Nzembo 113 Bósanzola Yah!* Bópesa ye masanzoli, bino basaleli ya Yehova,Bósanzola nkombo ya Yehova. 2 Nkombo ya Yehova esanzolamaBanda sikoyo mpe mpo na libela.+ 3 Banda epai moi ebimaka tii epai elalaka,Nkombo ya Yehova esanzolama.+ 4 Yehova azali likoló ya bikólo nyonso;+Nkembo na ye ezali mosika koleka likoló.+ 5 Nani azali lokola Yehova Nzambe na biso,+Ye oyo afandaka* na likoló? 6 Akitaka mpo na kotala likoló mpe mabele,+ 7 Atombolaka moto mpamba longwa na putulu. Abimisaka mobola na ebele ya putulu ya mɔtɔ*+ 8 Mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu,Esika moko na bankumu ya bato na ye. 9 Azali kopesa mwasi ekomba ndako,Mama ya esengo oyo azali na bana.*+ Bósanzola Yah!*