51:7
Ezk. 36:25Yis 4:4; Yir 33:8
Ezk. 36:25Ezk 6:4
Ezk. 36:26Yir 32:39
Ezk. 36:26Nz 51:10; Ezk 11:19, 20
Ezk. 36:26Zek 7:12
Ezk. 36:27Yir 31:33
Ezk. 36:28Yir 30:22; Ezk 37:25, 27
Ezk. 36:29Ezk 34:29
Ezk. 36:30Ezk 34:27
Ezk. 36:31Ezr 9:6; Ne 9:26; Yir 31:18; Ezk 6:9
Ezk. 36:32Mib 9:5; Da 9:19
Ezk. 36:33Zek 8:8
Ezk. 36:33Yis 58:12; Yir 33:10, 11; Am 9:14
Ezk. 36:35Eb 2:8
Ezk. 36:35Yis 51:3
Ezk. 36:36Ezk 28:26; 37:14
Ezk. 36:38Kob 23:17
Ezk. 36:38Yir 30:18, 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 36:1-38

Ezekiele

36 “Nde yo, mwana ya moto, sakolá mpo na bangomba ya Yisraele, mpe lobá boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova. 2 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Banguna balobi mpo na bino ete: ‘Aha! Ata bisika oyo etombwaná ya kala ekómi eloko na biso!’”’+

3 “Na yango sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola batiki bino mpamba mpe babundisi bino bipai nyonso, mpo bókóma eloko ya baoyo babiki* uta na kati ya bikólo, bato bazali kaka koloba mpo na bino mpe koloba lokuta mpo na bino,+ 4 na yango, Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku ná bisika oyo ebebisamá mpe etikalá mpamba,+ mpe na bingumba oyo esundolamá, oyo ekómi eloko ya kopunza mpe ya kosɛka epai ya baoyo babiki na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga;+ 5 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bango boye: ‘Na mɔtɔ ya molende na ngai,+ nakopesa etumbu na baoyo babiki na bikólo mpe na Edome mobimba, baoyo na kosepela makasi mpe na lityo*+ bazwi mokili na ngai mpo ezala eloko na bango, mpo na kozwa bisika na yango oyo bibwɛlɛ elyaka matiti mpe mpo na kopunza yango.’”’+

6 “Na yango, sakolá mpo na mokili ya Yisraele, mpe lobá na bangomba mpe na bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Nakoloba na molende na ngai mpe na nkanda makasi na ngai, mpo bomemi nde nsɔni oyo bikólo eyokisi bino.”’+

7 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai moko natomboli lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai ete bikólo ya zingazinga ekomema nsɔni na yango moko.+ 8 Kasi bino, Ee bangomba ya Yisraele, bokobimisa bitape mpe bokobota mbuma mpo na bato na ngai Yisraele,+ mpo etikali moke bázonga. 9 Mpo nazali elongo na bino, mpe nakobaluka epai na bino, bokotimolama mpe mboto ekolonama na kati na bino. 10 Nakokómisa bino ebele, bato nyonso ya Yisraele, ɛɛ bango nyonso. Bato bakofanda na bingumba+ mpe bisika oyo ebebisamá ekotongama lisusu.+ 11 Ya solo, nakokómisa bino ná bibwɛlɛ na bino ebele,+ bakokóma ebele mpe bakobota, nakosala ete bózala ebele ndenge bozalaki liboso,+ mpe nakosala ete bózala malamu mingi koleka ndenge bozalaki kala;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 12 Nakosala ete bato, bato na ngai Yisraele, bátambola likoló na bino, mpe bakozwa bino mpo bózala eloko na bango,+ bokokóma libula na bango, mpe bokozangisa bango bana lisusu ata moke te.’”+

13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bazali koloba na yo ete: “Ozali mokili oyo elyaka bato, mpe oyo ezangisaka bikólo na yango bana,”’ 14 ‘na yango, okolya bato lisusu te mpe okozangisa bikólo na yo bana lisusu te,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 15 ‘Nakotika te ete bikólo efinga yo lisusu, to bato bátumola yo+ mpe okobɛtisa bikólo na yo libaku lisusu te,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

16 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 17 “Mwana ya moto, ntango bato ya Yisraele bazalaki kofanda na mokili na bango, bakómisaki yango mbindo na etamboli na bango mpe na misala na bango.+ Epai na ngai etamboli na bango ezalaki lokola mbindo ya mwasi na ntango azali komona sanza.+ 18 Bongo nasopelaki bango nkanda makasi na ngai mpo na makila oyo basopaki na mokili,+ mpe mpo bakómisaki mokili mbindo na bikeko na bango ya bosɔtɔ.*+ 19 Bongo napalanganisaki bango na kati ya bikólo mpe napanzaki bango na mikili.+ Nasambisaki bango na kolanda etamboli na bango mpe misala na bango. 20 Kasi ntango bakómaki na bikólo yango, bato bakómisaki nkombo na ngai mosantu eloko mpamba+ na ndenge bazalaki koloba mpo na bango ete: ‘Oyo nde bato ya Yehova, kasi basengelaki kotika mokili na ye.’ 21 Nakosala eloko mpo na nkombo na ngai mosantu, oyo bato ya Yisraele bakómisi yango eloko mpamba na kati ya bikólo epai bakei.”+

22 “Na yango, lobá na bato ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee bato ya Yisraele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala yango, kasi mpo na nkombo na ngai mosantu oyo bokómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai bokei.”’+ 23 ‘Nakosantisa mpenza nkombo na ngai monene,+ oyo ekómisamaki eloko mpamba na kati ya bikólo, oyo bokómisaki eloko mpamba na katikati na yango; mpe bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 24 Nakolongola bino na bikólo, nakoyanganisa bino uta na mikili nyonso mpe nakokɔtisa bino na mokili na bino.+ 25 Nakomwangisela bino mai ya pɛto, mpe bokokóma pɛto;+ nakopɛtola bino na mbindo na bino nyonso+ mpe na bikeko na bino nyonso ya bosɔtɔ.+ 26 Nakopesa bino motema ya sika,+ mpe nakotya elimo ya sika kati na bino;+ nakolongola motema ya libanga+ na nzoto na bino mpe nakopesa bino motema ya mosuni.* 27 Nakotya elimo na ngai kati na bino, nakosala ete bólanda mibeko na ngai,+ bokotosa bikateli na ngai mpe bokosalela yango. 28 Bongo bokofanda na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino, bokozala bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bino.’+

29 “‘Mpe nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso. Nakopesa mbuma mitindo ete ebota mingi mpenza mpe nakomemela bino nzala te.+ 30 Nakokómisa mbuma ya nzete mpe biloko ya bilanga beboo, mpo bóyoka nsɔni lisusu te mpo na nzala na kati ya bikólo.+ 31 Na yango, bokokanisa lisusu etamboli na bino ya mabe mpe misala na bino oyo ezalaki malamu te, bokomiyokela mabe mpenza* mpo na masumu na bino mpe misala na bino oyo eyinamá.+ 32 Kasi bóyeba likambo oyo: Ezali mpo na bino te nde nazali kosala likambo oyo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. Kutu bóyoka nsɔni mpe bósambwa mpo na etamboli na bino, Ee bato ya Yisraele.’

33 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo oyo nakopɛtola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato báfanda na bingumba,+ mpe bisika oyo ebebisamá ekotongama lisusu.+ 34 Mokili oyo etikalaki mpamba, oyo moleki-nzela nyonso azalaki komona ekolonama. 35 Bato bakoloba ete: “Mokili oyo etikalaki mpamba ekómi lokola elanga ya Edene,+ mpe bingumba oyo ebebisamaki, etikalaki mpamba mpe ebukamaki ekómisami sikoyo makasi mpe bato bazali kofanda kuna.”+ 36 Mpe bikólo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba mpenza ete ngai, Yehova, natongi biloko oyo ebukamaki, naloni biloko na mokili oyo etikalaki mpamba. Ngai moko, Yehova, nalobi mpe nasali yango.’+

37 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakotika lisusu bato ya Yisraele básɛnga ngai nasalela bango likambo oyo: nakokómisa bango ebele lokola etonga, 38 lokola ebele ya basantu oyo bayanganaka na Yerusaleme* na ntango ya bafɛti na yango.+ Bingumba oyo ebebisamaki ekotonda mpenza na bitonga ya bato;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto